Yirimia 44:1-30
44 Liloba oyo eyelaki Yirimia mpo na Bayuda nyonso oyo bazalaki kofanda na mokili ya Ezipito,+ baoyo bazalaki kofanda na Migidole+ mpe na Tahapanehese+ mpe na Nofe+ mpe na mokili ya Patrose,+ ete:
2 “Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Bino moko bomoni mpasi nyonso oyo namemeli Yerusaleme+ mpe bingumba nyonso ya Yuda, mpe talá, lelo oyo yango ezali esika moko oyo ebebisamá, mpe moto moko te afandi kuna.+
3 Ezali mpo na mabe na bango oyo basalaki mpo na kosilikisa ngai na ndenge bakendaki mpe babimisaki milinga ya mbeka+ mpe basalelaki banzambe mosusu oyo bango bayebaki te, ezala bino, ezala bankɔkɔ na bino.+
4 Bongo nakobaki kotindela bino basaleli na ngai nyonso, basakoli, nazalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kotinda bango,+ ete: “Nabondeli bino, bósala te likambo ya bosɔtɔ ya ndenge wana oyo ngai nayiná.”+
5 Kasi bayokaki te,+ mpe basembolaki litoi na bango te mpo na kolongwa na mabe na bango na kotikáká kobimisela banzambe mosusu milinga ya mbeka.+
6 Bongo nkɛlɛ na ngai, mpe nkanda na ngai esopanaki mpe epelaki na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme;+ mpe yango ekómaki esika moko oyo ebebisamá, esika moko oyo etikalá mpamba, lokola na mokolo ya lelo.’+
7 “Mpe sikoyo talá oyo Yehova, Nzambe ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Mpo na nini bozali kolukela milimo na bino mpasi moko monene,+ mpo na kolongola epai na bino mobali ná mwasi, mwana ná mwana oyo azali komɛla mabɛlɛ,+ na kati ya Yuda, bongo bozali komitikela te bato oyo bakotikala;
8 na ndenge bozali kosilikisa ngai na misala ya mabɔkɔ na bino, na ndenge bozali kobimisela banzambe mosusu milinga ya mbeka+ na mokili ya Ezipito, epai bozali kokɔta mpo na kofanda bapaya; mpo na kosala ete bólongolama mpe mpo bókóma elakeli mabe mpe eloko ya nsɔni kati na bikólo nyonso ya mabele?+
9 Bobosani nde makambo mabe ya bankɔkɔ na bino,+ makambo mabe ya bakonzi ya Yuda,+ makambo mabe ya basi na bango,+ makambo mabe na bino moko mpe makambo mabe ya basi na bino,+ oyo basalaki na mokili ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme?
10 Mpe tii mokolo ya lelo botutami na motema te,+ mpe bokómi kobanga te,+ mpe botamboli te na mobeko na ngai+ mpe na mitinda na ngai oyo natyaki liboso na bino mpe liboso na bankɔkɔ na bino.’+
11 “Na yango, talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Talá nazali kotɛmɛla bino mpo na mpasi mpe mpo na kolongola Yuda mobimba.+
12 Mpe nakokamata bato ya Yuda oyo batikali, oyo batalisaki bilongi na bango mpo na kokɔta na mokili ya Ezipito mpo na kofanda bapaya kuna,+ mpe bango nyonso bakosila mpenza na mokili ya Ezipito.+ Bakokwea na mopanga; mpe bakosila na nzala.+ Banda na oyo ya moke kino na oyo ya monene; bakokufa na mopanga mpe na nzala. Mpe bakokóma mpenza elakeli mabe, eloko ya kokamwa mpe libabe mpe eloko ya nsɔni.+
13 Mpe nakotuna bato oyo bazali kofanda na mokili ya Ezipito bázongisa monɔkɔ, ndenge natunaki Yerusaleme ezongisa monɔkɔ, na mopanga, na nzala mpe na maladi mabe.+
14 Mpe kati na bato ya Yuda oyo batikali, oyo bazali kokɔta mpo na kofanda bapaya na mokili ya Ezipito,+ mobiki to moto oyo akotikala na bomoi akozala te, ɛɛ, mpo na kozonga na mokili ya Yuda epai bazali kokolisa mposa ya molimo na bango mpo na kozonga kofanda kuna;+ mpo bakozonga te, longola kaka mwa bato oyo bakobika.’”
