Yirimia 6:1-30

6  Bóluka esika ya komibatela, Ee bana ya Benyamina, bólongwa na kati ya Yerusaleme; mpe bóyula liseke+ na Tekoa.+ Mpe bótɛlɛmisa elembo ya mɔtɔ na Bete-hakereme;+ mpamba te mpasi emonani longwa na nɔrdi, ɛɛ, libebi moko monene.+  Mwana mwasi ya Siona akokani mpenza na mwasi moko kitoko mpe oyo amesená na makambo ya makasi te.+  Babateli ya mpate ná bitonga na bango babandaki koya epai na ye. Batɛlɛmisaki bahema na bango zingazinga mpo na kobunda na ye.+ Balyaki moto na moto eteni na ye.+  Basantisi etumba mpo na kobunda na ye:+ Bótɛlɛma, mpe tómata na midi!”+ “Mawa na biso, mpo moi ekiti, mpo bilili ya mpokwa ezali kaka kokóma milai!”  “Bótɛlɛma, mpe tómata na butu mpe tóbebisa bandako milai na ye ya kofanda.”+  Mpo talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Bókata nzete+ mpe bósala mwa ngomba mpo na kobundisa Yerusaleme.+ Ezali engumba oyo esengeli kozongisa monɔkɔ.+ Kati na yango eloko mosusu ezali te kaka monyoko.+  Ndenge libulu ya kobomba mai ebatelaka mai na yango malili, ndenge wana nde ye abateli mabe na ye. Mobulu mpe kopunza eyokami epai na ye;+ maladi mpe bolɔzi ezali liboso na ngai ntango nyonso.  Ndimá kosembolama,+ Ee Yerusaleme, mpo molimo na ngai elongwa epai na yo te, mpo eyoki mpii;+ mpo nakómisa yo te lokola esika oyo etikali mpamba, mokili oyo bato bazali kofanda te.”+  Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Ya solo mpenza bakolɔkɔta batikali ya Yisraele kaka ndenge balɔkɔtaka mbuma ya nzete ya vinyo.+ Zongisá lobɔkɔ na yo lokola moto oyo azali kobuka mbuma ya vinyo na bitape oyo elíngamalíngamá ya nzete ya vinyo.” 10  “Nakoloba na nani mpe nakokebisa nani, mpo báyoka? Talá! Matoi na bango ekatamá ngenga te, yango wana bakoki kotya likebi te.+ Tála! Liloba ya Yehova mpenza ekómi epai na bango eloko ya kotyola,+ liloba oyo bakoki kosepela na yango te.+ 11  Mpe natondi na nkanda makasi ya Yehova. Nalɛmbi kokanga yango na kati na ngai.”+ “Sopelá yango mwana oyo azali na nzela+ mpe etuluku ya bilenge mibali oyo bazali baninga ya motema, na mbala moko; mpamba te bango mpe bakokangama, mobali ná mwasi na ye, mobange ná moto atondi na mikolo mingi.+ 12  Mpe bandako na bango ekopesama epai ya bato mosusu mpo ezala ya bango, ná bilanga ná basi na bango.+ Mpamba te nakosembola lobɔkɔ na ngai mpo na kotɛmɛla bato oyo bafandi na mokili yango,” yango nde liloba ya Yehova.+ 13  “Mpo banda na oyo aleki moke na kati na bango tii na oyo aleki monene na kati na bango, bango nyonso bazali kozwa litomba na ndenge ya mabe;+ mpe banda na mosakoli tii na nganga-nzambe, bango nyonso bazali kobuka lokuta.+ 14  Mpe bazali komeka kobikisa likolólikoló kobukana oyo bato na ngai babukani,+ na kolobáká ete: ‘Kimya ezali! Kimya ezali!’ nzokande kimya ezali te.