Yisaya 10:1-34
10 Mawa na baoyo bazali kobimisa malako ya kopesa mpasi+ mpe na baoyo, awa bazali kokoma ntango nyonso, bazali kokoma makambo oyo ezali kopesa bato mpasi mpenza,
2 mpo bábengana bato oyo bazangá ete básamba likambo na bango te mpe bábɔtɔla bato na ngai oyo bazali na mpasi bosembo,+ mpo basi oyo mibali bakufá bákóma biloko na bango ya kopunza, mpe mpo bápunza ata bana oyo batata bakufá!+
3 Bongo bokosala nini na mokolo bakotyela bino likebi+ mpe na ntango ya libebi, ntango yango ekouta mosika?+ Bokokima epai ya nani mpo na koluka lisalisi,+ mpe bokotika nkembo na bino epai wapi?+
4 Lobá kaka moto agumbama na nse ya bato ya bolɔkɔ mpe bato bákwea se kokwea na nse ya baoyo babomami.+ Mpo na makambo oyo nyonso, nkanda na ye ezongi nsima te, kasi lobɔkɔ na ye esembolami kaka.+
5 “Aha, Moasiri,+ fimbo ya nkanda na ngai,+ mpe mwa eteni ya nzete oyo ezali na lobɔkɔ na bango mpo na makaneli na ngai!
6 Nakotinda ye akende kobunda na ekólo oyo epɛngwi,+ mpe nakopesa ye mitindo mpo na kobunda na bato ya nkɛlɛ na ngai,+ mpo na kobɔtɔla biloko mingi mpe kopunza biloko mingi mpe kokómisa yango esika ya konyatanyata lokola mabele ya lima ya babalabala.+
7 Ata soki azali bongo te, akoyoka mposa ya kosala yango; ata soki motema na ye ezali bongo te, akokana bongo, mpo na motema na ye, likanisi ezali nde ya kobebisa nyɛɛ,+ mpe ya koboma bikólo, ekozala moke te.+
8 Mpo akoloba: ‘Bankumu na ngai bazali mpe bakonzi te?+
9 Kalano+ ezali lokola Karakemishe+ te? Hamate+ ezali lokola Arpade+ te? Samaria+ ezali lokola Damasi+ te?
10 Ntango nyonso oyo lobɔkɔ na ngai ekokómela makonzi ya nzambe ya mpambampamba, oyo bikeko na ye oyo eyemami ezali ebele koleka bikeko oyo ezali na Yerusaleme mpe na Samaria,+
11 ndenge kaka nakosala Samaria mpe banzambe na ye ya mpambampamba,+ nakosala Yerusaleme mpe bikeko na ye+ bongo, boye te?’
12 “Mpe ekosalema mpenza boye: ntango Yehova akosilisa mosala na ye nyonso na Ngomba Siona mpe na Yerusaleme, nakotuna mokonzi ya Asiri azongisa monɔkɔ mpo na mbuma ya lofundo ya motema na ye mpe mpo na komitombola ya miso na ye ya lolendo.+
13 Mpo alobi: ‘Nakosala mpenza na nguya ya lobɔkɔ na ngai,+ mpe na bwanya na ngai, mpo nazali mpenza na mayele; mpe nakolongola bandelo ya bato ya bikólo,+ mpe nakopunza mpenza biloko na bango oyo ebombamá,+ mpe nakokitisa bato oyo bafandi wana ndenge moto ya nguya akitisaka.+
14 Mpe lobɔkɔ na ngai+ ekokóma esika biloko+ ya bato ya bikólo ezali ndenge lobɔkɔ ekómaka na zumbu; mpe ngai moko nakosangisa mabele mobimba mpenza lokola ntango moto asangisaka maki oyo etikali, mpe ya solo ata moko te akobɛta mapapu na ye to akofungola monɔkɔ na ye to akoloba swiswiswi.’”
