Yisaya 23:1-18

23  Liyebisi mpo na Tire:+ Bino bamasuwa ya Tarasisi+ bóganga na kolela! mpo epunzami, ezali libongo lisusu te, ezali esika ya kokɔta lisusu te.+ Bamonisaki bango likambo yango banda na mokili ya Kitime.+  Bófanda nyɛɛ. Bino bato oyo bofandi na mokili ya pembeni ya mbu. Bato ya mombongo oyo bauti na Sidone,+ baoyo bakatisaka mai ya mbu—batondisi yo na bozwi.  Mpe momboto ya Shihore+ ememami na mai mingi, mbuma oyo babuki na Nile, biloko oyo mosala na ye epesi ye; yango ekómaki litomba ya bikólo.+  Ee Sidone,+ zalá na nsɔni; Ee esika makasi ya libateli ya mbu, mpo mbu elobi: “Nazwá mpasi ya kobota te, nabotá te, nabɔkɔlá bilenge mibali mpe te, nakolisá bangɔndɔ te.”+  Bato bakozala na mpasi makasi ntango bakoyoka nsango ya Tire,+ ndenge ezalaki ntango bato bayokaki nsango ya Ezipito.+  Bókatisa kino na Tarasisi; bóganga na kolela, bino bato oyo bofandi na mokili ya pembeni ya mbu.  Oyo nde engumba na bino oyo ezalaki kosepela makasi banda mikolo ya kala, banda bantango na yango ya ebandeli? Makolo na ye ezalaki komema ye mosika mpo akende kofanda mopaya.  Nani apesi toli oyo+ mpo na kotɛmɛla Tire, mopesi mitole, ye oyo bato na ye ya mombongo bazalaki bankumu, oyo bato na ye oyo basalaka mombongo bazalaki bato ya lokumu na mabele?+  Yehova ya mampinga ye moko nde moto apesi toli yango,+ mpo na kokómisa mpamba lolendo ya kitoko nyonso,+ mpo na kotyola bato nyonso ya lokumu na mabele.+ 10  Ee mwana mwasi ya Tarasisi,+ katisá mokili na yo lokola Ebale Nile. Esika ya kosala masuwa ezali lisusu te.+ 11  Asemboli lobɔkɔ na ye likoló ya mbu; aningisi makonzi.+ Yehova ye moko apesi mitindo mpo na Fenisia, mpo na kosilisa nyɛɛ bisika makasi ya libateli na yango.+ 12  Bongo alobi: “Ee monyokwami, mwana mwasi, ngɔndɔ ya Sidone,+ okosepela makasi ata mokolo moko te.+ Tɛlɛmá, katisá kino na Kitime.+ Ata kuna, okopema te.” 13  Talá! Mokili ya Bakaladea.+ Bango nde bato oyo batongaki yango, kasi Asiri+ te, mpo na bato oyo bafandi na esobe.+ Batɛlɛmisi manɔ́ngi na bango mpo na kobunda;+ babebisi bandako milai na yango nyonso ya kofanda;+ batye yango lokola bitiká oyo ezali kokweakwea.+ 14  Bino bamasuwa ya Tarasisi, bóganga na kolela mpo esika makasi ya libateli na bino epunzami.+ 15  Mpe na mokolo yango ekosalema mpenza boye: bakobosana mpenza Tire mbula ntuku nsambo (70),+ lokola mikolo ya mokonzi moko. Na nsima ya mbula ntuku nsambo, Tire ekokóma lokola mwasi ya ndumba oyo bayembi na loyembo oyo: 16  “Ee mwasi ya ndumba oyo babosaná,+ zwá nzɛnzɛ, baluká na engumba epai na epai. Bɛtá bansinga na ndenge nyonso oyo okoki; yembá nzembo na yo ebele, mpo bákanisa yo.” 17  Mpe na nsuka ya mbula ntuku nsambo (70) ekosalema mpenza boye: Yehova akotya likebi na ye na Tire, mpe Tire akozonga mpenza na lifuti+ na ye mpe akosala pite na makonzi nyonso ya mabele, bipai nyonso na mabele.+ 18  Mpe litomba na ye ná lifuti+ na ye ekokóma mpenza eloko moko mosantu ya Yehova. Ekotyama na esika ya kobomba biloko te, ekobombama mpe te, mpamba te lifuti na ye ekozala ya baoyo bazali kofanda liboso ya Yehova,+ mpo bálya ndenge balingi mpe mpo bálata kitoko.+

Maloba na nse