Yisaya 39:1-8
39 Na ntango yango, Me-rodake-baladane+ mwana ya Baladane mokonzi ya Babilone+ atindelaki Hizikiya mikanda ná likabo,+ nsima ya koyoka ete abɛlaki, kasi akómi makasi lisusu.+
2 Bongo Hizikiya asepelaki na bango+ mpe alakisaki bango ndako na ye ya kobomba biloko ya motuya,+ palata ná wolo, mafuta ya balsame+ ná mafuta kitoko, ebombelo mobimba ya bibundeli+ na ye ná nyonso oyo emonanaki na bisika na ye ya kobomba biloko ya motuya. Ezali ata na eloko moko te oyo Hizikiya azangaki kolakisa bango na ndako na ye+ mpe na boyangeli na ye mobimba.+
3 Nsima na yango, mosakoli Yisaya akɔtaki epai ya Mokonzi Hizikiya mpe alobaki na ye:+ “Bato oyo balobi nini mpe bauti wapi mpo báya epai na yo?” Bongo Hizikiya alobaki ete: “Bauti na mokili moko mosika, na Babilone mpe bayei epai na ngai.”+
4 Mpe alobaki lisusu boye: “Bamoni nini na ndako na yo?”+ Na yango, Hizikiya alobaki ete: “Bamoni nyonso oyo ezali na ndako na ngai. Ezali ata na eloko moko te oyo nalakisaki bango te na bisika na ngai ya kobomba biloko ya motuya.”
5 Sikoyo Yisaya alobaki na Hizikiya boye:+ “Yoká liloba ya Yehova ya mampinga:
6 ‘Talá! Mikolo ezali koya, mpe nyonso oyo ezali na kati ya ndako na yo mpe oyo bankɔkɔ na yo babombaki tii na mokolo ya lelo ekokende mpenza na Babilone.’+ ‘Ata eloko moko te ekotikala,’+ Yehova alobi bongo.
7 ‘Mpe bana na yo mosusu, baoyo bakouta na yo, oyo okobota, bakozwama+ mpe bakokóma mpenza bakapita+ na ndako monene ya mokonzi ya Babilone.’”+
8 Na yango, Hizikiya alobaki na Yisaya: “Liloba ya Yehova oyo olobi ezali malamu.”+ Mpe alobaki lisusu boye: “Mpo kimya mpe libateli*+ ekozala ntango nyonso na mikolo na ngai.”+
Maloba na nse
^ Lil., “solo.”

