Yirimia 7:1-34

7  Liloba oyo eyelaki Yirimia uta na Yehova ete:  “Tɛlɛmá na porte ya ndako ya Yehova, mpe kuna osengeli kosakola liloba oyo,+ mpe osengeli koloba ete: ‘Bóyoka liloba ya Yehova bino nyonso na Yuda, bino baoyo bozali kokɔta na baporte oyo mpo na kogumbamela Yehova.  Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Bóbongisa malamu banzela na bino mpe misala na bino, mpe nakotika bino bófanda na esika oyo.+  Bótya motema na maloba ya lokuta te,+ na kolobáká ete: ‘Oyo ezali tempelo ya Yehova, tempelo ya Yehova, tempelo ya Yehova!’  Mpo soki bokómisi mpenza banzela na bino mpe misala na bino malamu, mpe soki bokati mpenza makambo na bosembo kati na moto ná moninga na ye,+  soki bonyokoli te moto oyo afandi mopaya, mwana oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá,+ mpe soki na esika oyo bosopi te makila ya moto oyo azali na likambo te,+ mpe soki bolandi te banzambe mosusu mpo na komibendela mpasi,+  ngai, ɛɛ ngai, nakotika bino bófanda na esika oyo, na mokili oyo napesaki bankɔkɔ na bino, libela na libela.”’”+  “Talá! bozali kotya motema na maloba ya lokuta—ya solo, ekozala ata na litomba moko te.+  Bokoki nde koyiba,+ koboma,+ kosala ekobo,+ kolapa ndai ya lokuta,+ kobimisa milinga ya mbeka epai na Baala+ mpe kolanda banzambe mosusu oyo boyebaki te,+ 10  mpe bosengeli nde koya mpe kotɛlɛma liboso na ngai na ndako oyo ebengami na nkombo na ngai,+ mpe bosengeli nde koloba: ‘Tokobikisama mpenza,’ nzokande bozali kosala makambo nyonso wana oyo eyinamá? 11  Ndako oyo ebengami na nkombo na ngai+ ekómi nde mobenga ya miyibi na miso na bino?+ Talá, ngai mpe namoni yango,” yango nde liloba ya Yehova.+ 12  “‘Kasi bókende sikoyo na esika na ngai oyo ezalaki na Shilo,+ epai nafandisaki nkombo na ngai liboso,+ mpe bómona eloko nini nasalaki yango mpo na mabe ya bato na ngai Yisraele.+ 13  Mpe sikoyo lokola bozalaki kaka kosala misala oyo nyonso,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe ngai nazalaki kaka koloba na bino, kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe koloba,+ kasi bino boyokaki te,+ mpe nazalaki kaka kobenga bino, kasi bino bozongisaki eyano te,+ 14  nakosala mpe ndako oyo ebengami na nkombo na ngai,+ oyo bozali kotyela motema,+ mpe esika oyo napesá bino ná bankɔkɔ na bino, kaka ndenge nasalaki Shilo.+ 15  Mpe nakobwaka bino mosika na elongi na ngai,+ kaka ndenge nabwakaki bandeko na bino nyonso, libota mobimba ya Efraime.’+ 16  “Mpe yo, kobondela mpo na bato oyo te, mpe mpo na bango, kotombola mongongo te mpo na kosɛngasɛnga na kolela mpe kosala libondeli te, mpe kolɔmba ngai eloko te,+ mpo nakoyokela yo te.+ 17  Ozali komona te makambo oyo bazali kosala na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme?+ 18  Bana bazali kolɔkɔta nkoni, mpe batata bazali kopelisa mɔtɔ, mpe basi bazali kobɛta pɔtɔpɔtɔ ya farini mpo na kosalela ‘mokonzi-mwasi ya likoló’ bagato ya mbeka;+ mpe bazali kosopela banzambe mosusu likabo ya masanga,+ mpo na kosilikisa ngai.+ 19  ‘Ezali ngai nde bazali kosilikisa?’ yango nde liloba ya Yehova.+ ‘Bazali komisilikisa nde bango moko te, mpo báyokisa bilongi na bango nsɔni?’