Yisaya 25:1-12

25  Ee Yehova, ozali Nzambe na ngai.+ Nazali kosanzola yo,+ nazali kokumisa nkombo na yo,+ mpo osali makambo ya kokamwa,+ banda bantango ya kalakala, obongisá mikano+ oyo ezali sembo,+ oyo ebongi kotyelama motema.+  Mpo okómisi engumba moko libondo ya mabanga, okómisi sité moko oyo ebatelami makasi bitiká oyo ezali kokweakwea, osali ete ndako molai ya kofanda ya bapaya ezala lisusu te, engumba yango ekotongama lisusu te kino ntango oyo etyami ndelo te.+  Yango wana bato oyo bazali ekólo moko ya makasi bakokumisa yo; sité ya bikólo oyo enyokolaka bakobanga yo.+  Mpo okómi esika makasi ya libateli mpo na moto oyo azangá, esika makasi ya libateli mpo na mobola na mpasi oyo azali na yango,+ esika ya kokima mbula ya mopɛpɛ makasi, elili+ ya kokima molunge, ntango mopɛpɛ ya banyokoli ezali lokola mbula ya mopɛpɛ makasi oyo ezali kobɛta efelo.  Ozali kokitisa makɛlɛlɛ ya bapaya ndenge okitisaka molunge na mokili oyo ezangá mai, molunge na nzela ya elili ya lipata.+ Mondule ya banyokoli esuki.+  Mpe ya solo, na ngomba oyo,+ Yehova ya mampinga akosalela bato ya bikólo nyonso+ fɛti moko ya bilei ya mafuta mpenza,+ fɛti ya vinyo oyo eumelá, oyo mbɔtɔ elalá na nse, ya bilei ya mafuta mpenza, oyo etondi na mafuta ya mikuwa,+ ya vinyo+ oyo eumelá, oyo mbɔtɔ elalá na nse, oyo bakɔngɔlá.+  Mpe ya solo, na ngomba oyo akolongola eloko oyo ezipi bato ya bikólo nyonso,+ mpe elamba oyo elitamá oyo ezipi bikólo nyonso.  Akolongola mpenza liwa mpo na libela,+ mpe Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova akopangwisa mpenza mpisoli na bilongi nyonso.+ Mpe akolongola nsɔni ya bato na ye na mabele mobimba,+ mpo Yehova ye moko nde alobi yango.  Mpe na mokolo yango, bakoloba mpenza boye: “Talá! Oyo nde Nzambe na biso.+ Totyeli ye elikya,+ mpe akobikisa biso.+ Oyo nde Yehova.+ Totyeli ye elikya. Tózala na esengo mpe tósepela na lobiko oyo euti na ye.”+ 10  Mpo lobɔkɔ ya Yehova ekokita na ngomba oyo,+ mpe Moabe ekonyatama mpenza+ na esika na yango lokola ntango banyataka libondo ya matiti na esika nyɛi ya nyama+ ezali. 11  Mpe akobɛta mpenza mabɔkɔ na ye na katikati na yango* ndenge mobɛti mai abɛtaka mai na mabɔkɔ na ye, mpe akokitisa mpenza lolendo+ na yango na ndenge akobɛta yango na mabɔkɔ na ye oyo eyebi kobɛta. 12  Mpe akolalisa na nse engumba oyo ebatelami makasi, ná bifelo na yo milai ya libateli; akokitisa yango, akosimbisa yango mabele, kino na putulu.+

Maloba na nse

Elingi koloba, “Moabe.”