Yirimia 52:1-34

52  Zidikiya+ azalaki na mbula ntuku mibale na moko (21) ntango abandaki koyangela,+ mpe ayangelaki mbula zomi na moko na Yerusaleme.+ Mpe nkombo ya mama na ye Hamutale+ mwana ya Yirimia ya Libina.+  Mpe akobaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova,+ na kolanda nyonso oyo Yehoyakime+ asalaki.  Mpamba te, mpo na nkanda ya Yehova, likambo yango esalemaki na Yerusaleme mpe na Yuda, tii alongolaki bango liboso ya elongi na ye.+ Mpe Zidikiya abandaki kotombokela mokonzi ya Babilone.+  Nsukansuka, esalemaki boye: na mbula ya libwa banda akómaki mokonzi,+ na sanza ya zomi, na mokolo ya zomi ya sanza yango, Nebukadrezare mokonzi ya Babilone ayaki, ye ná limpinga mobimba ya basoda na ye, kobundisa Yerusaleme,+ mpe babandaki kotya kaa mpo na kobundisa yango mpe kotonga efelo ya kozinga yango epai na epai.+  Bongo bazingaki engumba tii na mbula ya zomi na moko ya Mokonzi Zidikiya.+  Na sanza ya minei, na mokolo ya libwa ya sanza yango,+ nzala mpe ezalaki makasi na engumba mpe bato ya mokili bazalaki na mampa te.+  Nsukansuka, bapasolaki nzela na efelo ya engumba;+ mpe mibali nyonso ya etumba babandaki kokima+ mpe kobima na engumba butubutu, na nzela ya porte kati na bifelo mibale oyo ezali pene na elanga ya mokonzi,+ wana Bakaladea bazalaki zingazinga mpo na kobundisa engumba; mpe balekaki na nzela ya Araba.+  Mpe limpinga moko ya basoda ya Bakaladea balandaki mokonzi,+ mpe bakangaki Zidikiya+ na mokili patatalu oyo ekauká ya Yeriko; mpe limpinga mobimba ya basoda na ye bapanzanaki, batiki ye.+  Na nsima, bakangaki mokonzi mpe bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babilone,+ na Ribla,+ na mokili ya Hamate,+ mpo akatela ye bikateli ya lisambisi.+ 10  Mpe mokonzi ya Babilone abomaki bana ya Zikidiya na miso na ye;+ abomaki mpe bankumu nyonso ya Yuda na Ribla.+ 11  Mpe atɔbɔlaki miso ya Zidikiya,+ nsima na yango, mokonzi ya Babilone akangaki ye na bikangeli ya motako mpe amemaki ye na Babilone+ mpe atyaki ye na ndako ya bolɔkɔ kino na mokolo ya liwa na ye. 12  Mpe na sanza ya mitano, na mokolo ya zomi ya sanza yango, elingi koloba, na mbula ya zomi na libwa ya Mokonzi Nebukadrezare,+ mokonzi ya Babilone, Nebuzaradane+ mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi, oyo azalaki kotɛlɛma liboso ya mokonzi ya Babilone, akɔtaki na Yerusaleme. 13  Mpe atumbaki ndako ya Yehova+ mpe ndako ya mokonzi mpe bandako nyonso ya Yerusaleme;+ mpe atumbaki ndako nyonso ya monene na mɔtɔ.+ 14  Mpe mampinga nyonso ya basoda ya Bakaladea oyo bazalaki elongo na mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi babukaki bifelo nyonso ya Yerusaleme, epai na epai.+ 15  Mpe bamosusu kati na baoyo bazangá kati na bato mpe bato mosusu kati na bato oyo batikalaki na engumba+ mpe bato oyo bakimaki oyo bakendaki epai ya mokonzi ya Babilone mpe basali ya mayele oyo batikalaki, Nebuzaradane mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi amemaki bango na mboka mopaya.+ 16  Mpe bamosusu kati na bato mpamba ya mokili, Nebuzaradane mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi atikaki bango bázala basali-bilanga ya vinyo mpe bato oyo bazali kotindama na makasi na mosala.+ 17  Mpe makonzí ya motako+ oyo ezalaki na ndako ya Yehova, bashario+ mpe mbu ya motako+ oyo ezalaki na ndako ya Yehova, Bakaladea babukabukaki yango mpe bamemaki motako na yango nyonso na Babilone.+ 18  Mpe bazwaki bambɛki, bapau,+ biloko ya koboma mɔtɔ,+ mabakuli,+ bakɔpɔ ná bisaleli nyonso ya motako oyo bazalaki kosalela na mosala.