+ 20  Na yango, talá oyo Yehova, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Talá! Nkanda na ngai mpe nkɛlɛ na ngai ezali kosopanela esika oyo,+ bato mpe banyama ya mboka, nzete ya elanga+ mpe mbuma ya mabele; mpe ekopela mpenza, mpe ekobomama te.’+ 21  “Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Bóbakisa na bambeka na bino makabo na bino ya kotumba mobimba mpe bólya mosuni.+ 22  Mpo nalobaki na bankɔkɔ na bino te, mpe napesaki bango mitindo te, na mokolo oyo nabimisaki bango na mokili ya Ezipito, na oyo etali makambo ya likabo ya kotumba mobimba mpe ya mbeka.+ 23  Kasi napesaki bango mitindo ya liloba oyo: “Bótosa mongongo na ngai,+ mpe nakokóma Nzambe na bino,+ mpe bino bokokóma bato na ngai; mpe bosengeli kotambola na nzela+ na ngai nyonso oyo nakopesa bino mitindo, mpo makambo na bino etambola malamu.”’+ 24  Kasi bayokaki te, mpe basembolaki litoi na bango te,+ kasi babandaki kotambola na batoli na bango, na motó makasi ya motema na bango ya mabe,+ bongo bazongaki nsima mpe bakendaki liboso te,+ 25  banda mokolo oyo bankɔkɔ na bino babimaki na mokili ya Ezipito kino mokolo ya lelo;+ mpe nazalaki kaka kotindela bino basaleli na ngai nyonso basakoli, mokolo na mokolo nazalaki kaka kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kotinda bango.+ 26  Kasi bayokaki ngai te, mpe basembolaki litoi na bango te,+ kasi bazalaki kaka kokómisa mitó na bango makasi.+ Basalaki mabe koleka bankɔkɔ na bango!+ 27  “Mpe osengeli koloba na bango maloba oyo nyonso,+ kasi bakoyoka yo te; mpe osengeli kobenga bango, kasi bakozongisela yo eyano te.+ 28  Mpe osengeli koloba na bango boye: ‘Talá ekólo oyo bato batosi mongongo ya Yehova Nzambe na bango te,+ mpe bandimi disiplini te.+ Bosembo ekufi, mpe elongolami na monɔkɔ na bango.’+ 29  “Katá nsuki na yo oyo esengeli kokatama te mpe bwaká yango,+ mpe yembá loyembo ya mawa+ likoló ya bangomba mike oyo ezali polele, mpo Yehova abwaki+ mpe akotika libota oyo asilikeli makasi.+ 30  ‘Mpo bana ya Yuda basali oyo ezali mabe na miso na ngai,’ yango nde liloba ya Yehova. ‘Batye biloko na bango ya bosɔtɔ na ndako oyo ebengami na nkombo na ngai, mpo na kokómisa yango mbindo.+ 31  Mpe batongi bisika oyo etombwaná ya Tofete,+ oyo ezali na lobwaku ya mwana ya Hinome,+ mpo na kotumba bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi na mɔtɔ,+ likambo oyo napesaki mitindo te mpe oyo eyaki na kati ya motema na ngai te.’+ 32  “‘Na yango, talá! mikolo ezali koya,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘ntango bakoloba lisusu te ete Tofete to lobwaku ya mwana ya Hinome, kasi lobwaku ya koboma;+ mpe basengeli kokunda na Tofete kino esika ya kokunda ekozala lisusu te.+ 33  Mpe bibembe ya bato oyo ekokóma mpenza bilei mpo na bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe mpo na banyama ya mabele, moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa yango.+ 34  Mpe na bingumba ya Yuda mpe na banzela ya Yerusaleme nakosilisa mongongo ya kosepela makasi ná mongongo ya esengo, mongongo ya mobali ya libala ná mongongo ya mwasi ya libala;+ mpo mokili ekokóma mpenza esika oyo ebebisami.’”+

Maloba na nse