15 Sóka ekomikumisa ete eleki moto oyo azali kokata na yango, to sii ekomitombola nde ete eleki moto oyo azali kosalela yango? Lokola nde lingenda ezali koningisa baoyo bazali kotombola yango, lokola nde fimbo ezali kotombola moto oyo azali nzete te!+
16 Yango wana Nkolo ya solo, Yehova ya mampinga, akokoba kotindela bato na ye ya mafutamafuta maladi ya kokɔndisa,+ mpe na nse ya nkembo na ye eloko moko oyo ezali kopela ekokoba kopela lokola mɔtɔ.+
17 Mpe Pole+ ya Yisraele akokóma mɔtɔ,+ mpe Mosantu na ye akokóma lolemo ya mɔtɔ;+ mpe yango ekopela mpe ekolya matiti na ye ya mabe mpe mwa banzete na ye ya nzubɛ+ na mokolo kaka moko.
18 Mpe Ye akosukisa nkembo ya zamba na ye mpe ya elanga na ye ya banzete,+ ɛɛ banda na molimo tii na mosuni, mpe ekokóma mpenza lokola kokɔnda ya moto oyo azali kobɛla.+
19 Mpe banzete oyo ekotikala na zamba na ye—ekokóma na motángo moko oyo ata mwana moke ya mobali akokoka kokoma yango.+
20 Mpe ekosalema mpenza boye na mokolo yango: baoyo bakotikala na Yisraele+ mpe baoyo babiki na ndako ya Yakobo bakoluka lisusu lisalisi te epai na ye oyo azali kobɛta bango,+ mpe bakoluka mpenza lisalisi epai ya Yehova, Mosantu ya Yisraele,+ na bosolo.+
21 Kaka mwa bato oyo batikali, bato ya Yakobo oyo batikali, nde bakozongela Nzambe ya Nguya.+
22 Mpo ata soki bato na yo, Ee Yisraele, bazali lokola bambuma ya zɛlo ya mbu,+ kaka mwa bato na bango oyo batikali nde bakozonga.+ Ekateli oyo ezwami ya kosilisa bino nyɛɛ+ ekokwela bino lokola mpela na boyengebene,+
23 mpo Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga, akosilisa nyɛɛ+ mpe akokweisa ekateli ya makasi na katikati ya mokili mobimba.+
24 Yango wana, talá oyo Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,+ Yehova ya mampinga, alobi: “Ee bato na ngai oyo bofandi na Siona,+ bóbanga Moasiri te, oyo azalaki kobɛtabɛta bino na fimbo+ mpe oyo azalaki kotombolela bino lingenda na ye ndenge Ezipito ezalaki kosala.+
25 Mpo etikali kaka mwa ntango moke—mpe makaneli+ ekosila, mpe nkanda na ngai ekozala epai na bango mpo na kolimwisa bango.+
26 Mpe ya solo, Yehova ya mampinga akoningisela ye fimbo+ lokola ntango Midiane ebɛtamaki pene na libanga ya Orebe;+ mpe lingenda na ye ekozala likoló ya mbu,+ mpe akotombola yango mpenza ndenge atombolelaki Ezipito.+
27 “Mpe ekosalema mpenza boye na mokolo yango: mokumba na ye ekolongwa na lipeka na yo,+ mpe ekanganeli na ye ekolongwa na nkingo na yo,+ mpe ekanganeli yango ekobebisama mpenza+ mpo na mafuta.”
28 Ayeli Aiyate;+ aleki na Migrone; atiki biloko na ye na Mikemashe.+
29 Bakatisi esika bakatisaka mai na makolo, Geba+ ezali esika na bango ya kolala na butu, Rama+ elɛngi, Gibea+ ya Saulo ekimi.
30 Ee mwana mwasi ya Galime,+ bimisá mongongo na yo mpe gangá makasi. Ee Laisha, tyá likebi. Ee yo moto ya mpasi, Anatote!+
31 Madamena ekimi. Bato oyo bafandi na Gebime bazwi esika ya komibomba.
32 Moi ezali naino na Nobe+ mpo na kotɛlɛma mwa moke. Azali koningisa lobɔkɔ na ye mpo na kobangisa ngomba ya mwana mwasi ya Siona, ngomba moke ya Yerusaleme.+
33 Talá! Nkolo ya solo, Yehova ya mampinga, azali kokata bitape na lokito moko ya nsɔmɔ;+ mpe oyo ekoli mpe ekómi milai ezali kokatama, mpe oyo etombwani ekokita.+
34 Mpe akweisi mwa banzete oyo ezali na zamba na esaleli ya ebende, mpe ye oyo azali na nguya akokweisa Libá.+