+ 19  Mpe mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi azwaki basaani,+ biloko ya kotya mɔtɔ, mabakuli,+ bambɛki, bitɛlɛmiselo ya miinda,+ bakɔpɔ, mabakuli oyo ezalaki ya wolo+ ya solosolo mpe mabakuli oyo ezalaki ya palata+ ya solosolo.+ 20  Mpe makonzí mibale,+ mbu wana moko,+ mpe ngɔmbɛ-mibali zomi na mibale ya motako+ oyo ezalaki na nse ya mbu yango, bashario, oyo Mokonzi Salomo asalaki mpo na ndako ya Yehova.+ Kilo ya motako ya biloko wana—ya biloko wana nyonso ekokaki koyebana te.+ 21  Nzokande mpo na makonzí yango, likonzí mokomoko ezalaki na bolai ya mapeko zomi na mwambe,+ mpe nsinga ya mapeko zomi na mibale ezalaki kozinga yango;+ mpe bonene na yango ezalaki bonene ya misapi minei ya lobɔkɔ, ezalaki na yango polele na kati. 22  Mpe motó oyo ezalaki likoló na yango ezalaki ya motako,+ mpe bolai ya motó moko ezalaki mapeko mitano;+ mpe eloko oyo basalá lokola monyama mpe bambuma ya grenade likoló ya motó, ezingi yango,+ yango nyonso ezalaki ya motako; mpe likonzí ya mibale ezalaki na biloko ndenge moko na oyo wana, mpe na bambuma ya grenade.+ 23  Mpe bambuma ya grenade ezalaki ntuku libwa na motoba (96) zingazinga, bambuma nyonso ya grenade ezalaki nkama moko (100) likoló ya eloko oyo basalá lokola monyama, epai na epai.+ 24  Lisusu, mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi azwaki Seraya+ nganga-nzambe mokonzi mpe Sefania+ nganga-nzambe ya mibale mpe bakɛngɛli misato ya baporte,+ 25  mpe azwaki na engumba kapita moko ya ndako ya mokonzi oyo azalaki kapita ya mibali ya etumba, ná mibali nsambo kati na baoyo bazalaki kokɔta epai ya mokonzi,+ baoyo bamonanaki na engumba, mpe sɛkrɛtɛrɛ ya mokonzi ya basoda, ye oyo azalaki koyanganisa bato ya mokili, mpe bato ntuku motoba (60) kati na bato ya mokili, oyo bamonanaki na engumba.+ 26  Baoyo wana nde Nebuzaradane+ mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi azwaki bango mpe amemaki bango epai ya mokonzi ya Babilone na Ribla.+ 27  Mpe mokonzi ya Babilone abɛtaki bango+ mpe abomaki bango na Ribla+ na mokili ya Hamate.+ Ndenge wana nde Yuda elongwaki na mabele na yango ekei mboka mopaya.+ 28  Talá bato oyo Nebukadrezare amemaki na mboka mopaya: na mbula ya nsambo, Bayuda nkóto misato na ntuku mibale na misato (3 023).+ 29  Na mbula ya zomi na mwambe ya Nebukadrezare,+ milimo nkama mwambe na ntuku misato na mibale (832) eutaki na Yerusaleme. 30  Na mbula ya ntuku mibale na misato (23) ya Nebukadrezare, Nebuzaradane mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi amemaki Bayuda na mboka mopaya: milimo nkama nsambo na ntuku minei na mitano (745).+ Milimo nyonso ezalaki: nkóto minei na nkama motoba (4 600). 31  Nsukansuka esalemaki boye: na mbula ya ntuku misato na nsambo (37) ya komemama ya Yehoyakine+ mokonzi ya Yuda na mboka mopaya, na sanza ya zomi na mibale, na mokolo ya ntuku mibale na mitano (25) ya sanza yango, Evile-merodake mokonzi ya Babilone, na mbula oyo akómaki mokonzi, atombolaki motó+ ya Yehoyakine mokonzi ya Yuda mpe abimisaki ye na ndako ya bolɔkɔ. 32  Mpe abandaki koloba na ye makambo ya malamu mpe kotombola kiti na ye ya bokonzi koleka bakiti ya bokonzi ya bakonzi mosusu oyo bazalaki elongo na ye na Babilone.+ 33  Mpe alongolaki bilamba na ye ya bolɔkɔ,+ mpe azalaki kolya limpa+ ntango nyonso liboso na ye, mikolo nyonso ya bomoi na ye.+ 34  Mpe mpo na pɔsɔ na ye, bazalaki kopesa ye ntango nyonso pɔsɔ oyo ezalaki kouta epai ya mokonzi ya Babilone, mokolo na mokolo ndenge esengeli, kino na mokolo ya liwa na ye,+ mikolo nyonso ya bomoi na ye.

Maloba na nse