Yisaya 24:1-23

24  Talá! Yehova azali kolongola eloko nyonso na mokili mpe azali kotika yango mpamba,+ mpe abaloli yango+ mpe apanzi bato oyo bafandi wana.+  Ɛɛ, ndenge ekozala mpo na bato ya ekólo, ekozala mpe bongo mpo na nganga-nzambe; ndenge ekozala mpo na mosaleli, ekozala mpe bongo mpo na nkolo na ye; ndenge ekozala mpo na mosaleli ya mwasi, ekozala mpe bongo mpo na nkolo na ye ya mwasi; ndenge ekozala mpo na mosombi, ekozala mpe bongo mpo na motɛki; ndenge ekozala mpo na modefisi, ekozala mpe bongo mpo na modefi; ndenge ekozala mpo na moto oyo azali kozwa litomba, ekozala mpe bongo mpo na moto oyo azali kofuta benefisi.+  Na ntembe te, eloko nyonso ekolongolama na mokili, mpe na ntembe te, yango ekopunzama,+ mpo Yehova ye moko alobi liloba yango.+  Mokili ekómi kolela,+ ebebibebi. Mabele oyo ebotaka ekaukikauki, ebebibebi. Bato ya lokumu kati na bato balɛmbilɛmbi.+  Mpe mokili ekómisami mbindo na bato oyo bafandi wana,+ mpo balandi mibeko te,+ babongoli lilako,+ babuki kondimana ya ntango oyo etyami ndelo te.+  Yango wana kolakelama mabe elei mokili,+ mpe baoyo bafandi na yango bamemi ngambo. Yango wana motángo ya bato oyo bafandi na mokili yango ekiti, mpe bato—bawei mpamba—batikali moke mingi.+  Vinyo ya sika ekómi kolela, nzete ya vinyo ekaukikauki,+ baoyo nyonso bazali na motema ya esengo bakómi kokimela.+  Esengo ya bambonda mike esili, makɛlɛlɛ ya bato ya esengo makasi esili, esengo ya nzɛnzɛ esili.+  Bazali komɛla vinyo na loyembo ata moko te; masanga oyo elangwisaka ekómeli baoyo bazali komɛla yango bololo. 10  Engumba oyo basundoli ebukani;+ ndako nyonso ekangami mpo moto akɔta te. 11  Bazali koganga na babalabala mpo vinyo ezangi. Nsai nyonso elimwe; esengo ya mokili esili.+ 12  Ndenge oyo batiki biloko na engumba ezali mpenza kokamwisa; babukibuki porte, ekómi libondo mpamba ya biloko oyo ebukanibukani.+ 13  Mpo ekozala bongo na katikati ya mokili, na kati ya bato ya bikólo, lokola babɛtabɛtaka nzete ya olive,+ lokola balɔkɔtaka mbuma ya vinyo ntango mosala ya kobuka mbuma ya vinyo ekómaka na nsuka.+ 14  Bango moko bakotombola mongongo na bango, bakoganga na esengo. Mpo na bonene ya Yehova, bakoganga makasi longwa na mbu.+ 15  Yango wana na etúká ya pole+ bakokumisa mpenza Yehova,+ na bisanga ya mbu, nkombo ya Yehova,+ Nzambe ya Yisraele. 16  Longwa na nsuka ya mokili toyoki mindule:+ “Kitoko mpo na Moyengebene!”+ Kasi nazali koloba boye: “Ngai nazali kokɔnda,+ ngai nazali kokɔnda! Mawa na ngai! Baoyo basalaka na bokosi basali na bokosi.+ Baoyo basalaka na bokosi basali na bokosi.”+ 17  Nsɔmɔ, libulu mpe motambo ekangi yo, yo moto oyo ofandi na mokili.+ 18  Mpe ekosalema mpenza boye: moto oyo akokima lokito ya eloko oyo eyokisaka nsɔmɔ akokwea na libulu, mpe moto oyo akobima na libulu akokangama na motambo.+ Mpo baporte ya mai na likoló ekofungwama+ mpenza mpe miboko ya mokili ekoningana.+ 19  Mokili epasuki mpenza, mokili eningani mpenza, mokili etengitengi mpenza.+ 20  Mokili ezali kotengatenga mpenza lokola moto oyo alangwe masanga, mpe eningani epai na epai lokola mwa ndako ya mokɛngɛli.+ Mpe misala na yango ya kobuka mibeko ekómeli yango kilo,+ mpe esengeli kokwea, bongo ekotɛlɛma lisusu te.+ 21  Mpe na mokolo yango ekosalema mpenza boye: Yehova akotya likebi na ye na limpinga ya esika oyo etombwaná, na esika oyo etombwaná, mpe na bakonzi ya mabele, na mabele.+ 22  Mpe bakoyanganisama mpenza ndenge bayanganisaka bato ya bolɔkɔ na libulu,+ mpe bakokangama na kasho;+ mpe nsima ya mikolo ebele, bakotyela bango likebi.+ 23  Mpe sanza oyo ebimi mobimba eyoki nsɔni, mpe moi oyo ezali kongala eyoki nsɔni,+ mpo Yehova ya mampinga akómi mokonzi+ na nkembo na Ngomba Siona+ mpe na Yerusaleme mpe liboso ya mibange na ye.+

Maloba na nse