Yirimia 5:1-31
5 Bótambola epai na epai na babalabala ya Yerusaleme mpe bómona, sikoyo, mpe bóyeba, mpe bóluka na bisika na yango minene ya bato nyonso soki bokomona moto,+ soki moto azali oyo azali kosala na boyengebene,+ moto oyo azali koluka bosembo,+ mpe nakolimbisa engumba yango.
2 Ata soki balobi: “Lokola Yehova azali solo na bomoi!” bazali kaka kolapa ndai ya lokuta mpenza.+
3 Ee Yehova, miso na yo etalaka epai ya bosembo te?+ Obɛti bango,+ kasi babɛli te.+ Osilisaki bango nyɛɛ.+ Baboyaki kondima disiplini.+ Bakómisaki bilongi na bango makasi koleka libanga.+ Baboyaki kozonga.+
4 Yango wana ngai mpe nalobaki: “Ya solo bazali mpenza bato mpamba. Basalaki bozoba, mpo baboyi nzela ya Yehova, bikateli ya Nzambe na bango.+
5 Nakokende epai ya bato minene mpe nakosolola na bango;+ mpo bango batye mpenza likebi na nzela ya Yehova, na bikateli ya Nzambe na bango.+ Ya solo mpenza bango nyonso elongo babuki mpenza ekanganeli; bakati mpenza bansinga.”+
6 Yango wana nkɔsi oyo ebimi na zamba ebomi bango, mbwa ya zamba ya mokili patatalu oyo ekauká ezali kaka kopunza bango,+ mpe nkoi ezali kaka kosɛnzɛla pene na bingumba na bango.+ Moto nyonso oyo azali kobima kuna azali kopasolama bitenibiteni. Mpo makambo na bango ya kobuka mibeko ekómi mingi; misala na bango ya kozanga bosembo ekómi ebele.+
7 Ndenge nini nakoki kolimbisa yo na likambo oyo? Bana na yo moko batiki ngai, mpe bazali kaka kolapa ndai+ na nkombo ya eloko oyo ezali Nzambe te.+ Mpe nazalaki kaka kotondisa bango na bilei,+ kasi bazalaki kaka kosala ekobo,+ mpe bazali kokende na bituluku na ndako ya mwasi ya ndumba.
8 Bakómi bampunda oyo ezali na mposa ya kosangisa nzoto, oyo ezali na mabinzi ya makasi. Bazali koganga moto na moto mpo na mwasi ya moninga na ye.+
9 “Nasengeli te kotuna ete bázongisa monɔkɔ mpo na makambo wana mpenza?” yango nde liloba ya Yehova.+ “To molimo na ngai esengeli te kozongisa mabe mpo na ekólo ya boye?”+
10 “Bómata epai ya milɔngɔ na ye ya banzete ya vinyo mpe bóbebisa yango,+ kasi bósilisa yango nyɛɛ te.+ Bólongola bitape na yango oyo etondi na nkasa, mpo ezali ya Yehova te.+
11 Mpo ndako ya Yisraele mpe ndako ya Yuda basaleli ngai makambo na bokosi mpenza,” yango nde liloba ya Yehova.+
12 “Bawangani Yehova, mpe bazali kaka koloba: ‘Azali te.+ Mpe mpasi moko te ekoyela biso, mpe tokomona mopanga te to nzala te.’+
13 Mpe basakoli bakómi mopɛpɛ, mpe liloba ezali na kati na bango te.+ Ndenge wana nde bakosala bango.”
14 Na yango, talá oyo Yehova, Nzambe ya mampinga, alobi: “Lokola bozali koloba likambo oyo, talá! nazali kokómisa maloba na ngai mɔtɔ na monɔkɔ na yo,+ mpe bato oyo bakozala nkoni, mpe ekozikisa bango.”+
15 “Ee ndako ya Yisraele, talá! nazali komemela bino ekólo moko uta na mosika,”+ yango nde liloba ya Yehova. “Ezali ekólo moko oyo eumeli.+ Ezali ekólo moko ya kala, ekólo oyo oyebi monɔkɔ na yango te, mpe okoki koyoka te oyo bazali koloba mpe kokanga ntina na yango.
