Yirimia 43:1-13
43 Sikoyo esalemaki boye: ntango kaka Yirimia asilisaki koloba na bato nyonso maloba nyonso ya Yehova Nzambe na bango oyo Yehova Nzambe na bango atindaki ye epai na bango, ɛɛ maloba oyo nyonso,+
2 Azaria mwana ya Hoshaya+ ná Yohanane+ mwana ya Karea mpe bato nyonso ya lofundo+ balobaki na Yirimia boye: “Ozali koloba lokuta.+ Yehova Nzambe na biso atindi yo te oloba: ‘Bókɔta na Ezipito te mpo na kofanda bapaya kuna.’+
3 Kasi Baruke+ mwana ya Neria nde azali kotinda yo okanisela biso mabe mpo tópesama na lobɔkɔ ya Bakaladea, mpo báboma biso to bámema biso na mboka mopaya na Babilone.”+
4 Mpe Yohanane mwana ya Karea ná bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda mpe bato nyonso batosaki mongongo ya Yehova te,+ mpo na kokoba kofanda na mokili ya Yuda.+
5 Bongo Yohanane mwana ya Karea mpe bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda bazwaki bato nyonso ya Yuda oyo batikalaki, baoyo bazongaki uta na bikólo nyonso epai bapalanganisaki bango, mpo na kofanda mwa ntango na mokili ya Yuda,+
6 ɛɛ mibali makasi, basi, bana mike, bana basi ya mokonzi+ mpe molimo nyonso oyo Nebuzaradane+ mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi atikaki elongo na Gedalia+ mwana ya Ahikame+ mwana ya Shafane,+ ná mosakoli Yirimia mpe Baruke+ mwana ya Neria.
7 Mpe nsukansuka bakɔtaki na mokili ya Ezipito,+ mpo batosaki mongongo ya Yehova te; mpe nsukansuka bakómaki tii na Tahapanehese.+
8 Bongo liloba ya Yehova eyelaki Yirimia na Tahapanehese ete:
9 “Kamatá mabanga minene na lobɔkɔ na yo, mpe osengeli kobomba yango na pɔtɔpɔtɔ, na pavema ya babriki oyo ezali na esika ya kokɔta na ndako ya Farao, na Tahapanehese, na miso ya mibali oyo, Bayuda.+
10 Mpe osengeli koloba na bango boye: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Talá nazali kotinda bákamata Nebukadrezare mokonzi ya Babilone,+ mosaleli na ngai,+ mpe nakotya kiti na ye ya bokonzi likoló ya mabanga oyo nabombi, mpe akotanda mpenza hema ya nkembo na ye likoló na yango.
11 Mpe akokɔta mpe akobɛta mokili ya Ezipito.+ Moto nyonso oyo azali mpo na bolɔzi ya liwa, na bolɔzi ya liwa, mpe moto nyonso oyo azali mpo na bokangami, na bokangami, mpe moto nyonso oyo azali mpo na mopanga, na mopanga.+
12 Mpe nakotya mɔtɔ na bandako ya banzambe ya Ezipito;+ mpe akotumba mpenza bango mpe akomema bango bakangami mpe akomilínga mokili ya Ezipito, lokola mobateli ya mpate amilíngaka elamba na ye,+ mpe akobima kuna mpenza na kimya.
13 Mpe akobukabuka makonzí ya Bete-shemeshe, oyo ezali na mokili ya Ezipito; mpe bandako ya banzambe ya Ezipito akotumba yango na mɔtɔ.”’”