Yisaya 21:1-17

21  Liyebisi mpo na esobe ya mbu:+ Lokola mipɛpɛ ya makasi+ na sudi ntango ezali koleka, eloko moko ezali kouta na esobe, na mokili ya nsɔmɔ.+  Bayebisi ngai emonaneli moko ya mpasi:+ Mokosi azali kosala na bokosi, mpe mopunzi azali kopunza.+ Ee Elame, matá! Ee Media,+ zingá! Nasali ete kokimela nyonso oyo azalaki kobimisela bato esila.+  Yango wana loketo na ngai etondi na mpasi makasi.+ Kotutuka esimbi ngai, lokola kotutuka ya mwasi oyo azali kobota.+ Nalɛmbi nzoto, yango wana nazali koyoka te; nabulungani, yango wana nazali komona te.  Motema na ngai etelengani; nalɛngi na nsɔmɔ. Mwa molili ya ebandeli ya butu oyo nazalaki kolinga ekómi kolɛngisa ngai.+  Bátya biloko na mesa, bábongisa esika ya kotya bakiti, bálya, bámɛla!+ Bótɛlɛma, bino bankumu,+ bótya nguba mafuta.+  Mpo talá oyo Yehova alobi na ngai: “Kende, tyá mokɛngɛli mpo ayebisa oyo ye azali komona.”+  Mpe amonaki likalo ya etumba ná farasa mibale oyo bakangisi esika moko, likalo ya etumba ya bampunda, mpe likalo ya etumba ya bakamela. Mpe atyaki mpenza likebi, ɛɛ likebi mingi.  Bongo abelelaki lokola nkɔsi:+ “Ee Yehova, na moi nazali se kotɛlɛma na linɔ́ngi ya mosɛnzɛli, mpe butu na butu natɛlɛmi na esika na ngai ya kokɛngɛla.+  Mpe talá, sikoyo, likalo moko ya etumba ezali koya ná bato, ná farasa mibale oyo bakangisi esika moko!”+ Bongo azwaki maloba mpe alobaki: “Akwei! Babilone akwei,+ mpe bikeko nyonso ya banzambe na ye oyo eyemami, abuki yango mpe elali na mabele!”+ 10  Ee bato na ngai oyo batutami lokola mbuma ná mwana ya esika na ngai ya kotutatuta mbuma,+ makambo oyo nayoki na Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, nayebisi bino yango. 11  Liyebisi mpo na Duma: Moto moko azali kobelela ngai uta na Seire:+ “Sinzili, boni butu? Sinzili, boni butu?”+ 12  Sinzili alobaki: “Ntɔngɔ esengeli koya, ná butu mpe. Soki bolingi kotuna, bótuna. Bóya lisusu!” 13  Liyebisi mpo na mokili patatalu oyo ekauká: Bokolala na zamba na butu, na mokili patatalu oyo ekauká, Ee bino milɔngɔ ya bato ya Dedane+ oyo bazali koleka. 14  Bóya na mai mpo na kokutana na moto oyo azali na mposa ya mai. Ee bato oyo bofandi na mokili ya Tema,+ bókende kokutana na moto oyo azali kokima, bóyela ye mampa. 15  Mpamba te bakimi mipanga, mopanga oyo ebendami, mpe litimbo oyo egumbami, mpo etumba eyei ndongo. 16  Mpo talá oyo Yehova alobi na ngai: “Liboso ete mbula moko ekoka, na kolanda bambula ya mosali oyo azwaka lifuti,+ nkembo nyonso ya Kedare+ ekosuka mpenza. 17  Mpe na motángo ya bato ya litimbo, baoyo batikali, mibali ya nguya na kati ya bana ya Kedare, bakokóma moke,+ mpo Yehova ye moko, Nzambe ya Yisraele, alobi yango.”+

Maloba na nse