Yisaya 16:1-14
16 Bótindela moyangeli ya mokili mpate moko ya mobali,+ euti na Sela, eleki na esobe tii na ngomba ya mwana mwasi ya Siona.+
2 Mpe ekosalema mpenza boye: Na bisika oyo bakatisaka Arnone+ na makolo, bana basi ya Moabe bakokóma lokola ndɛkɛ oyo ezali kokima, oyo babengani na zumbu na yango.+
3 “Bóya na toli, bókokisa ekateli.+
“Ntango ya midi, kómisá elili na yo lokola butu.+ Bombá bato oyo bapalangani;+ kokaba ata moto moko te oyo azali kokima.+
4 Ee Moabe, tiká bato na ngai oyo bapalangani báfanda bapaya epai na yo.+ Kómá esika na bango ya kobombama mpo na mopunzi.+ Mpo monyokoli akómi na nsuka na ye; kopunza esili; baoyo bazalaki konyatanyata basusu basili na mabele.+
5 “Mpe na motema boboto, kiti ya bokonzi ekopikama makasi mpenza,+ mpe moto moko akofanda na yango na bosembo na hema ya Davidi,+ azali kosambisa mpe azali koluka bosembo mpe azali kosala noki mpo na kosalela boyengebene.”+
6 Toyoki nsango ya lolendo ya Moabe, ete azali na lolendo mingi;+ lofundo na ye, lolendo na ye ná nkɛlɛ na ye+—bilobaloba na ye ekosalema te.+
7 Yango wana, Moabe ekoganga na kolela mpo na Moabe; ɛɛ, Moabe mobimba ekoganga na kolela.+ Baoyo banyokwami bakolelalela mpenza mpo na bagato ya mbuma ya vinyo ya Kire-haresete,+
8 mpo mikala ya bilanga ya Heshibone+ ekauki. Nzete ya vinyo ya Sibima+—bankolo ya bikólo bakati bitape na yango ya motane ngwaa. Ekómaki kino na Yazere;+ eyengayengaki na esobe. Batikaki bitape na yango ekola mingi; elekaki kino na mbu.
9 Yango wana nakolela nzete ya vinyo ya Sibima ndenge nazali kolela Yazere.+ Ee Heshibone+ mpe Eleale,+ nakopɔlisa yo na mpisoli na ngai mpo koganga ebimi na eleko na yo ya molunge mpe na eleko na yo ya kobuka mbuma.+
10 Mpo balongoli nsai mpe esengo na elanga ya banzete ya mbuma; mpe koganga ya esengo ezali te na bilanga ya vinyo, bazali kobelela te.+ Monyati azali konyata mbuma moko te ya vinyo na bikamwelo.+ Nasali ete bátika kobelela.+
11 Yango wana libumu na ngai ezali koningana lokola nzɛnzɛ mpo na Moabe,+ mpe misɔpɔ na ngai ezali koningana mpo na Kire-haresete.+
12 Mpe esalemaki boye: emonanaki ete Moabe alɛmbi na esika oyo etombwaná;+ mpe ayaki na esika na ye mosantu mpo na kobondela,+ mpe akokaki kosala eloko moko te.+
13 Yango nde liloba Yehova alobaki mpo na Moabe kala.
14 Mpe sikoyo Yehova alobi ete: “Liboso mbula misato esila, na kolanda bambula ya mosali oyo azwaka lifuti,+ nkembo+ ya Moabe mpe ekosambwisama mpenza na ebele ya yikiyiki ya ndenge na ndenge, mpe baoyo bakotikala bakozala moke mpenza, bakozala na nguya te.”+