Yisaya 22:1-25
22 Liyebisi mpo na lobwaku ya emonaneli:+ Likambo nini boye mpo bato na yo nyonso bámata na bansamba?+
2 Otondaki na yikiyiki, engumba ya makɛlɛlɛ, sité oyo ezali kosepela makasi.+ Bato na yo oyo babomami babomami na mopanga te, bato oyo bakufi na etumba mpe te.+
3 Bakonzi na yo nyonso oyo bazali koyangela na makasi+ bakimi na mbala moko.+ Ntina ya kosalela litimbo ezalaki te, bakangaki bango na bolɔkɔ. Bato na yo nyonso oyo bazwami, bango nyonso bakangami na bolɔkɔ.+ Bakimaki mosika.
4 Yango wana nalobi: “Bólongola miso na bino epai na ngai. Ntango nazali kolela, nakomonisa ete nazali koyoka mpasi makasi.+ Bótingama te na kobɔndisa ngai mpo bapunzi mwana mwasi ya bato na ngai.+
5 Mpo ezali mokolo oyo Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga, azali kobulunganisa+ mpe konyata+ mpe kosilisa mayele+ na lobwaku ya emonaneli. Ezali na moto oyo azali kobuka efelo,+ mpe koganga ekei na ngomba.+
6 Elame+ ekamati libenga ya makula, na kati ya likalo ya etumba ya moto ya mabele, oyo ezali na bampunda; mpe Kire+ ebimisi nguba.
7 Mpe ekosalema boye: mabwaku na yo ya patatalu oyo eleki kitoko ekotonda mpenza na makalo ya etumba, mpe bampunda ekotɛlɛma mpenza na porte,
8 mpe bakolongola elamba ya kozipa ya Yuda. Mpe okotala na mokolo yango na ngámbo ya esika ya kobomba bibundeli+ ya ndako ya zamba,+
9 mpe ya solo bokomona madusu na efelo ya Sité ya Davidi, mpo ekozala mpenza mingi.+ Mpe bokoyanganisa mai ya liziba ya nse.+
10 Mpe bokotánga mpenza bandako ya Yerusaleme. Bokobuka mpe bandako mpo na kokómisa efelo+ esika moko oyo moto akoki kokóma te.
11 Mpe ekozala na libulu ya kosangisa mai oyo bokosala na kati ya bifelo yango mibale mpo na mai ya liziba ya kala.+ Kasi ya solo bokotala te Mokeli Monene na yango, mpe ye oyo azalaki kosala yango banda kala, bokomona ye te.
12 “Mpe na mokolo yango, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,+ Yehova ya mampinga, akosɛnga ete bólela+ mpe bósala lilaka, bósala libandi mpe bókanga ngɔtɔ na loketo.+
13 Kasi talá! kosepela makasi mpe esengo, koboma bangɔmbɛ mpe koboma bampate, kolya mosuni mpe komɛla vinyo:+ ‘Tólya mpe tómɛla, mpo lobi tokokufa.’”+
14 Mpe Yehova ya mampinga alobaki na matoi na ngai+ ete: “‘Libunga na bino oyo ekozipama te+ kino bokokufa,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
15 Talá oyo Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga, alobi: “Kende, kɔtá epai ya kapita oyo, epai ya Shebena,+ oyo azali kokamba ndako,+ lobá boye:
16 ‘Eloko nini ozali na yango awa, mpe nani azali moto na yo awa, mpo omitimwela lilita awa?’+ Na esika oyo etombwaná, azali kotimola lilita na ye; na libanga, azali kopasola esika na ye ya kofanda.
17 ‘Talá! Yehova azali kobwaka yo na nse na kobwaka moko ya makasi, Ee mobali makasi, mpe azali kokanga yo makasi.
18 Na ntembe te, akolínga yo makasi, lokola ndembo mpo na mokili moko monene. Okokufa kuna, mpe kuna, makalo ya bitumba ya nkembo na yo ekozala nsɔni ya ndako ya nkolo na yo.
19 Mpe nakotindika yo, bongo okolongwa na ebonga na yo; mpe bakokweisa yo, bongo okolongwa na ebonga na yo ya lokumu.+
20 “‘Mpe ekosalema mpenza boye na mokolo yango: nakobenga mosaleli na ngai,+ elingi koloba Eliakime+ mwana ya Hilikiya.+
21 Mpe nakolatisa ye zambala na yo, mpe nakokanga ye makasi elamba na yo ya kokangisa na loketo,+ mpe boyangeli na yo, nakotya yango na lobɔkɔ na ye; mpe akokóma mpenza tata ya moto oyo afandi na Yerusaleme mpe ya ndako ya Yuda.+
22 Mpe nakotya fungola+ ya ndako ya Davidi na lipeka na ye, akofungola mpe moto moko te akokanga, akokanga mpe moto moko te akofungola.+
23 Mpe nakokɔtisa ye lokola pike+ na esika oyo ekoumela, mpe akokóma mpenza lokola kiti ya bokonzi ya nkembo ya ndako ya tata na ye.+
24 Mpe bakokakisa epai na ye nkembo nyonso ya ndako ya tata na ye, bakitani mpe bana, bambɛki nyonso ya mikemike, bambɛki oyo ezali lokola mabakuli mpe bambɛki nyonso oyo basali yango bilokó minene.
25 “‘Na mokolo yango,’ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga, ‘pike+ oyo ekɔtisami na esika oyo ekoumela ekolongolama,+ mpe bakokata yango mpe ekokwea, mpe mokumba oyo ezali likoló na yango ekolongolama, mpo Yehova ye moko alobi yango.’”+