Yirimia 48:1-47

48  Mpo na Moabe,+ talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi:+ “Mawa na Nebo,+ mpo apunzami! Kiriataime+ apɔli na nsɔni, azwami. Esika ya kobombama oyo etombwaná epɔli na nsɔni mpe ekómi na nsɔmɔ.+  Lisanzoli ya Moabe ezali lisusu te.+ Na Heshibone,+ bakani mpasi mpo na ye: ‘Bóya, mpe tólongola ye mpo azala lisusu ekólo te.’+ “Ee Madamene, yo mpe osengeli kofanda nyɛɛ. Mopanga ezali kotambola nsima na yo.  Makɛlɛlɛ ya koganga ezali kouta na Horonaime,+ kopunza mpe kobuka monene.  Moabe abukani.+ Koganga ya bana na ye eyokani.  Mpamba te na nzela oyo emati na Luhite,+ bazali komata nde na kolela—bazali kolela. Mpamba te na nzela oyo ekiti uta na Horonaime bato bayoki nde koganga moko ya kolɛmbisa nzoto, mpo na kobukana yango.+  “Bókima; bóbikisa milimo na bino,+ mpe bosengeli kokóma lokola nzete ya jenevriye na esobe.+  Lokola otyeli misala na yo ná biloko na yo ya motuya motema, yo mpe okozwama.+ Mpe Kemoshe+ akomemama mpenza na mboka mopaya,+ banganga-nzambe na ye mpe bankumu na ye na mbala moko.+  Mpe mopunzi akokɔta na engumba nyonso,+ mpe engumba ata moko ekobika te.+ Mpe lobwaku ya patatalu ekobeba mpenza mpe mabele ya patatalu ekosilisama nyɛɛ, yango nde likambo Yehova alobi.  “Bópesa Moabe elembo ya nzela, mpo na ntango ya kokwea, akobima;+ mpe bingumba na ye ekokóma kaka eloko ya kokamwa, moto akofanda kuna te.+ 10  “Alakelama mabe moto oyo azali kokokisa mosala ya Yehova na bolɛmbu;+ mpe alakelama mabe moto oyo azali kopekisa mopanga na ye esopa makila! 11  “Bamoabe bazali na kimya banda bolenge na bango,+ mpe lokola vinyo likoló ya mbɔtɔ na yango bazali kotungisama te.+ Mpe basopami longwa na mbɛki moko kino mbɛki mosusu te, mpe bamemami na mboka mopaya te. Yango wana elɛngi na bango etikali kaka na kati na bango, mpe nsolo na bango mpenza ebongwani te. 12  “‘Na yango, talá! mikolo ezali koya,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe nakotindela bango batɛngisi ya mbɛki, mpe bakotɛngisa bango mpenza;+ mpe bakosopa bambɛki na bango, mpe bakobukabuka bilokó na bango ya minene. 13  Mpe Bamoabe bakoyoka nsɔni mpo na Kemoshe,+ ndenge bato ya ndako ya Yisraele bakómaki koyoka nsɔni mpo na Betele, eloko na bango ya kotyela motema.+ 14  Ndenge nini bozali kobanga te koloba ete: “Tozali mibali ya nguya+ mpe mibali oyo batondi na nguya ya bomoi mpo na etumba”?’ 15  “‘Moabe apunzami, mpe moto amati mpo na kobunda na bingumba na ye.+ Mpe bilenge na bango ya mibali ya makasi koleka bakiti mpo na kobomama,’+ yango nde liloba ya Mokonzi, oyo nkombo na ye ezali Yehova ya mampinga.+ 16  “Likama oyo ekokwela Bamoabe ebɛlɛmi, mpe mpasi na bango mpenza ezali koya mbangu mpenza.+ 17  Bato nyonso oyo bazali zingazinga na bango bakoyokela mpenza bango mawa, ɛɛ bato nyonso oyo bayebi nkombo na bango.+ Bóloba: ‘Ee talá ndenge lingenda ya makasi ebukani, lingenda ya kitoko!’+ 18  “Kitá, longwá na nkembo, mpe fandá na mposa, Ee yo mwasi oyo ofandaka epai ya mwana mwasi+ ya Dibone;+ mpo mopunzi ya Moabe amati mpo na kobunda na yo. Akobebisa mpenza bisika na yo oyo ebatelami makasi.+ 19  “Tɛlɛmá mpe talá nzela malamumalamu, Ee yo mwasi oyo ofandi na Aroere.+ Tuná mobali oyo azali kokima mpe mwasi oyo azali komibikisa. Lobá ete: ‘Likambo nini ekwei?’+ 20  Moabe apɔli na nsɔni, mpo alɛngi na nsɔmɔ.+ Gangá na kolela mpe belelá. Ee bóyebisa na Arnone+ ete Moabe apunzami. 21  Kosambisama eyei na mabele ya mokili ya patatalu,+ na Holone mpe na Yahaze,+ mpe eyeli Mefaate,+ 22  Dibone,+ Nebo,+ Bete-diblataime, 23  Kiriataime,+ Bete-gamule, Bete-meone,+ 24  Keriote,+ Bozera+ ná bingumba nyonso ya mokili ya Moabe, oyo ezali mosika mpe oyo ezali pene. 25  “‘Liseke ya Moabe ekatani,+ mpe lobɔkɔ na ye mpenza ebukani,’+ yango nde liloba ya Yehova. 26  ‘Bólangwisa ye,+ mpo atomboleli Yehova mapeka;+ mpe Moabe amibalolibaloli na kati ya biloko oyo asanzi,+ mpe akómi eloko ya kosɛka, ɛɛ ye mpenza. 