Yisaya 27:1-13
27 Na mokolo yango, Yehova+ akotyela Leviatana+ likebi, yango nde nyoka oyo esɛlimwaka,+ ɛɛ, Leviatana, nyoka oyo egumbamagumbamá, mpe ya solo na mopanga+ na ye ya makasi mpe ya monene mpe ya nguya, akoboma nyama wana ya mbu, ya nsɔmɔ,+ oyo ezali na mbu.
2 Na mokolo yango, bóyembela mwasi wana+ boye: “Elanga ya vinyo+ oyo epesaka vinyo ya fulufulu!
3 Ngai, Yehova, nazali kobatela ye.+ Nakomwangisela ye mai ntango nyonso.+ Nakobatela ye butu moi mpo moto moko te asala ye mabe.+
4 Nazali na nkɛlɛ te.+ Nani akopesa ngai mwa banzete ya nzubɛ+ mpe matiti mabe na etumba? Nakonyata yango. Nakotumba yango kaka na mbala moko.+
5 Soki te, asimba makasi esika na ngai ya libateli, aluka kozala na kimya ná ngai; aluka kozala na kimya ná ngai.”+
6 Na mikolo ekoya, Yakobo akobimisa misisa, Yisraele+ akobimisa bafololo mpe ya solo akobimisa nkasa; mpe bakotondisa mpenza mbuma na mabele oyo ebotaka.+
7 Esengeli bábɛta ye na ndenge bazali kobɛta ye? To esengeli abomama na ndenge bato na ye babomami?+
8 Ntango okotika ye akende, okobunda na ye na koganga moko ya nsɔmɔ. Akobengana ye mpenza na mopɛpɛ na ye, mopɛpɛ moko ya makasi na mokolo ya mopɛpɛ ya ɛsti.+
9 Na yango, na nzela wana nde libunga ya Yakobo ekozipama,+ mpe nyonso wana nde mbuma ya kolongola lisumu na ye,+ ntango azali kokómisa mabanga nyonso ya etumbelo lokola mabanga ya mabele ya mpɛmbɛ oyo bapanzipanzi, yango wana banzete ya losambo+ ná bitumbelo ya mpaka ya malasi ekotɛlɛma te.+
10 Mpo engumba oyo ebatelami makasi ekotikala mpamba, esika ya koleisa banyama matiti ekotikala kaka boye mpe ekosundolama lokola esobe.+ Mwana-ngɔmbɛ akolya matiti kuna, mpe akolala kuna; mpe akolya mpenza bitape na ye.+
11 Ntango bitape na ye ya mike ekokauka, basi oyo bakoya bakobuka yango, bakopelisa yango mɔtɔ.+ Mpo bazali bato ya mayele mingi te.+ Yango wana Mokeli na bango akoyokela bango mawa te, mpe Moto oyo asalaki bango akomonisela bango boboto te.+
12 Mpe na mokolo yango ekosalema mpenza boye: Yehova akoningisa bambuma,+ banda na mai ya Ebale+ oyo ezali kotíyola kino na lobwaku ya mokɛli ya Ezipito,+ bongo, bokolɔkɔtama mokomoko,+ Ee bana ya Yisraele.
13 Mpe na mokolo yango ekosalema mpenza boye: bakoyula liseke moko monene,+ mpe baoyo bazali kokufa na mokili ya Asiri+ mpe baoyo bapalanganá na mokili ya Ezipito+ bakoya mpenza kogumbamela+ Yehova na ngomba mosantu na Yerusaleme.+