Yirimia 9:1-26

9  Ee soki motó na ngai ezalaka ata mai, mpe soki miso na ngai ezalaka ata liziba ya mpisoli!+ Mbɛlɛ butu moi, nalingaki kolela bato ya mwana mwasi ya bato na ngai oyo babomami.+  Ee soki nazalaka ata na esika ya kofanda mpo na bato ya mobembo na esobe!+ Mbɛlɛ nalingaki kotika bato na ngai mpe kokende mosika na bango, mpo bango nyonso bazali bato ya ekobo,+ liyangani moko monene ya bato oyo basalaka na bokosi;+  mpe bazali kogumba lolemo na bango lokola litimbo na bango na makambo ya lokuta;+ kasi nguya oyo bazali na yango na mokili ezali mpo na bosembo te. “Bazali kobima mpo na kosala kaka mabe na mabe, mpe babosani kutu ngai,”+ yango nde liloba ya Yehova.  “Bókeba moto na moto na moninga na ye;+ mpe bótyela ndeko ata moko motema te.+ Mpo ndeko nyonso alingi kaka kozwa esika ya ndeko na ye,+ mpe moninga nyonso alingi kaka kotambolatambola mpo na kokosela bato makambo,+  mpe bazali kaka kokosa moto na moto moninga na ye;+ mpe bazali koloba solo ata moke te. Bateyi lolemo na bango koloba lokuta.+ Bango moko bamilɛmbisi na kosala mabe.+  “Esika na yo ya kofanda ezali na kati ya bokosi.+ Mpo na bokosi baboyi koyeba ngai,”+ yango nde liloba ya Yehova.  Na yango, Yehova ya mampinga alobi boye: “Talá nazali konyangola bango lokola ebende, mpe nasengeli kotalatala bango,+ mpo ndenge nini mosusu nakosala mpo na mwana mwasi ya bato na ngai?+  Lolemo na bango ezali likula oyo ebomaka.+ Ezali koloba makambo ya bokosi. Na monɔkɔ na ye, moto azali kaka koloba maloba ya kimya na moninga na ye; kasi na motema azali kotya motambo na ye.”+  “Mpo na makambo oyo, nakosɛnga bango bázongisa monɔkɔ te?” yango nde liloba ya Yehova. “To ekólo ya boye, molimo na ngai esengeli kozongisela yango mabe te?+ 10  Nakotombola mongongo na ngai na kolela mpe na bileli likoló ya bangomba,+ mpe na loyembo ya mawa na esika ya koleisa banyama matiti na esobe; mpo yango ekotumbama,+ bongo moto ata moko te akoleka wana mpe bato bakoyoka mongongo ya bibwɛlɛ te.+ Bikelamu oyo epumbwaka ya likoló mpe nyama ekokima, ekokende.+ 11  Mpe nakokómisa Yerusaleme mabondo ya mabanga,+ efandelo ya bambulú;+ mpe nakokómisa bingumba ya Yuda esika oyo etikalá mpamba, oyo moto afandi te.+ 12  “Nani azali moto ya bwanya, mpo akanga ntina ya likambo oyo, ɛɛ, nani moto oyo monɔkɔ ya Yehova elobi na ye, mpo ayebisa likambo yango?+ Mpo na nini mokili ekobeba mpenza, ekotumbama mpenza lokola esobe kozanga ete moto aleka kuna?”+ 13  Mpe Yehova alobaki boye: “Mpo batiki mobeko na ngai oyo napesaki ete ezala liboso na bango, mpe lokola batosi mongongo na ngai te mpe batamboli kati na yango te,+ 14  kasi bazalaki kaka kotambola na kolanda motó makasi na bango+ mpe kolanda bikeko ya Baala,+ oyo batata na bango bateyaki bango;+ 15  na yango, talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Talá nakoleisa bango, elingi koloba, bato oyo, mbondo,+ mpe nakomɛlisa bango mai oyo ezali na ngɛngɛ mabe;+ 16  mpe nakopanza bango na kati ya bikólo oyo bayebi te, ezala bango, ezala batata na bango,+ mpe nakotinda mopanga nsima na bango kino nakosilisa bango nyɛɛ.’+ 17  “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Bómitambwisa na mayele, mpe bóbenga basi oyo bayembaka nzembo ya mawa,+ báya; mpe bótinda bato bábenga basi oyo bayebi yango malamu, báya,+ 18  mpe básala nokinoki mpe bátombola mongongo na bileli mpo na biso. Mpe miso na biso ebimisa mpisoli mpe miso na biso oyo ezali kongɛnga ebimisa mai.+ 19  Mpo mongongo ya bileli nde eyokani longwa na Siona:+ “Topunzami mpenza!+ Toyoki nsɔni mingi mpenza! Mpo totiki mokili; mpo bakweisi bisika na biso ya kofanda.”+ 20  Kasi bóyoka liloba ya Yehova, Ee bino basi, mpe litoi na bino esimba liloba ya monɔkɔ na ye. Na nsima bóteya bana na bino ya basi ndenge ya kolela,+ mpe mwasi nyonso ateya moninga na ye loyembo ya mawa.+ 21  Mpo liwa emati na nzela ya maninisa na biso; ekɔti na bandako milai na biso ya kofanda, mpo na kolongola mwana na balabala, bilenge mibali na bisika minene ya bato nyonso.’+ 22  “Lobá boye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Bibembe ya bato ekokwea lokola nyɛi likoló ya elanga mpe lokola molɔngɔ ya mbuma oyo bakati sika na nsima ya mobuki, oyo ezangi moto mpo na kolɔkɔta yango.”’”+ 23  Talá oyo Yehova alobi: “Moto ya bwanya amikumisa te mpo na bwanya na ye,+ mpe moto ya nguya amikumisa te mpo na nguya+ na ye. Moto ya bomɛngo amikumisa te mpo na bomɛngo+ na ye.” 24  “Kasi moto oyo azali komikumisa, amikumisa mpo azali na mayele ya kososola+ mpe ayebi ngai, ete nazali Yehova,+ ngai Moto namonisaka motema boboto, bosembo mpe boyengebene kati na mabele;+ mpo nasepelaka na makambo wana,”+ yango nde liloba ya Yehova. 25  “Talá! Mikolo ezali koya,” yango nde liloba ya Yehova, “nakosɛnga bato nyonso oyo bakatamá ngenga, nzokande bakatami naino ngenga te, ete bázongisa monɔkɔ,+ 26  Ezipito+ ná Yuda,+ Edome,+ bana ya Amone+ ná Moabe,+ mpe baoyo nyonso bazali na nsuki oyo ekatami na mpakatoi, baoyo bazali kofanda na esobe;+ mpo bikólo nyonso ekatami ngenga te, mpe ndako mobimba ya Yisraele ekatami ngenga na motema te.”+

Maloba na nse