16 Libenga ya makula na bango ezali lokola lilita oyo efungwami; bango nyonso bazali mibali ya nguya.+
17 Ya solo mpenza, bakolya mpe mbuma oyo obuki na bilanga na yo mpe limpa na yo.+ Bato yango bakolya bana na yo ya mibali mpe bana na yo ya basi. Bakolya bitonga na yo ya bampate mpe bitonga na yo ya bangɔmbɛ. Bakolya nzete na yo ya vinyo mpe nzete na yo ya figi.+ Bakopanzapanza na mopanga bingumba na yo oyo ebatelami makasi, oyo ozali kotyela motema.”
18 “Mpe ata na mikolo yango,” yango nde liloba ya Yehova, “nakosilisa bino nyɛɛ te.+
19 Mpe ekosalema mpenza boye: bokoloba ete ‘Mpo na nini Yehova Nzambe na biso asali biso makambo oyo nyonso?’+ Mpe osengeli koloba na bango boye: ‘Lokola botiki ngai mpe bobandi kosalela nzambe mopaya na mokili na bino, ndenge wana nde bokosalela bapaya na mokili oyo ezali ya bino te.’”+
20 Bóyebisa likambo oyo na ndako ya Yakobo, mpe bósakola yango na Yuda, bóloba:
21 “Sikoyo bóyoka likambo oyo, Ee bino bato bozangá bwanya mpe bozangá motema:+ Bazali na miso, kasi bakoki komona te;+ bazali na matoi, kasi bakoki koyoka te.+
22 ‘Bozali kobanga ata ngai te,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘to bozali kolɛnga* ata liboso na ngai te,+ ngai moto natyá zɛlo ezala ndelo mpo na mbu, lilako oyo ezali koumela seko, oyo mbu ekoki koleka te, boye te? Ata soki mbonge na yango ezali kotombwanatombwana, ata bongo ekolonga te; mpe ata soki ekómi yikiyiki, ata bongo ekoki koleka yango te.+
23 Kasi bato oyo mpenza bakómi na motema makasi mpe ya botomboki; bapɛngwi mpe bazali kaka kotambola na nzela na bango.+
24 Kasi balobi na motema na bango te ete: “Sikoyo, tiká tóbanga Yehova Nzambe na biso,+ Oyo azali kopesa biso mbula makasi ná mbula ya eleko ya otɔnɛ mpe mbula ya eleko ya prɛnta na ntango na yango,+ Oyo azali kobatela mpo na biso bapɔsɔ oyo etyamá mpo na kobuka mbuma.”+
25 Mabunga na bino moko nde ebengani makambo oyo, mpe masumu na bino moko nde epekisi bino bózwa biloko ya kitoko.+
26 “‘Mpo bato mabe bazali na kati ya bato na ngai.+ Bazali kaka kotala na likebi, lokola ntango bakangi-bandɛkɛ bagunzamaka.+ Batye motambo ya libebi. Bazali kokanga nde bato.
27 Lokola mwa ndako ya bibwɛlɛ oyo etondi na bikelamu oyo epumbwaka, bobele bongo bandako na bango etondi na bokosi.+ Yango wana bakómi minene mpe bazali kozwa bomɛngo.+
28 Bakómi mafuta;+ bakómi kongɛnga. Batondani mpe na makambo mabe. Bakɔteli ata moto moko te na likambo ya kosamba,+ ata likambo ya mwana oyo tata akufá,+ mpo bálonga;+ mpe basambisi te likambo ya babola.’”
29 “Nasengeli kotuna te ete bázongisa monɔkɔ mpo na makambo wana mpenza,” yango nde liloba ya Yehova, “to molimo na ngai esengeli te kozongisa mabe mpo na ekólo ya boye?+
30 Likambo moko ya kokamwisa, ɛɛ, likambo moko ya nsɔmɔ, esalemi na mokili:+
31 Basakoli bazali mpenza kosakola na lokuta;+ mpe banganga-nzambe bazali konyata bato na nguya na bango.+ Mpe bato na ngai balingi ezala ndenge wana;+ bongo bokosala nini na nsuka na yango?”+
Maloba na nse
^ Lil., “Bozali na mpasi makasi te.”