Yisaya 36:1-22

36  Bongo esalemaki boye: na mbula ya zomi na minei ya Mokonzi Hizikiya, Senakeribe+ mokonzi ya Asiri+ amataki kobundisa bingumba nyonso ya Yuda oyo ebatelami makasi mpe azwaki yango.+  Mpe nsukansuka mokonzi ya Asiri atindaki Rabashake+ uta na Lakishi+ kino na Yerusaleme,+ epai ya Mokonzi Hizikiya, elongo na limpinga monene ya basoda, mpe atɛlɛmaki pene na nzela oyo elekisaka mai+ ya liziba+ ya likoló, na balabala monene ya elanga ya mosukoli-bilamba.+  Na nsima, Eliakime+ mwana ya Hilikiya, oyo azalaki kokamba bato ya ndako, mpe Shebena+ oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ ná Yoa+ mwana ya Asafe+ mokomi-makambo+ babimaki epai na ye.  Na yango, Rabashake alobaki na bango boye: “Nasɛngi bino, bóloba na Hizikiya boye: ‘Talá oyo mokonzi+ monene, mokonzi ya Asiri,+ alobi: “Eloko ya kotyela motema oyo otyeli motema boye ezali nini?+  Olobi (kasi ezali liloba ya monɔkɔ): ‘Mayele mpe nguya ya etumba ezali.’+ Sikoyo, otyeli nani motema, mpo otombokela ngai?+  Talá! Otyeli Ezipito+ motema, mongendu+ oyo babukabuká, oyo soki moto ayekameli yango, ekokɔta na lobɔkɔ na ye mpe ekotɔbɔla yango. Farao+ mokonzi ya Ezipito azali ndenge wana epai ya baoyo nyonso batyelaka ye motema.+  Mpe soki olobi na ngai ete: ‘Totye motema nde na Yehova Nzambe na biso,’ bongo bisika oyo etombwaná+ mpe bitumbelo oyo Hizikiya alongoli ezali ya ye te,+ awa alobi na Yuda mpe na Yerusaleme ete: ‘Bokogumbama liboso ya etumbelo oyo’?”’+  Sikoyo, nabondeli yo, katá mondenge+ na nkolo na ngai mokonzi ya Asiri,+ mpe tiká napesa yo bampunda nkóto mibale (2 000) mpo na kotala soki okokoka kotya likoló na yango bato oyo bakotambwisa yango.+  Bongo, ndenge nini okoki kobengana guvɛrnɛrɛ moko kati na basaleli ya nkolo na ngai+ oyo baleki moke, awa ozali kotyela Ezipito motema mpo na makalo mpe mpo na basoda oyo batambolaka na mpunda?+ 10  Bongo namati kobundisa mokili oyo mpe kobebisa yango kozanga ndingisa ya Yehova? Yehova ye moko alobaki na ngai boye:+ ‘Matá kobundisa mokili wana, mpe bebisá yango.’”+ 11  Bongo Eliakime,+ Shebena+ ná Yoa+ balobaki na Rabashake+ ete: “Tobondeli yo, lobá na basaleli na yo na monɔkɔ ya Siri,+ mpo tozali koyoka; kasi koloba na biso na monɔkɔ ya Bayuda+ te, na matoi ya bato oyo bazali likoló ya efelo.”+ 12  Kasi Rabashake alobaki: “Nkolo na ngai atindi ngai naloba maloba oyo nde mpo na nkolo na yo mpe mpo na yo? Ezali te mpo na bato oyo bafandi likoló ya efelo, mpo bálya nyɛi na bango moko mpe bámɛla masuba na bango moko esika moko na bino?”+ 13  Mpe Rabashake atɛlɛmaki+ kaka mpe abelelaki na mongongo makasi na monɔkɔ ya Bayuda,+ mpe alobaki lisusu boye: “Bóyoka maloba ya mokonzi monene, mokonzi ya Asiri.+ 14  Talá oyo mokonzi alobi: ‘Hizikiya akosa bino te,+ mpo akoki kobikisa bino te.+ 15  Mpe Hizikiya atinda bino te bótyela Yehova motema+ ete: “Yehova akozanga te kobikisa biso.+ Engumba oyo ekopesama na lobɔkɔ ya mokonzi ya Asiri te.”+ 16  Bóyokela Hizikiya te, mpo talá oyo mokonzi ya Asiri alobi: “Bómitika epai na ngai,+ bóbima mpe bóya epai na ngai, mpe bólya, moto na moto, mbuma ya nzete na ye ya vinyo mpe moto na moto mbuma ya nzete na ye ya figi+ mpe bómɛla, moto na moto, mai ya libulu na ye ya kobomba mai,+ 17  kino nakoya mpe nakokende na bino mpenza na mokili moko oyo ezali lokola mokili na bino,+ mokili ya mbuma mpe ya vinyo ya sika, mokili ya limpa mpe ya bilanga ya vinyo; 18  mpo Hizikiya akosa bino te,+ na maloba oyo: ‘Yehova ye moko akobikisa biso.’ Mokomoko ya banzambe ya bikólo asilá kobikisa mokili na ye na lobɔkɔ ya mokonzi ya Asiri?+ 19  Wapi banzambe ya Hamate+ mpe ya Arpade?+ Wapi banzambe ya Sefarvaime?+ Babikisaki Samaria na lobɔkɔ na ngai?+ 20  Nani kati na banzambe nyonso ya mikili wana abikisá mokili na bango na lobɔkɔ na ngai+ mpo Yehova abikisa Yerusaleme na lobɔkɔ na ngai?”’”+ 21  Mpe bango bakobaki kofanda nyɛɛ mpe bazongiselaki ye ata liloba te,+ mpo mitindo ya mokonzi elobaki: “Bópesa ye eyano te.”+ 22  Kasi Eliakime+ mwana ya Hilikiya, oyo azalaki kokamba bato ya ndako,+ Shebena+ oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ ná Yoa+ mwana ya Asafe mokomi-makambo, bapasolaki bilamba na bango,+ bayei epai ya Hizikiya mpe bayebisi ye maloba ya Rabashake.+

Maloba na nse