27  “‘Mpe Yisraele akómi eloko ya kosɛka epai na yo te?+ To azwamaki nde na kati ya miyibi mpenza?+ Mpo ozalaki koningisa motó mbala nyonso oyo olobaki mpo na ye. 28  “‘Bótika bingumba mpe bófanda likoló ya libanga,+ bino bato oyo bofandi na Moabe, mpe bókóma lokola ebenga oyo ezali kotonga zumbu na yango pembenipembeni ya monɔkɔ ya lidusu.’”+ 29  “Toyoki nsango ya lolendo ya Moabe+—azali na lofundo mingi—ya kotombwana na ye mpe ya lolendo na ye mpe ya komitombola na ye mpe ya lofundo ya motema na ye.”+ 30  “‘Ngai moko nayebi nkɛlɛ na ye,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe ekozala bongo te; maloba na ye ya mpamba+—bakosala mpenza ndenge wana te.+ 31  Yango wana nakoganga na kolela mpo na Moabe, mpe nakoganga mpo na Moabe mobimba.+ Bakolelalela mpo na bato ya Kiri-herese.+ 32  “‘Nakolela mpo na yo na kolela moko oyo eleki kolela mpo na Yazere,+ Ee nzete ya vinyo ya Sibima.+ Bitape na yo oyo ezali kobimisa bafololo ekatisi mbu. Ekómi na mbu—na Yazere.+ Mopunzi akweli mbuma na yo ya eleko ya molunge+ mpe mbuma na yo ya vinyo na ntango ya kobuka mbuma ya vinyo.+ 33  Kosepela mpe esengo elongolami na elanga ya banzete ya mbuma mpe na mokili ya Moabe.+ Mpe nalimwisi vinyo na bikamwelo ya vinyo.+ Moto moko te akonyatanyata bikamwelo ya vinyo na koganga. Koganga ekozala koganga ya esengo lisusu te.’”+ 34  “‘Bayokisi mongongo na bango,+ koganga na Heshibone+ eyokani tii na Eleale,+ tii na Yahaze;+ koganga na Zoare+ eyokani tii na Horonaime,+ tii na Eglate-shelishiya;+ mpo ata mai ya Nimirime+ ekokóma se libebi na libebi. 35  Mpe nakolimwisa na Moabe,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘moto oyo azali komatisa likabo na esika oyo etombwaná mpe moto oyo azali kobimisela nzambe na ye milinga ya mbeka.+ 36  Yango wana motema na ngai ekozala na yikiyiki mpo na Moabe, lokola bapiololo;+ mpe mpo na bato ya Kiri-herese+ motema na ngai ekozala na yikiyiki, lokola bapiololo. Yango wana biloko ebele oyo ye abimisi ekobeba mpenza.+ 37  Mpo libandi+ ezali na motó nyonso, mpe mandefu nyonso ekatami.+ Bampota+ ezali na mabɔkɔ nyonso, mpe ngɔtɔ ezali na loketo!’”+ 38  “‘Na bansamba nyonso ya Moabe mpe na bisika na yango monene ya bato nyonso—yango nyonso—bato bazali kolela;+ mpo nabuki Moabe lokola mbɛki oyo moto asepeli na yango te,’+ yango nde liloba ya Yehova. 39  ‘Ee talá ndenge ayoki nsɔmɔ! Bóganga na kolela! Ee talá ndenge Moabe apesi mokɔngɔ! Ayoki nsɔni.+ Mpe Moabe akómi eloko ya kosɛka mpe eloko oyo ezali kopesa nsɔmɔ na bato nyonso oyo bazali zingazinga na ye.’” 40  “Mpo talá oyo Yehova alobi: ‘Talá! Kaka ndenge mpongo ekitelaka nyama na lombangu,+ ndenge wana nde moto moko mpe asengeli kosembola mapapu na ye likoló ya Moabe.+ 41  Bakozwa mpenza basité, mpe bakokanga mpenza bisika na ye ya makasi. Mpe na mokolo wana, motema ya bato ya nguya ya Moabe ekokóma mpenza lokola motema ya mwasi oyo azali na mpasi ya kobota.’”+ 42  “‘Mpe Moabe akosilisama mpenza nyɛɛ, akozala ekólo lisusu te,+ mpo atombolelaki Yehova mapeka.+ 43  Nsɔmɔ ná libulu mpe motambo ezali likoló na yo, Ee moto oyo ofandi na Moabe,’+ yango nde liloba ya Yehova. 44  ‘Moto nyonso oyo akokima mpo na nsɔmɔ akokwea na libulu; mpe moto nyonso oyo akobima na libulu akokangama na motambo.’+ “‘Mpo nakomema epai na ye, epai ya Moabe, mbula ya kotyela bango likebi,’+ yango nde liloba ya Yehova. 45  ‘Na elili ya Heshibone baoyo bazali kokima batɛlɛmi nyɛɛ, bazangi nguya. Mpo mɔtɔ ekouta mpenza na Heshibone,+ mpe lolemo ya mɔtɔ ekouta kati na Sihone;+ mpe ekolya mpakatoi ya Moabe mpe nsɔngɛ ya motó ya bana ya yikiyiki.’+ 46  “‘Mawa na yo, Ee Moabe!+ Bato ya Kemoshe+ bakufi. Mpo bana na yo ya mibali bamemami bakangami mpe bana na yo ya basi bakangami. 47  Mpe nakoyanganisa bakangami ya Moabe na eleko ya nsuka ya mikolo,’+ yango nde liloba ya Yehova. ‘Kosambisama ya Moabe+ esuki awa.’”

Maloba na nse