Yisaya 38:1-22

38  Na mikolo yango, Hizikiya abɛlaki pene na liwa.+ Bongo mosakoli Yisaya+ mwana ya Amoze akɔtaki epai na ye mpe alobaki na ye boye: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Pesá bato ya ndako na yo mitindo,+ mpo okokufa mpenza, okobika te.’”+  Bongo Hizikiya abalusaki elongi na ye na efelo+ mpe abandaki kobondela Yehova+  mpe koloba boye: “Nabondeli yo, Ee Yehova, nabondeli yo, kobosana te+ ete natamboli+ liboso na yo na bosolo+ mpe na motema mobimba,+ mpe nasali oyo ezali malamu na miso na yo.” Mpe Hizikiya alelaki mingi mpenza.+  Mpe sikoyo liloba+ ya Yehova eyelaki Yisaya ete:  “Kende, mpe osengeli koloba na Hizikiya boye: ‘Talá oyo Yehova Nzambe ya nkɔkɔ na yo Davidi+ alobi: “Nayoki libondeli na yo.+ Namoni mpisoli na yo.+ Talá, nazali kobakisa mbula zomi na mitano na mikolo ya bomoi na yo;+  mpe nakobikisa yo ná engumba oyo na lobɔkɔ ya mokonzi ya Asiri, mpe nakobatela engumba oyo.+  Mpe talá elembo euti na Yehova mpo na yo, oyo emonisi ete Yehova akokokisa liloba oyo alobi:+  Talá elili oyo ezali na matambe, oyo moi+ ebimisi mpe oyo ekitaki na matambe ya eskalye ya Ahaze, nazali kozongisa yango matambe zomi na nsima.”’”+ Mpe moi ezongaki nsima mokemoke matambe zomi, na matambe ya eskalye epai yango ekitaki.+  Mokanda oyo Hizikiya mokonzi ya Yuda akomaki, ntango abɛlaki+ mpe abikaki na maladi na ye.+ 10  Ngai nalobaki ete: “Na katikati ya mikolo ya bomoi na ngai, nakokɔta na baporte+ ya Nkunda.*Nakozanga mpenza bambula na ngai oyo etikali.”+ 11  Nalobi: “Nakomona Yah te, ɛɛ Yah, na mokili ya bato ya bomoi.+Nakotala bato lisusu te—nakozala elongo na bato oyo bafandi na mokili epai makambo nyonso esukaka. 12  Esika na ngai ya kofanda epikolami+ mpe balongoli yango epai na ngai lokola hema ya babateli ya mpate.Nalíngilíngi bomoi na ngai lokola mosali-bilamba;Bakómi kokata+ ngai ndenge bakataka elamba nsima ya kolita yango.Banda na moi tii na butu, ozali se kokaba ngai.+ 13  Nakitisi motema kino na ntɔngɔ.+Azali se kobuka mikuwa na ngai nyonso ndenge nkɔsi ebukaka;+ Banda na moi tii na butu, ozali se kokaba ngai.+ 14  Nazali se kosala swiswiswi lokola ndɛkɛ babengi martinɛ, lokola ndɛkɛ babengi bulubulu;+Nazali se konguluma lokola ebenga.+Miso na ngai etali na esika oyo etombwaná tii elɛmbi:+‘Ee Yehova, nazali konyokwama. Kɔtelá ngai.’+ 15  Nakoloba nini, mpe ye akoloba na ngai nini mpenza?+Ye moko mpe asali.+ Bambula na ngai nyonso, nazali kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ na bololo ya molimo na ngai.+ 16  ‘Ee Yehova, mpo na yango nde bazali kotikala na bomoi; mpe lokola mpo na moto nyonso, na nzela na yango nde elimo na ngai ezali na bomoi.+Mpe okokómisa nzoto na ngai kolɔngɔnɔ mpe okobatela ngai na bomoi mpenza.+ 17  Talá! Na esika ya kimya, nazwaki eloko ya bololo, ɛɛ ya bololo;+Mpe yo okangami na molimo na ngai mpe opekisi yango ekɔta na libulu oyo biloko epɔlaka.+ Mpo obwaki masumu na ngai nyonso nsima ya mokɔngɔ na yo.+ 18  Mpo Nkunda* te nde ekokumisa yo;+ liwa ekoki kosanzola yo te.+Baoyo bazali kokita na libulu bakoki kotyela bosembo na yo motema te.+ 19  Moto ya bomoi, moto ya bomoi, ye nde akoki kokumisa yo,+Lokola ngai na mokolo ya lelo.+ Tata akoki kopesa bana na ye boyebi+ ya bosembo na yo. 20  Ee Yehova, yaká kobikisa ngai,+ mpe tokobɛta mindule oyo naponi, oyo ebɛtamaka na bibɛtɛlo ya bansinga,+Mikolo nyonso ya bomoi na biso, na ndako ya Yehova.’”+ 21  Mpe Yisaya alobaki boye: “Bázwa gato ya figi ya kokauka oyo bafinafiná mpe bápakola yango na bibɔ,+ mpo abika.”+ 22  Na ntango yango, Hizikiya alobaki boye: “Elembo nini emonisi ete nakomata na ndako ya Yehova?”+

Maloba na nse

To, “Sheole.” Talá Ap 4.
To, “Sheole.” Talá Ap 4.