Yisaya 3:1-26

3  Mpo talá! Nkolo ya solo,+ Yehova ya mampinga, azali kolongola na Yerusaleme+ mpe na Yuda nyonso oyo ekoki kosunga mpe kosalisa, elingi koloba mampa nyonso mpe mai nyonso,+  moto ya nguya ná mobundi, mosambisi ná mosakoli,+ mosakoli ya makambo oyo ebombaná ná mokóló,+  mokonzi ya bato ntuku mitano (50),+ moto oyo bapesaka limemya mingi ná mopesi-toli, moto oyo ayebi malamumalamu misala ya maji ná molengoli oyo ayebi mpenza kolengola.+  Mpe ya solo, nakokómisa bilenge mibali bankumu na bango, mpe bokonzi ya makambo makasimakasi ekoyangela bango.+  Mpe bato bakonyokolana, ɛɛ, moto na moto akonyokola moninga na ye.+ Bakowelana, elenge mobali ná mobange,+ moto mpamba ná moto oyo abongi na lokumu.+  Mpo moto na moto akokanga ndeko na ye na ndako ya tata na ye, alobi: “Yo ozali na elamba. Zalá mokonzi, yangelá biso na makasi,+ mpe libondo ya bitika oyo ezala na mabɔkɔ na yo.”  Na mokolo yango, akotombola mongongo na ye mpe akoloba ete: “Nakokóma mokangi ya mpota te; mpe na ndako na ngai limpa ezali te, elamba mpe te. Bótya ngai mokonzi te, nakoyangela bato na makasi mpe te.”  Mpo Yerusaleme abɛti libaku, mpe Yuda akwei,+ mpamba te lolemo na bango mpe misala na bango ezali kotɛmɛla Yehova,+ na ndenge bazali kotomboka na miso na ye ya nkembo.+  Ndenge bilongi na bango ezali komonana ezali mpenza kofunda bango,+ mpe bazali koyebisa lisumu na bango lokola oyo ya Sodoma.+ Babombi yango te. Mawa na molimo na bango! Mpo bamibendeli mpasi.+ 10  Bóloba ete makambo ya moyengebene ekozala malamu,+ mpo akolya mpenza mbuma ya misala na ye.+ 11  Mawa na moto mabe!—Mpasi; mpo oyo ye asalaki na mabɔkɔ na ye bakozongisela ye yango!+ 12  Kasi bato oyo bapesaka bato na ngai mosala bazali kosala makambo na nko, mpe basi nde bazali mpenza koyangela bato na ngai.+ Ee bato na ngai, baoyo bazali kotambwisa bino bazali kosala ete bóyengayenga,+ mpe babulunganisi banzela na bino.+ 13  Yehova atɛlɛmi mpo na kobunda mpe atɛlɛmi mpo na kosambisa bato ya bikólo.+ 14  Yehova ye moko akosamba na mikóló ya bato na ye mpe bankumu na bango.+ “Mpe bino, botumbi elanga ya vinyo. Biloko oyo bayibi epai ya moto ya mpasi ezali na bandako na bino.+ 15  Bozali kolakisa nini na ndenge bozali kotutatuta bato na ngai, mpe konikanika bilongi ya bato ya mpasi?”+ yango nde liloba ya Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga. 16  Mpe Yehova alobi boye: “Lokola bana basi ya Siona bakómi na lolendo mpe bazali kotambola batɛlɛmisi nkingo na bango mpe bazali kofinafina miso na bango, bazali kotambola mpe kodenda, mpe bazali kolelisa ngɛngɛlɛ ya bashɛnɛti oyo ezali na makolo na bango,+ 17  Yehova mpe akobimisa lipaka na motó ya bana basi ya Siona,+ mpe Yehova ye moko akotika elongi na bango polele.+ 18  Na mokolo yango, Yehova akolongola kitoko na bango: bikɔmɔ mpe mwa elamba ya kozipa motó mpe biloko ya kobongisa nzoto oyo basalá lokola sanza,+ 19  biloko ya matoi, bikɔmɔ ná matambala,+ 20  biloko ya kolata na motó, bashɛnɛti ya makolo ná bankamba ya ntolo+ mpe milangi ya malasi* ná bazeke ya monzɛlɛ oyo esalaka wosowoso,+ 21  bampɛtɛ ya misapi ná bampɛtɛ ya zolo,+ 22  bazambala ya biyenga, bazambala ya likoló, bakazaka ná bapotɔmɔni, 23  batalatala ya mabɔkɔ,+ bilamba ya nse, batirba+ ná matambala+ ya minene. 24  “Mpe ekosalema mpenza boye: na esika ya mafuta ya balsame,+ ekozala kaka nsolo moko ya mabe; na esika ya mokaba, nsinga; na esika ya nsuki oyo ebongisami malamu, libandi;+ na esika ya elamba ya ntalo, ngɔtɔ oyo balati na loketo;+ elembo ya mɔtɔ+ na esika ya bonzenga. 25  Bato na yo bakokwea na mopanga, mpe bato na yo ya nguya bakokwea na etumba.+ 26  Mpe bisika na ye ya kokɔtela ekolela+ mpe ekozala mawamawa, mpe akosukolama mpenza. Akofanda na mabele mpenza.”+

Maloba na nse

Lil., “bandako ya molimo.”