Yisaya 17:1-14

17  Liyebisi mpo na Damasi:+ “Talá! Balongoli Damasi, ezali engumba lisusu te, mpe ekómi libondo ya bitiká oyo ezali kokweakwea.+  Bingumba ya Aroere+ oyo batiki ekómi bisika ya mpamba mpo na bitonga, epai bitonga ezali mpenza kolala, moto ata moko te azali kolɛngisa yango.+  Mpe engumba oyo ebatelami makasi ezali lisusu te na Efraime,+ mpe bokonzi esili na Damasi;+ mpe bato ya Siri oyo batikali bakokóma lokola nkembo ya bana ya Yisraele,” yango nde liloba ya Yehova ya mampinga.+  “Mpe na mokolo yango, ekosalema mpenza boye: nkembo ya Yakobo ekokita,+ mpe nzoto na ye ya mafuta ekokɔnda.+  Mpe ekosalema mpenza boye: ntango mobuki-mbuma akoyanganisa mbuma oyo etɛlɛmi naino mpe lobɔkɔ na ye ekobuka mitó ya mbuma,+ akokóma mpenza lokola moto oyo azali kolɔkɔta mitó ya mbuma na lobwaku ya patatalu ya Refaime.+  Mpe na kati na yango ekotikala kaka mbuma ya kolɔkɔta lokola ntango baningisaka nzete ya olive: mbuma mibale to misato ya olive oyo eteli na nsɔngɛ ya etape; mbuma minei to mitano kuna na bitape oyo ebotaka mbuma,” yango nde liloba ya Yehova Nzambe ya Yisraele.+  Na mokolo yango, moto ya mabele akotala Mokeli na ye, mpe miso na ye ekotalatala mpenza Mosantu ya Yisraele.+  Mpe akotala bitumbelo te,+ mosala ya mabɔkɔ na ye;+ mpe akotalatala te eloko oyo misapi na ye esali, to banzete ya losambo to bitumbelo ya mpaka ya malasi.+  Na mokolo yango, bingumba na ye ya bandako ya makasi ekokóma lokola esika oyo basundolá mpenza kosundola na kati ya zamba, ɛɛ etape oyo basundolá mpenza kosundola mpo na bana ya Yisraele; mpe ekokóma mpenza esika oyo etikalá mpamba.+ 10  Mpo obosani+ Nzambe ya lobiko na yo;+ mpe okanisi lisusu te Libanga+ ya ndako na yo ya makasi. Yango wana ozali kolona bilanga kitoko, mpe ozali kotya mwa etape ya mopaya wana. 11  Na moi, okoki kozinga malamumalamu elanga na yo na lopango, mpe na ntɔngɔ, okoki kosala ete molona na yo ebimisa nkasa, kasi mosala ya kobuka mbuma ekokima mpenza na mokolo ya maladi mpe ya mpasi oyo ekosila te.+ 12  Aa yikiyiki ya ebele ya bato ya bikólo, oyo bazali kosala makɛlɛlɛ lokola makɛlɛlɛ ya mbu! Mpe makɛlɛlɛ ya bituluku ya bato ya bikólo, oyo bazali kosala makɛlɛlɛ lokola makɛlɛlɛ ya mai ya makasi!+ 13  Bituluku ya bato ya bikólo+ bakosala makɛlɛlɛ lokola makɛlɛlɛ ya mai ebele. Mpe Ye akopamela yango mpenza,+ mpe ekokima mpenza mosika mpe bakobengana yango lokola mposo ya blé ya bangomba na ntango ya mopɛpɛ mpe lokola ekumbaki oyo ezali kobalusa bansende na ntango ya mopɛpɛ ya makasi.+ 14  Na ntango ya mpokwa, talá! nsɔmɔ ya pwasa. Liboso ntɔngɔ etana—ezali lisusu te.+ Yango nde likabo ya baoyo bazali kobɔtɔla biso biloko, mpe libula ya baoyo bazali kopunza biso.+

Maloba na nse