Yirimia 47:1-7
47 Oyo nde liloba ya Yehova epai ya mosakoli Yirimia mpo na Bafilistia,+ liboso Farao abɛta Gaza.+
2 Talá oyo Yehova alobi:
“Talá! Mai ezali komata+ uta na nɔrdi+ mpe ekómi mokɛli ya mai makasi oyo ezali kozindisa. Mpe ekozindisa mokili yango mpe biloko oyo etondisi yango, engumba ná bato oyo bafandi kati na yango.+ Mpe bato bakobelela, mpe moto nyonso oyo azali kofanda na mokili yango akoganga na kolela.+
3 Na makɛlɛlɛ ya basabo ya bampunda na ye ndenge ezali kobɛtabɛta mabele,+ na lokito ya makalo na ye ya etumba,+ yikiyiki ya bayiká na ye,+ batata bakobaluka nsima te mpo na kotala bana na bango, mpo mabɔkɔ na bango elɛmbi,
4 mpo na mokolo oyo ezali koya mpo na kopunza Bafilistia nyonso,+ kolongola na Tire+ mpe na Sidone+ mobiki nyonso oyo azalaki kosunga.+ Mpo Yehova azali kopunza Bafilistia,+ oyo bazali batikali oyo bautaki na esanga ya Kafitore.+
5 Ɛɛ, libandi+ ekoya na Gaza.+ Ashekelone+ akangisami monɔkɔ. Ee yo oyo otikali na lobwaku na bango ya patatalu, kino ntango nini okomikatakata?+
6 “Aha, mopanga ya Yehova!+ Kino ntango nini okofanda nyɛɛ te? Kɔtá na kati ya libenga+ na yo. Pemá mpe fandá nyɛɛ.
7 “Ndenge nini yango ekoki kofanda nyɛɛ, awa Yehova apesi yango mitindo? Ezali mpo na Ashekelone mpe mpo na bokula ya mbu.+ Aponi yango ezala kuna.”