Yirimia 8:1-22

8  “Na ntango yango,” yango nde liloba ya Yehova, “bato bakobimisa mpe mikuwa ya bakonzi ya Yuda, mikuwa ya bankumu na yango, mikuwa ya banganga-nzambe, mikuwa ya basakoli ná mikuwa ya bato oyo bafandi na Yerusaleme na malita na bango.+  Mpe bakotanda yango mpenza liboso ya moi, ya sanza mpe ya limpinga mobimba ya likoló oyo bango balingaki, oyo bango basalelaki, oyo bango balandaki,+ oyo bango balukaki mpe oyo bango bagumbamelaki.+ Ekosangisama esika moko te, mpe ekokundama te. Ekokóma lokola nyɛi na etando ya mabele.”+  “Mpe batikali nyonso kati na bato oyo bakotikala na libota oyo ya mabe na bisika nyonso ya baoyo bakotikala, na bisika oyo nakopalanganisa bango,+ bakopona mpenza liwa na esika ya kopona bomoi,”+ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga.  “Mpe osengeli koloba na bango boye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Bakokwea mpe bakotɛlɛma lisusu te?+ Soki moko azongi, mosusu akozonga mpe te?+  Mpo na nini bato oyo, Yerusaleme, bazangi bosembo na kozanga bosembo moko oyo ezali koumela? Basimbi bokosi;+ baboyi kozonga.+  Natye likebi,+ mpe nazalaki kaka koyoka.+ Ndenge oyo bazalaki koloba ezalaki malamu te. Moto moko te abongolaki motema na mabe na ye,+ na kolobáká ete: ‘Nini oyo nasali?’ Moto na moto azali kozonga na nzela ya bato mingi,+ lokola mpunda oyo ezali kopumbuka mpo na kokɔta na etumba.  Ata nkɔngi na likoló—eyebaka ntango na yango oyo etyamá;+ mpe epopo+ ná ndɛkɛ babengi martinɛ ná ndɛkɛ babengi bulubulu—etosaka malamu ntango oyo mokomoko na yango esengeli koya. Kasi bato na ngai bayebi te ekateli ya Yehova.”’+  “‘Ndenge nini bokoki koloba ete: “Tozali na bwanya, mpe mobeko ya Yehova ezali na biso”?+ Boye, ya solo, ekomeli+ ya lokuta ya basɛkrɛtɛrɛ esali mosala na lokuta mpenza.  Bato ya bwanya bayoki nsɔni.+ Bakómi na nsɔmɔ mpe bakokangama. Talá! Babwaki liloba mpenza ya Yehova, bongo bwanya nini bazali na yango?+ 10  Na yango, nakopesa basi na bango epai ya mibali mosusu, bilanga na bango epai ya baoyo bazali kozwa yango ezala ya bango;+ mpo, banda na oyo aleki moke kino na oyo aleki monene, mokomoko azali kozwa litomba na ndenge ya mabe;+ banda na mosakoli kino na nganga-nzambe, mokomoko azali kosala makambo na lokuta.+ 11  Mpe bazali komeka kobikisa likolólikoló kobukana oyo mwana mwasi ya bato na ngai abukani,+ na kolobáká ete: “Kimya ezali! Kimya ezali!” nzokande kimya ezali te.+ 12  Bayokaki nde nsɔni mpo basalaki likambo oyo eyinamá?+ Ya liboso, bakoki koyoka nsɔni ata moke te; mpe ya mibale bayebi ata te ndenge nini bayokaka nsɔni.+ “‘Yango wana bakokwea na kati ya bato oyo bazali kokwea. Na ntango oyo bakotyela bango likebi+ bakobɛta libaku,’ Yehova alobi bongo.+ 13  “‘Ntango nakobuka mbuma, nakosilisa bango,’ yango nde liloba ya Yehova.+ ‘Na nzete ya vinyo, mbuma ekozala te,+ mpe na nzete ya figi, figi ekozala te, mpe nkasa ekokauka mpenza. Mpe biloko oyo nazali kopesa bango ekoleka pembeni na bango.’” 14  “Mpo na nini tofandi nyɛɛ? Bóyangana, mpe tókɔta na bingumba oyo ebatelami makasi,+ mpe kuna tófanda nyɛɛ. Mpo Yehova ye moko afandisi biso nyɛɛ,+ mpe apesi biso mai oyo ezali na ngɛngɛ mabe mpo tómɛla,+ mpamba te tosaleli Yehova lisumu. 15  Tozalaki kolikya kimya, kasi eloko moko ya malamu eyaki te;+ ntango ya kobika, kasi talá! nsɔmɔ!+ 16  Longwa na Dani+ konguluma ya bampunda na ye eyokani. Mpo na makɛlɛlɛ ya koganga ya bampunda na ye, mokili mobimba ebandi koningana.+ Mpe bakɔti mpe balei mokili ná nyonso oyo etondisi yango, engumba ná bato oyo bafandi na yango.” 17  “Mpo talá! nazali kotinda banyoka kati na bino, banyoka ya ngɛngɛ,+ oyo ekoki kolengolama te,+ mpe ekoswa bino mpenza,” yango nde liloba ya Yehova. 18  Nayoki mawa moko oyo ezali na nkisi te.+ Motema na ngai ezali na maladi. 19  Yoká mongongo ya kolela mpo na kosɛnga lisalisi ya mwana mwasi ya bato na ngai uta na mokili moko ya mosika:+ “Yehova azali na Siona te?+ To mokonzi na yango azali kati na yango te?”+ “Mpo na nini basilikisi ngai na bikeko na bango oyo eyemami, na banzambe na bango mpambampamba ya bapaya?”+ 20  “Ntango ya kobuka mbuma eleki, eleko ya molunge esili; kasi biso, tobikisami te!”+ 21  Mpo na kobukana+ oyo mwana mwasi ya bato na ngai abukani, nabukanibukani.+ Nayoki mawa. Kokamwa mpenza ezwi ngai.+ 22  Balsame ezali na Gileade te?+ To moto oyo abikisaka azali kuna te?+ Bongo mpo na nini mwana mwasi ya bato na ngai azali kobika+ te?+

Maloba na nse