Yisaya 30:1-33

30  “Mawa na bana ya motó makasi,”+ yango nde liloba ya Yehova, “baoyo balingá kokokisa mokano, kasi oyo euti na ngai te;+ mpe balingá kosopa likabo ya masanga, kasi na elimo na ngai te, mpo na kobakisa lisumu likoló ya lisumu;+  baoyo basimbi nzela mpo bákita na Ezipito+ mpe batuni monɔkɔ na ngai te,+ mpo na kobombama na esika makasi ya libateli ya Farao mpe mpo na kozwa esika ya kokima na elili ya Ezipito!+  Mpe esika makasi ya libateli ya Farao ekokóma mpenza likambo moko ya nsɔni mpo na bino,+ mpe kobombama na elili ya Ezipito ekokóma eloko oyo ezali kosambwisa.+  Mpo bankumu na ye bayei na Zoane,+ mpe bato oyo ye atindi bakómi na Hanese.  Moto nyonso akoyoka mpenza nsɔni mpo na bato oyo bapesaka ata litomba moko te, oyo basalisaka ata moke te mpe bapesaka ata litomba moko te, kasi bayokisaka nde nsɔni mpe lisusu basambwisaka.”+  Liyebisi mpo na banyama ya sudi:+ Na mokili ya mpasi+ mpe ya bomoi ya mpasi, ya nkɔsi mpe ya nkoi oyo ezali konguluma, ya etupa mpe ya nyoka ya ngɛngɛ+ oyo epumbwaka, bazali komema biloko na bango na mapeka ya bampunda oyo ekɔmɛli, bazali komema na matutu ya mikɔngɔ ya bakamela+ biloko na bango oyo babombaki. Ekozala na litomba moko te mpo na bato.  Baezipito bazali se mpamba, mpe bakosalisa kaka mpamba.+ Yango wana nabengi yango: “Rahaba+—bazali bato oyo bafandaka nyɛɛ.”  “Sikoyo yaká, komá yango na etanda mpe bango bázala wana, komá yango na buku+ mpo, na mokolo mosusu oyo ekoya, yango ezala litatoli mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+  Mpo bazali batomboki,+ bana ya lokuta,+ bana oyo baboyá koyoka mobeko ya Yehova;+ 10  oyo balobi na bato oyo bazali komona ete: ‘Bómona te,’ mpe na baoyo bazali kozwa bimonaneli ete: ‘Bómonela biso bimonaneli ya makambo ya sembo te.+ Bólobela biso makambo ya elɛngi; bómonela biso makambo ya bokosi.+ 11  Bólongwa na nzela; bópɛngwa na nzela.+ Bósukisela biso Mosantu ya Yisraele.’”+ 12  Yango wana, talá oyo Mosantu ya Yisraele alobi: “Lokola bozali koboya liloba oyo,+ mpe bozali kotya motema na kobuba mpe na makambo ya mbilingambilinga, mpe bokangami na yango,+ 13  mpo na bino, libunga oyo ekokóma lokola eteni oyo epasuki oyo ekómi pene na kokwea, litutu na efelo moko ya molai,+ oyo kokwea na yango ekoki koya pwasa, na mbala moko.+ 14  Mpe bakobuka mpenza yango ndenge babukaka elokó moko monene ya bayemi-mbɛki,+ oyo babukibuki na mawa te, bongo na biteni na yango oyo ebukani, moto akoki kokuta ata eteni moko te ya kozwa na yango mɔtɔ na lituka to ya kotoka na yango mai na zamba ya maimai.”+ 15  Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Mosantu ya Yisraele,+ alobi: “Soki bozongi mpe bopemi nde bokobika. Nguya na bino ekomonana mpenza soki bofandi nyɛɛ mpe botye motema.”+ Kasi bolingaki te.+ 16  Mpe bokómaki koloba: “Te, kasi tokokima na bampunda!”+ Yango wana bokokima. “Mpe tokomata na bampunda ya mbangu!”+ Yango wana baoyo bakolanda bino bakozala na mbangu.+ 17  Bato nkóto (1 000) bakolɛnga na mpamela ya moto moko;+ na mpamela ya bato mitano bokokima kino bokotikala lokola likonzí ya molai na nsɔngɛ ya ngomba mpe lokola elembo na ngomba moke.+ 18  Mpe yango wana Yehova akokoba kozela mpo na komonisela bino boboto,+ mpe yango wana akotɛlɛma mpo na koyokela bino mawa.+ Mpo Yehova azali Nzambe oyo asambisaka na bosembo.