Yisaya 20:1-6

20  Na mbula oyo Tartane+ ayaki na Ashedode,+ ntango Sargone mokonzi ya Asiri atindaki ye,+ mpe abundisaki Ashedode mpe azwaki yango;+  na ntango yango, Yehova alobaki na nzela ya Yisaya mwana ya Amoze+ ete: “Kende,+ mpe longolá ngɔtɔ oyo ezali na loketo na yo;+ longolá mpe basandale na yo na makolo.”+ Mpe asalaki se bongo, azalaki kotambolatambola bolumbu mpe makolo ngulu.+  Mpe Yehova alobaki lisusu boye: “Se ndenge mosaleli na ngai Yisaya atambolitamboli bolumbu mpe makolo ngulu mbula misato lokola elembo+ mpe likamwisi ya komonisa makambo oyo ekoyela Ezipito+ mpe Etiopi,+  ndenge yango nde mokonzi ya Asiri akotambwisa etuluku ya bato ya Ezipito+ oyo bakangami mpe ya bato ya Etiopi oyo bakomemama na mboka mopaya, bilenge mibali ná mikóló, bolumbu mpe makolo ngulu, mpe masɔkɔ polele, bolumbu ya Ezipito.+  Mpe bakozala mpenza na nsɔmɔ mpe bakoyoka nsɔni mpo na Etiopi oyo bazalaki kotyela elikya,+ mpe mpo na Ezipito, kitoko na bango.+  Mpe na mokolo yango, bato oyo bafandi na mokili oyo ya pembeni ya mbu bakoloba mpenza boye: ‘Talá ndenge eloko oyo tozalaki kotyela elikya ekómi, epai tozalaki kokima mpo na kozwa lisalisi, mpo na kobikisama liboso ya mokonzi ya Asiri!+ Bongo biso tokobika ndenge nini?’”

Maloba na nse