Yisaya 28:1-29
28 Mawa na motole ya lokumu ya balangwi-masanga ya Efraime,+ mpe na fololo ya monzɛlɛ na yango ya kitoko oyo ezali kokauka, oyo ezali likoló ya lobwaku oyo ebotaka malamu, ya baoyo vinyo elongi bango!
2 Talá! Yehova azali na moto moko ya makasi mpe ya nguya.+ Lokola mbula ya mopɛpɛ makasi, ya bankake mpe ya mabanga,+ mbula ya mopɛpɛ makasi oyo ezali kobebisa, lokola mbula ya mopɛpɛ makasi mpe ya bankake, ya mai ya makasi oyo ezali kozindisa,+ ya solo, akokweisa na mabele na makasi mpenza.
3 Bakonyatanyata+ mitole ya lokumu ya balangwi-masanga ya Efraime na makolo.
4 Mpe fololo+ ya monzɛlɛ na yango ya kitoko oyo ezali kokauka likoló ya lobwaku oyo ebotaka malamu esengeli kokóma lokola figi ya ebandeli+ liboso ya eleko ya molunge, oyo, ntango moto oyo azali kotala amoni yango, wana ezali naino na lobɔkɔ na ye, amɛli yango.
5 Na mokolo yango, Yehova ya mampinga akokóma na miso ya bato na ye oyo bakotikala+ lokola motole ya kitoko+ mpe lokola motole ya fololo ya kitoko,+
6 mpe lokola elimo ya bosembo na miso ya moto oyo afandi mpo na kosambisa,+ mpe lokola nguya na miso ya baoyo bazali kozongisa etumba nsima, elongwa na porte.+
7 Ná baoyo mpe—mpo na vinyo babungi nzela mpe mpo na masanga oyo elangwisaka batelengani. Nganga-nzambe mpe mosakoli+—babungi nzela mpo na masanga oyo elangwisaka, babulungani mpo na vinyo, batelengani+ mpo na masanga oyo elangwisaka; babungi nzela na bimonaneli na bango, bazwi kizunguzungu mpe bayebi ekateli te.
8 Mpo bamesa nyonso etondi na biloko ya bosɔtɔ oyo basanzi+—esika ezali te oyo ezangi yango.
9 Nani oyo bakoteya ye boyebi;+ mpe nani bakosalisa akanga ntina ya likambo oyo eyokami?+ Baoyo bakilisami mabɛlɛ, baoyo balongolami na mabɛlɛ?+
10 Mpo ezali “mobeko likoló ya mobeko, mobeko likoló ya mobeko, nsinga ya komeka likoló ya nsinga ya komeka, nsinga ya komeka likoló ya nsinga ya komeka, awa moke, kuna moke.”+
11 Mpo na nzela ya bato oyo bazali na mbɛbu ya likukuma+ mpe na monɔkɔ mosusu+ nde akoloba na bato oyo,+
12 baoyo alobaki na bango ete: “Esika ya kopema yango oyo. Bópemisa moto oyo alɛmbi. Mpe esika ya kimya yango oyo,” kasi bazalaki kolinga koyoka te.+
13 Mpe epai na bango liloba ya Yehova ekokóma solo “mobeko likoló ya mobeko, mobeko likoló ya mobeko, nsinga ya komeka likoló ya nsinga ya komeka, nsinga ya komeka likoló ya nsinga ya komeka,+ awa moke, kuna moke,” mpo bákende mpe bábɛta mpenza libaku mpe bákwea makalekale mpe bábukana mpenza mpe bázwama na motambo mpe bákangama.+
14 Yango wana bóyoka liloba ya Yehova, bino bato bozali komikumisa, bino bayangeli+ ya bato oyo bazali na Yerusaleme:
15 Lokola bolobi: “Tosalá kondimana ná Liwa;+ mpe biso ná Nkunda* tomoná emonaneli;+ mpela ya pwasa oyo ezali kozindisa, soki eleki, ekokómela biso te, mpo tokómisá lokuta esika na biso ya kokima+ mpe tomibombá na kati ya lokuta”;+
16 yango wana talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Talá nazali kotya libanga+ ezala moboko na Siona,+ libanga oyo emekami,+ libanga ya litumu oyo ezali na motuya,+ ya moboko ya solosolo.+ Moto moko te oyo azali na kondima akozala na nsɔmɔ.+
17 Mpe nakokómisa bosembo nsinga ya komeka+ mpe boyengebene+ nivo; mpe mbula ya mabanga+ ekokɔmbɔla mpenza ekimelo ya lokuta,+ mpe mai ekozindisa esika ya kobombana.+
18 Mpe kondimana na bino ná Liwa ekosuka,+ mpe emonaneli ya bino ná Nkunda* ekosimba te.+ Ntango mpela ya pwasa ekoleka+—bino mpe bokokóma esika na yango ya konyatanyata.+
19 Mbala nyonso oyo yango ekoleka, ekolongola bino,+ mpo ekoleka ntɔngɔ na ntɔngɔ, na butu mpe na moi; mpe yango ekozala kaka kolɛngisa+ mpo na kosalisa basusu bákanga ntina ya likambo oyo eyokami.”
20 Mpo mbeto ekómi mokuse mingi mpe moto akokoka komisembola likoló na yango te, mpe molekani ezali moke mingi ntango moto azali komizipa.
21 Mpo Yehova akotɛlɛma lokola na Ngomba Perazime,+ akoningana lokola na lobwaku ya patatalu oyo ezali pene na Gibeone,+ mpo asala likambo na ye—likambo na ye ezali ya kokamwa—mpe mpo asala mosala na ye—mosala na ye ezali mosala moko oyo esalemá naino te.+
22 Bongo sikoyo bózala basɛki te,+ mpo bansinga na bino ekangama makasi te, mpamba te nayoki ete Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,+ Yehova ya mampinga, akani kosilisa mokili mobimba nyɛɛ.+
23 Bótya litoi mpe bóyoka mongongo na ngai; bótya likebi mpe bóyoka liloba na ngai.
24 Motimoli atimolaka mpo na kolona mboto, mpe alɛmbisaka mabele+ na ye mpe alalisaka yango nde mokolo mobimba?+
25 Ntango alalisi etando na yango, nsima na yango nde apalanganisaka kumini ya moindo mpe amwangisaka kumini,+ mpe asengeli kotya mbuma ya blé, ya miyɛ+ mpe ya ɔrje na esika oyo ebongisamá,+ mpe blé ya mbuma makasi+ mpo ezala ndelo na ye,+ boye te?
26 Mpe bazali kosembola+ ye na kolanda oyo ezali sembo. Nzambe na ye moko azali kolakisa ye.+
27 Mpo banyatanyataka kumini ya moindo na eloko ya kotutela te;+ mpe babalusaka yiká ya pusu likoló ya kumini te. Mpo babɛtaka kumini ya moindo nde na lingenda,+ mpe kumini na fimbo.
28 Banikaka nde mbuma ya kosala farini ya mampa? Mpo banyataka+ yango ntango nyonso te.+ Mpe asengeli kotambwisa yiká ya pusu na ye, mpe bampunda na ye, kasi akonika yango te.+
29 Yango mpe euti na Yehova ya mampinga ye moko,+ oyo akamwisi na mokano na ye, oyo asali mosala oyo ezali kobota mbuma mingi mpenza.+