Yisaya 15:1-9
15 Liyebisi mpo na Moabe:+ Lokola epunzami na butu, Are+ ya Moabe ekangisami monɔkɔ. Lokola epunzami na butu, Kire+ ya Moabe ekangisami monɔkɔ.
2 Amati na Ndako mpe na Dibone,+ na bisika oyo etombwaná, mpo na kolela. Moabe ezali koganga na kolela mpo na Nebo+ mpe mpo na Medeba.+ Libandi+ ezali na mitó nyonso oyo ezali na kati; mandefu nyonso ekatami.
3 Na babalabala na yango, bakangi ngɔtɔ+ na loketo. Kuna na bansamba+ mpe kuna na bisika minene ya bato nyonso, moto nyonso azali koganga na kolela, azali kokita na kolela.+
4 Mpe Heshibone ná Eleale+ ezali kobelela. Mongongo na yango eyokani kino na Yahaze.+ Yango wana bato ya Moabe oyo bazali na bibundeli bazali se koganga. Molimo na ye ezali kolɛnga.
5 Motema na ngai ezali koganga na kolela mpo na Moabe mpenza.+ Bato na ye oyo bakimi bakómi kino na Zoare+ mpe na Eglate-shelishiya.+ Mpo, na esika ya komata na Luhite+—moto na moto azali komata yango na kolela; mpo, na nzela oyo ekei na Horonaime,+ bazali kotombola mongongo ya koganga mpo na likama monene yango.
6 Mpo mai ya Nimirime+ ebebi mpenza kobeba. Mpo matiti ya mobesu ekauki, matiti esili; eloko ya mobesu ezali te.+
7 Yango wana biloko oyo etikali mpe biloko na bango oyo ebombami oyo batondisaki esika moko, bazali se komema yango na ngámbo ya lobwaku ya mokɛli ya banzete ya arava.
8 Mpo koganga etamboli epai na epai na teritware ya Moabe.+ Kolela makasi na yango ekómi kino na Eglaime; kolela makasi na yango ekómi kino na Beere-elime,
9 mpo mai ya Dimone etondi na makila. Mpo nakobakisela Dimone makambo mosusu, na ndakisa nkɔsi mpo na bato ya Moabe oyo bakobika mpe mpo na bato oyo bakotikala na mabele yango.+