+ 15  Bayokaki nde nsɔni mpo basalaki likambo moko oyo eyinamá?+ Ya liboso, bazali koyoka nsɔni ata moke te; mpe ya mibale bayebi ata te ndenge nini bayokaka nsɔni.+ Yango wana bakokwea na kati ya bato oyo bazali kokwea;+ na ntango oyo ngai nakotuna mpenza bango bázongisa monɔkɔ bakobɛta libaku,” Yehova alobi bongo. 16  Talá! oyo Yehova alobi: “Bótɛlɛma na banzela, mpe bómona, mpe bótuna mpo na banzela ya kala ete: sikoyo nzela ya malamu ezali wapi?+ Bótambola na yango,+ mpe bózwa kimya mpo na milimo na bino.”+ Kasi bazalaki kaka koloba ete: “Tokotambola na yango te.”+ 17  “Mpe natɛlɛmiselaki bino basinzili:+ ‘Bótya likebi na lokito ya liseke!’”+ Kasi bazalaki kaka koloba: “Tokotya likebi te.”+ 18  “Na yango, bóyoka, Ee bino bikólo! Mpe, Ee yo liyangani, yebá likambo oyo ekozala na kati na bango. 19  Yoká, Ee mabele! Talá! nazali komemela bato oyo mpasi,+ mbuma ya makanisi na bango,+ mpo batyaki likebi te na maloba na ngai; mpe mobeko na ngai—bazalaki mpe kobwaka yango.”+ 20  “Olibana oyo ozali komemela ngai longwa na Sheba+ mpe nkokó ya nsolo mpimbo longwa na mokili ya mosika ekosala ngai nini? Makabo na bino ya kotumba mobimba ezali kopesa esengo te,+ mpe bambeka na bino ezali kosepelisa ngai te.”+ 21  Na yango, talá oyo Yehova alobi: “Talá nazali kotyela bato oyo biloko oyo ebɛtisaka libaku,+ mpe bakobɛta mpenza libaku, batata ná bana elongo; mozalani ná moninga na ye—bakokufa.”+ 22  Talá oyo Yehova alobi: “Talá! Ekólo moko ezali kouta na mokili ya nɔrdi, mpe talá ekólo moko monene oyo ekolamuka longwa na nsukansuka ya mabele.+ 23  Bakosimba litimbo mpe likɔnga moke.+ Ezali ekólo moko ya mabe, mpe bakoyoka mawa te. Mongongo na bango ekonguluma lokola mbu,+ mpe bakotambola na bampunda.+ Ekosala molɔngɔ ya etumba lokola moto ya etumba mpo na kobunda na yo, Ee mwana mwasi ya Siona.”+ 24  Toyoki nsango na yango. Mabɔkɔ na biso elɛmbi.+ Mawa ekangi biso, mpasi makasi lokola mpasi ya mwasi oyo azali kobota.+ 25  Kobima mpo na kokende na elanga te, mpe kotambola na nzela te; mpo mopanga ya monguna ezali, nsɔmɔ ezali epai na epai.+ 26  Ee mwana mwasi ya bato na ngai, kangá ngɔtɔ na loketo+ mpe omibalola na putulu ya mɔtɔ.+ Lelá ndenge balelaka mwana kaka moko ya mobali, kolela ya mawa;+ mpamba te mopunzi akobimela biso na pwasa.+ 27  “Nakómisi yo momeki-bibende na kati ya bato na ngai, moto oyo azali koluka malamumalamu; mpe okotala mpe okomeka nzela na bango.+ 28  Bango nyonso bazali bato ya mitó makasi,+ bazali kotambolatambola mpo na kokosela bato makambo+—bazali motako mpe ebende. Bango nyonso bazali bato oyo babebisaka.+ 29  Nkuka+ eziki. Mondɔlu ezali kobima na mɔtɔ na bango.+ Bazali kopɛtola makasi kaka mpamba, mpe baoyo bazali mabe bakabolami te.+ 30  Bato bakobenga bango palata oyo ebwakami,+ mpo Yehova abwaki bango.”+

Maloba na nse