Yisaya 1:1-31
1 Emonaneli+ ya Yisaya+ mwana ya Amoze, oyo amonaki mpo na Yuda mpe Yerusaleme na mikolo ya Uzia,+ Yotame,+ Ahaze+ ná Hizikiya,+ bakonzi ya Yuda:+
2 Yoká,+ Ee likoló, mpe tyá litoi, Ee mabele, mpo Yehova ye moko alobi: “Nabɔkɔli mpe nakolisi bana,+ kasi bango batombokeli ngai.+
3 Ngɔmbɛ eyebaka malamu moto oyo asombi yango, mpe mpunda eyebaka esika nkolo na yango apesaka yango bilei; Yisraele bayebi ngai te,+ bato na ngai bamitambwisi na mayele te.”+
4 Mawa na ekólo ya masumu,+ bato oyo libunga na bango ekómi kilo, momboto oyo ezali kosala mabe,+ bana oyo babebisaka makambo!+ Batiki Yehova,+ bazangi limemya epai ya Mosantu ya Yisraele,+ bapesi ye mokɔngɔ.+
5 Bábɛta bino lisusu wapi,+ awa bozali kaka kotomboka?+ Motó mobimba ezali na maladi, mpe motema mobimba elɛmbi.+
6 Banda na nse ya lokolo tii na motó, eteni moko ya malamu ezali te.+ Bampota, bisika oyo bazokisi mpe bisika oyo babɛti—bafini yango te mpo ebimisa mafina, bakangisi yango te, balɛmbisi yango na mafuta mpe te.+
7 Mokili na bino etikali mpamba,+ bingumba na bino etumbami na mɔtɔ;+ bapaya+ bazali kolya mbuma ya mabele na bino+ na miso na bino, mpe libebi yango ezali ndenge bapaya babebisaka.+
8 Mpe mwana mwasi ya Siona+ atikali lokola mwa ndako ya matiti na elanga ya vinyo, lokola mwa ndako ya matiti ya mokɛngɛli na elanga ya kɔkɔmbrɛ, lokola engumba oyo ezingami.+
9 Soki Yehova ya mampinga ye moko atikelaka biso te mwa bato oyo babiki,+ mbɛlɛ tokómi lokola Sodoma, mbɛlɛ tokokani na Gomora.+
10 Bóyoka liloba ya Yehova,+ bino bakonzi ya Sodoma+ oyo bozali koyangela na makasi.+ Bino bato ya Gomora, bótya litoi na mobeko ya Nzambe na biso.
11 Yehova alobi: “Litomba nini nazali na yango na ebele ya bambeka na bino? Nalɛmbi makabo ya kotumba mobimba+ ya bampate ya mibali+ mpe mafuta ya banyama oyo eleisami malamu;+ mpe nasepeli te+ na makila+ ya bana-ngɔmbɛ ya mibali mpe ya bana-mpate ya mibali mpe ya bantaba ya mibali.+
12 Ntango bozali kaka koya komona elongi na ngai,+ nani asɛngi bino likambo oyo ete bónyatanyata mapango na ngai?+
13 Bóya lisusu te na makabo ya mbuma ya mpambampamba.+ Mpaka ya malasi—ezali eloko oyo nayiná.+ Bozali kotosa sanza ya sika+ mpe sabata,+ kobengisa liyangani+—kasi nakoki te kondima misala ya maji+ esika moko na liyangani monene.
14 Molimo na ngai eyini basanza na bino ya sika mpe bileko na bino ya fɛti.+ Ekómeli ngai kilo;+ nalɛmbi komema yango.+
15 Mpe ntango bozali kosembola mabɔkɔ na bino,+ nazali kozipa miso na ngai liboso na bino.+ Ata bozali kobondela mingi,+ nazali koyoka te;+ mabɔkɔ na bino etondi na makila oyo bosopi.+
16 Bómisukola;+ bómipɛtola;+ bólongola liboso ya miso na ngai mabe ya misala na bino;+ bótika kosala mabe.+
17 Bóyekola kosala malamu;+ bóluka bosembo;+ bósembola moto oyo azali konyokola;+ bókata likambo mpo na mwana oyo tata akufá;+ bósamba likambo ya mwasi oyo mobali akufá.”+
18 Yehova alobi: “Sikoyo, bóya mpe tóbongisa makambo kati na biso.+ Ata soki masumu na bino ezali motane makasi, ekokóma mpɛmbɛ lokola nɛjɛ;+ ata soki ezali motane lokola elamba ya motane makasi, ekokóma lokola lɛnɛ.
19 Soki bolingi mpe boyoki, bokolya biloko ya malamu ya mokili.+
20 Kasi soki boboyi+ mpe botomboki mpenza, mopanga ekolya bino; mpo monɔkɔ ya Yehova elobi bongo.”+
21 Ee talá ndenge engumba ya sembo+ ekómi mwasi ya ndumba!+ Etondaki na bosembo;+ boyengebene efandaki kuna,+ kasi sikoyo ezali nde babomi-bato.+
22 Palata na bino ekómi bosɔtɔ.+ Masanga na bino ya blé esangisami na mai.+
23 Bankumu na yo bazali motó makasi mpe bazali baninga ya miyibi.+ Mokomoko na bango azali moto oyo alingá kanyaka+ mpe moto oyo alandelaka makabo.+ Bazali kokata na bosembo te likambo ya mwana oyo tata akufá; mpe ata likambo ya mwasi oyo mobali akufá ekómelaka bango te.+
24 Yango wana, liloba ya Nkolo ya solo, Yehova ya mampinga, Oyo na nguya ya Yisraele,+ ezali boye: “Aha! Nakopema na ndenge nakolongola banguna na ngai, mpe ngai moko nakozongisela banguna+ na ngai mabe.+
25 Mpe nakobalusela yo lobɔkɔ na ngai, mpe nakonyangwisa bosɔtɔ na yo nyonso, mpe nakolongola bosɔtɔ na yo nyonso.+
26 Mpe nakozongisela yo basambisi lokola liboso, mpe bapesi-toli lokola na ebandeli.+ Nsima na yango, okobengama Engumba ya Boyengebene, Sité ya Bosembo.+
27 Siona ekosikolama+ na bosembo, mpe bato na ye oyo bakozonga, bakozonga na boyengebene.+
28 Mpe batomboki ná bato ya masumu bakokwea bango nyonso na mbala moko,+ mpe baoyo bazali kotika Yehova bakosila.+
29 Mpo bakoyoka nsɔni mpo na banzete makasi oyo bolulaki,+ mpe bokosambwa mpo na bilanga oyo boponi.+
30 Mpo bokokóma lokola nzete monene oyo nkasa na yango ezali kokauka,+ mpe lokola elanga oyo ezali na mai te.
31 Mpe engambe mobali akokóma mpenza lokola nsinga ya likambu,+ mpe mbuma ya mosala na ye ekokóma lokola montɛntɛi; mpe yango nyonso mibale ekopela mɔtɔ na mbala moko, moto ya koboma yango akozala te.”+