15 Mpe mibali nyonso oyo bayebaki ete basi na bango babimiselaki banzambe mosusu milinga ya mbeka,+ mpe basi nyonso oyo batɛlɛmaki lisangá moko monene, mpe bato nyonso oyo bafandaki na mokili ya Ezipito,+ na Patrose,+ bazongiselaki Yirimia maloba ete:
16 “Mpo na liloba oyo olobeli biso na nkombo ya Yehova, tokoyoka yo te;+
17 kasi tokosala mpenza liloba nyonso oyo ebimi na monɔkɔ na biso,+ mpo na kobimisela ‘mokonzi-mwasi ya likoló’ milinga ya mbeka+ mpe kosopela ye makabo ya masanga,+ ndenge biso+ ná bankɔkɔ na biso,+ bakonzi na biso+ ná bankumu na biso tosalaki na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme, ntango tozalaki kotonda na limpa mpe tozalaki bato ya bomɛngo, mpe tomonaki mpasi ata moke te.+
18 Mpe banda totiki kobimisela ‘mokonzi-mwasi ya likoló’ milinga ya mbeka+ mpe kosopela ye makabo ya masanga, tozangi eloko nyonso, mpe tosili na mopanga mpe na nzala.+
19 “Kutu ntango tozalaki kobimisela ‘mokonzi-mwasi ya likoló’ milinga ya mbeka+ mpe tondimaki kosopela ye makabo ya masanga,+ mpe kosalela ye bagato ya mbeka oyo esalemaki na elilingi na ye, mpe kosopela ye makabo ya masanga, tosalaki yango nde kozanga kotuna mibali na biso?”+
20 Bongo Yirimia alobaki na bato nyonso, na mibali makasi mpe na basi mpe na bato nyonso, oyo bazalaki kozongisela ye maloba, ete:
21 “Mpo na milinga ya mbeka oyo bobimisaki na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme,+ bino+ ná bankɔkɔ+ na bino, bakonzi+ na bino mpe bankumu+ na bino mpe bato ya mokili oyo, ezali yango nde Yehova akanisaki mpe eyaki na motema na ye,+ boye te?
22 Nsukansuka Yehova akokaki kokangela yango motema lisusu te mpo na mabe ya misala na bino, mpo na makambo ya bosɔtɔ oyo bosalaki,+ bongo mokili na bino ekómaki esika oyo ebebisamá mpe eloko ya kokamwa mpe eloko oyo elakelami mabe, esika oyo moto moko te afandi, lokola na mokolo ya lelo.+
23 Lokola bobimisaki milinga ya mbeka+ mpe bosalelaki Yehova lisumu+ mpe botosaki mongongo ya Yehova te+ mpe botambolaki te na mobeko na ye,+ na mitinda na ye mpe na makundoli na ye, yango wana mpasi oyo ekweli bino, lokola na mokolo ya lelo.”+
24 Mpe Yirimia akobaki koloba na bato nyonso mpe na basi nyonso ete: “Bóyoka liloba ya Yehova, bino nyonso bato ya Yuda oyo bozali na mokili ya Ezipito.+
25 Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Bino mpe basi na bino,+ bino basi mpe bozali koloba na minɔkɔ na bino, (mpe na mabɔkɔ na bino bokokisi yango,) ete: “Tokozanga te kokokisa bilako na biso oyo tosalaki,+ mpo na kobimisela ‘mokonzi-mwasi ya likoló’ milinga ya mbeka+ mpe kosopela ye makabo ya masanga.”+ Bino basi bokozanga te kokokisa bilako na bino, mpe bokozanga te kokokisa bandai na bino.’
26 “Na yango bóyoka liloba ya Yehova, bino nyonso bato ya Yuda oyo bofandi na mokili ya Ezipito:+ ‘“Talá, ngai moko nalapi ndai na nkombo na ngai monene,”+ Yehova alobi bongo, “ete nkombo na ngai ekozala lisusu te eloko oyo ezali kobelelama na monɔkɔ ya moto nyonso ya Yuda+ na mokili mobimba ya Ezipito ete: ‘Lokola Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova azali solo na bomoi!’+
27 Talá nazali kotyela bango likebi mpo na mpasi kasi mpo na malamu te;+ mpe bato nyonso ya Yuda oyo bazali na mokili ya Ezipito bakosila mpenza na mopanga mpe na nzala, kino bakozala lisusu te.+
28 Mpe bato oyo bakobika na mopanga, oyo bakolongwa na mokili ya Ezipito mpo na kozonga na mokili ya Yuda, bakozala motángo moke;+ mpe bato nyonso ya Yuda oyo batikali, oyo bazali kokɔta na mokili ya Ezipito mpo na kofanda bapaya kuna, bakoyeba mpenza soki liloba ya nani ekokokisama, ya ngai to ya bango.”’”+
29 “‘Mpe talá elembo mpo na bino,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘ete nazali kotyela bino likebi na esika oyo, mpo bóyeba ete maloba na ngai ekozanga te kokokisama epai na bino, mpo na mpasi:+
30 Talá oyo Yehova alobi: “Talá nazali kopesa Farao Hofra, mokonzi ya Ezipito,+ na lobɔkɔ ya banguna na ye mpe na lobɔkɔ ya baoyo bazali koluka molimo na ye,+ ndenge napesaki Zidikiya mokonzi ya Yuda na lobɔkɔ ya Nebukadrezare mokonzi ya Babilone, monguna na ye mpe moto oyo azalaki koluka molimo na ye.”’”+