+ Esengo+ na baoyo nyonso bazali kokoba kozela ye.+ 19  Ntango bato ya Siona+ bakofanda na Yerusaleme,+ okolela ata moke te.+ Ye akozanga te komonisela yo boboto ntango lokito ya koganga na yo ekoyokana, ntango kaka akoyoka yango, akoyanola yo mpenza.+ 20  Mpe ya solo, mampa oyo Yehova akopesa bino nde mpasi mpe mai oyo akopesa bino nde monyoko;+ kasi Molakisi na yo Monene akomibomba lisusu te, mpe miso na yo ekokóma mpenza miso oyo ezali komona Molakisi na yo Monene.+ 21  Mpe matoi na yo ekoyoka liloba nsima na yo oyo ezali koloba ete: “Nzela yango oyo.+ Bótambola na yango,” soki bokokende na lobɔkɔ ya mobali to soki bokokende na lobɔkɔ ya mwasi.+ 22  Mpe bokokómisa mpenza mbindo palata oyo ezipi bikeko na yo ya palata oyo eyemami+ mpe wolo oyo ezipi mpe ekangani makasi na ekeko na yo ya wolo+ oyo enyangwisami.+ Okopanza yango.+ Lokola mwasi oyo azali komona sanza, okoloba na yango boye: “Bosɔtɔ ya mpamba!”+ 23  Mpe akopesa mpenza mbula mpo na momboto na yo oyo ozali kolona na mabele,+ mpe mbuma ya mabele nde mampa, oyo ekokóma mpenza na mafuta mpe ekozala mafutamafuta.+ Na mokolo yango, bibwɛlɛ na yo ekolya na esika monene ya kolya matiti.+ 24  Mpe bangɔmbɛ ná bampunda oyo ekɔmɛli oyo ezali kotimola mabele ekolya bilei oyo esangisami na ngaingai, oyo bapupolaki na pau+ mpe na nkanya. 25  Mpe na ngomba molai nyonso mpe na ngomba moke nyonso oyo etombwani, mikɛli+ ekozala mpenza, banzela ya mai, na mokolo ya koboma na koboma moko monene, ntango manɔ́ngi ekokwea.+ 26  Mpe pole ya sanza oyo ebimi mobimba ekokóma mpenza lokola pole ya moi oyo ezali kongala; mpe pole mpenza ya moi oyo ezali kongala ekobakisama mbala nsambo,+ lokola pole ya mikolo nsambo, na mokolo oyo Yehova akokanga elamba na esika oyo bato na ye babukani+ mpe akosilisa+ ata mpota monene oyo euti na kobɛta oyo abɛtaki. 27  Talá! Nkombo ya Yehova ezali kouta mosika, ezali kopela na nkanda+ na ye mpe ezali koya elongo na mapata minene. Bongo mbɛbu na ye, yango etondi na makaneli, mpe lolemo na ye ezali lokola mɔtɔ oyo ezali kozikisa.+ 28  Mpe elimo na ye ezali lokola mokɛli ya mai oyo ezali kozindisa, oyo ezali kokóma kino na nkingo,+ mpo na koningisa bikólo na kiyungulu+ oyo ezangi ntina; mpe ebende ya mbanga+ oyo etindaka moto ayengayenga ekozala na mbanga ya bato ya bikólo.+ 29  Bokozala na loyembo+ lokola oyo bayembaka na butu oyo bamisantisaka mpo na fɛti,+ mpe na esengo ya motema lokola oyo ya moto oyo azali kotambola na piololo+ mpo na kokɔta na ngomba ya Yehova,+ epai ya Libanga ya Yisraele.+ 30  Mpe ya solo Yehova akoyokisa lokumu ya mongongo+ na ye mpe akomonisa ndenge lobɔkɔ na ye ekokita,+ na kongala makasi ya nkanda+ mpe na lolemo ya mɔtɔ oyo ezali kozikisa+ mpe na mbula makasi ya pwasa mpe na mbula ya mopɛpɛ makasi+ mpe na mbula ya mabanga.+ 31  Mpamba te, mpo na mongongo ya Yehova, Asiri ekozala na nsɔmɔ;+ akobɛta yango na lingenda.+ 32  Mpe ntango nyonso oyo Yehova akokitisela Asiri fimbo na ye ya etumbu, ekozala mpenza elongo na bambonda mike mpe na banzɛnzɛ;+ mpe akobunda mpenza na bango na bitumba ya koningisa bibundeli.+ 33  Mpo Tofete+ na ye euti kobongisama; elɛngɛlami mpe mpo na mokonzi ye moko.+ Atondisi mipiko ya nkoni na esika ya mozindo. Mɔtɔ mpe nkoni ezali ebele. Mpema ya Yehova, lokola mokɛli ya sufulu, ezali kozikisa yango.+

Maloba na nse