Yisaya 2:1-22

2  Likambo oyo Yisaya mwana ya Amoze amonaki na emonaneli mpo na Yuda mpe Yerusaleme:+  Mpe ekosalema mpenza boye na eleko ya nsuka ya mikolo:+ ngomba ya ndako+ ya Yehova ekopikama makasi likoló koleka nsɔngɛ ya bangomba,+ mpe ekotombwama mpenza likoló koleka bangomba mike;+ mpe bikólo nyonso ekosopana kuna.+  Mpe bato mingi ya bikólo bakokende mpenza mpe bakoloba ete: “Bóya,+ tómata na ngomba ya Yehova, na ndako ya Nzambe ya Yakobo; mpe akolakisa biso banzela na ye, mpe tokotambola na banzela na ye.”+ Mpo mobeko ekobima na Siona, mpe liloba ya Yehova na Yerusaleme.+  Mpe akokata mpenza makambo na kati ya bikólo,+ mpe akosembola makambo+ etali bato mingi ya bikólo.+ Mpe bakotula mipanga na bango mpo ekóma bitimweli ya mabele mpe makɔnga na bango mpo ekóma makwangola ya kokata matiti.+ Ekólo moko ekotombola mopanga te mpo na kobunda na ekólo mosusu, bakoyekola mpe etumba lisusu te.+  Ee bato ya ndako ya Yakobo, bóya, tótambola na pole ya Yehova.+  Mpo osundoli bato na yo, ndako ya Yakobo.+ Mpo batondi na makambo oyo euti na Ɛsti,+ mpe bazali bato ya misala ya maji+ lokola Bafilistia, mpe batondi na bana ya bapaya.+  Mokili na bango etondi na palata ná wolo, mpe biloko na bango ya motuya ezali na nsuka te.+ Mokili na bango etondi na bampunda, mpe makalo na bango ezali na nsuka te.+  Mokili na bango etondi na banzambe ya mpambampamba.+ Bazali kogumbamela misala ya moto, eloko oyo misapi ya moto esali.+  Mpe moto ya mabele azali kogumbama, mpe moto azali kokita na nse, mpe okoki kolimbisa bango te.+ 10  Kɔtá na libanga mpe bombaná na putulu mpo na nsɔmɔ ya Yehova, mpe mosika na nkembo ya bonene na ye.+ 11  Miso ya lolendo ya moto ya mabele ekokita mpenza na nse, mpe lofundo ya bato ekogumbama;+ mpe Yehova ye moko akotombwama mpenza na mokolo yango.+ 12  Mpo ezali mokolo ya Yehova ya mampinga.+ Ekoyela moto nyonso oyo azali komikumisa mpe komitombola ná moto nyonso oyo atombwami to oyo akitisami;+ 13  ná banzete nyonso ya sɛdrɛ ya Libá+ oyo ezali molai mpe etombwaná ná banzete minene nyonso ya Bashane;+ 14  ná bangomba nyonso ya milai ná bangomba mike nyonso oyo etombwaná;+ 15  ná linɔ́ngi nyonso ya molai ná efelo nyonso oyo ebatelami makasi;+ 16  ná bamasuwa nyonso ya Tarasisi+ ná bamasuwa nyonso ya kitoko. 17  Lolendo ya moto ya mabele ekogumbama mpenza, mpe lofundo ya bato ekokita mpenza na nse;+ mpe Yehova ye moko akotombwama mpenza na mokolo yango.+ 18  Mpe banzambe ya mpambampamba bakosila mpenza.+ 19  Mpe bato bakokɔta na mobenga ya mabanga mpe na mabulu ya putulu mpo na nsɔmɔ ya Yehova, mosika na nkembo ya bonene na ye,+ ntango akotɛlɛma mpo mabele elɛnga.+ 20  Na mokolo yango, moto ya mabele akobwakela milumbanzɛnzɛ mpe bangembo banzambe na ye ya palata oyo ezangá ntina mpe banzambe na ye ya wolo ya mpambampamba oyo basalaki mpo afukamela yango,+ 21  mpo na kokɔta na madusu ya mabanga mpe na minkaka ya mabanga minene, mpo na nsɔmɔ ya Yehova, mosika na nkembo ya bonene na ye,+ ntango akotɛlɛma mpo mabele elɛnga. 22  Mpo na bolamu na bino moko, bózala mosika na moto ya mabele, oyo mpema na ye ezali na zolo na ye,+ mpo bakotánga ye mpo na nini?+

Maloba na nse