Yisaya 19:1-25
19 Liyebisi mpo na Ezipito:+ Talá! Yehova amati likoló ya lipata oyo ezali kokende mbangu+ mpe azali koya kokɔta na Ezipito. Mpe ya solo, banzambe ya mpambampamba ya Ezipito bakolɛnga liboso na ye,+ mpe motema ya Ezipito ekonyangwa na katikati na yango.+
2 “Mpe nakotinda Baezipito bándongwana na Baezipito, mpe bakobunda mpenza moto na moto na ndeko na ye, mpe moto na moto na moninga na ye, engumba ná engumba, bokonzi ná bokonzi.+
3 Mpe elimo ya Ezipito ekobulungana mpenza na kati na yango,+ mpe nakobulunganisa mokano na yango.+ Mpe ya solo, bakoluka lisalisi epai ya banzambe ya mpambampamba+ mpe epai ya balengoli, bato oyo basololaka na bilimo ná bato oyo basalaka mosala ya kosakola makambo oyo ekoya.+
4 Mpe nakokaba Ezipito na lobɔkɔ ya nkolo moko ya makambo makasi, mpe mokonzi oyo akoyangela bango akozala makasi,”+ yango nde liloba ya Nkolo ya solo, Yehova ya mampinga.
5 Mpe mai ekokauka mpenza na mbu, mpe ebale ekokauka makasi mpe ekozala na mai lisusu te.+
6 Mpe bibale ekolumba nsolo mabe; mpe banzela ya mai ya Nile ya Ezipito ekokita mpenza mpe ekokauka.+ Lititi ya ebale+ ná nkɛkɛlɛ ekopɔla mpenza.
7 Bisika ya polele pene na Ebale Nile, na monɔkɔ ya Ebale Nile, mpe mabele nyonso oyo baloni mboto na Ebale Nile ekokauka.+ Ya solo, bakobengana yango, mpe ekozala lisusu te.
8 Mpe babomi-mbisi bakolela, mpe baoyo nyonso babwakaka bandɔbɔ na Ebale Nile bakozala mawamawa, mpe baoyo batandaka minyama na mai bakolɛmba mpenza.+
9 Mpe bato oyo basalaka mosala na lini oyo basanolá mpo ekóma nsingansinga+ bakokóma mpenza na nsɔni; ná basali-bilamba ya mpɛmbɛ.
10 Mpe bato na ye oyo basalaka mayemi na bilamba+ bakotutama, basali nyonso oyo bazwaka lifuti bakoyoka mawa na molimo.
11 Bankumu ya Zoane+ bazali mpenza bazoba. Mpo na oyo etali bato ya bwanya kati na bapesi-toli ya Farao, toli na bango ezali eloko moko oyo ezangi mayele.+ Ndenge nini bokoloba na Farao ete: “Nazali mwana ya bato ya bwanya, mwana ya bakonzi ya ntango ya kala”?
12 Bongo bazali wapi—bato na yo ya bwanya+—mpo báyebisa yo mpe mpo báyeba oyo Yehova ya mampinga akani mpo na Ezipito?+
13 Bankumu ya Zoane basali na bozoba,+ bankumu ya Nofe+ bakosami, bato minene+ ya mabota na ye batindi Ezipito eyengayenga.
14 Yehova ye moko akɔtisi ye elimo ya kolɛmba nzoto;+ mpe batindi Ezipito eyengayenga na mosala na yango nyonso, ndenge moto oyo alangwe amibalolaka na biloko oyo asanzi.+
15 Mpe Ezipito ekozala na mosala moko te oyo motó to mokila, etape to nkɛkɛlɛ, ekoki kosala.+
16 Na mokolo yango, Ezipito ekokóma lokola basi, mpe ekolɛnga mpenza+ mpe ekozala na nsɔmɔ mpo na koningisama ya lobɔkɔ oyo Yehova ya mampinga azali koningisela yango.+
17 Mpe mabele ya Yuda ekokóma mpenza eloko oyo ezali kopesa Ezipito kizunguzungu.+ Moto nyonso oyo bazali kolobela ye yango azali koyoka nsɔmɔ mpo na mokano oyo Yehova ya mampinga akani mpo na ye.+
18 Na mokolo yango, na mokili ya Ezipito,+ ekozala na bingumba mitano oyo ezali koloba monɔkɔ ya Kanana+ mpe oyo ezali kolapela Yehova ya mampinga ndai.+ Engumba moko ekobengama Engumba ya Kobuka.
19 Na mokolo yango, etumbelo moko ekozala mpo na Yehova na katikati ya mokili ya Ezipito,+ mpe likonzí moko mpo na Yehova pene na ndelo na yango.
20 Mpe yango ekozala elembo mpe litatoli mpo na Yehova ya mampinga na mokili ya Ezipito;+ mpo bakobelela Yehova mpo na banyokoli,+ mpe akotindela bango mobikisi, ɛɛ, mobikisi moko monene, oyo akobikisa mpenza bango.+
21 Mpe Yehova akoyebana mpenza epai ya Baezipito;+ mpe Baezipito bakoyeba mpenza Yehova na mokolo yango, mpe bakopesa mpenza mbeka mpe likabo+ mpe bakosalela mpenza Yehova elako mpe bakokokisa yango.+
22 Mpe Yehova akobɛta mpenza Ezipito.+ Akobɛta mpenza mpe akobikisa;+ mpe bakozongela Yehova,+ mpe akondima mpenza bábondela ye mpe akobikisa mpenza bango.+
23 Na mokolo yango, balabala moko monene+ ekozala banda na Ezipito tii na Asiri, mpe Asiri akoya mpenza na Ezipito, mpe Ezipito na Asiri; mpe ya solo, bakokóma basaleli na ye, Ezipito ná Asiri.
24 Na mokolo yango, Yisraele akozala moto ya misato elongo na Ezipito mpe elongo na Asiri,+ elingi koloba lipamboli na katikati ya mabele,+
25 mpo Yehova ya mampinga akopambola yango+ boye: “Ezipito, bato na ngai, mpe Asiri,+ mosala ya mabɔkɔ na ngai, mpe Yisraele,+ libula na ngai, bápambwama.”