Yirimia 42:1-22
42 Bongo bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda ná Yohanane+ mwana ya Karea ná Yezania+ mwana ya Hoshaya+ mpe bato nyonso, banda na oyo ya moke kino na oyo ya monene, babɛlɛmaki
2 mpe balobaki na mosakoli Yirimia ete: “Tobondeli yo, lilɔmbɔ na biso mpo na koluka kondimama ekóma liboso na yo, mpe bondelá Yehova Nzambe na yo mpo na biso,+ mpo na bato nyonso oyo batikali, mpo na bato mingi oyo tozalaki, totikali moke,+ kaka ndenge miso na yo ezali komona biso.
3 Mpe Yehova Nzambe na yo ayebisa biso nzela oyo tosengeli kotambola mpe likambo oyo tosengeli kosala.”+
4 Na yango, mosakoli Yirimia alobaki na bango ete: “Nayoki. Talá nazali kobondela Yehova Nzambe na bino engebene maloba na bino;+ mpe ekosalema mpenza boye: liloba nyonso oyo Yehova akopesa bino lokola eyano nakoyebisa bino.+ Nakobombela bino liloba te.”+
5 Mpe bango, ɛɛ bango, balobaki na Yirimia: “Yehova azala motatoli ya solo mpe ya sembo epai na biso,+ soki tokosala te na kolanda liloba nyonso oyo Yehova Nzambe na yo akotinda yo na yango epai na biso.+
6 Ezala malamu to mabe, mongongo ya Yehova Nzambe na biso oyo tozali kotinda yo epai na ye nde tokotosa, mpo makambo na biso etambola malamu, mpo tozali kotosa mongongo ya Yehova Nzambe na biso.”+
7 Mpe esalemaki boye: na nsuka ya mikolo zomi liloba ya Yehova eyelaki Yirimia.+
8 Bongo ye abengaki Yohanane mwana ya Karea ná bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda oyo bazalaki elongo na ye mpe bato nyonso, banda na oyo ya moke kino na oyo ya monene;+
9 mpe ayebisaki bango lisusu ete: “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele, ye oyo epai na ye botindaki ngai nakómisa lilɔmbɔ na bino ya kondimama liboso na ye,+ alobi:
10 ‘Soki bofandi mpenza na mokili oyo,+ nakotonga mpe bino mpe nakobuka bino te, nakolona bino mpe nakopikola bino te;+ mpo nakoyoka mpenza mawa mpo na mpasi oyo nasali bino.+
11 Bóbanga te mpo na mokonzi ya Babilone, oyo bino bozali kobanga.’+
“‘Bóbanga mpo na ye te,’+ yango nde liloba ya Yehova ‘mpo nazali elongo na bino, mpo na kobikisa bino mpe kosikola bino na lobɔkɔ na ye.+
12 Mpe nakomonisela bino makambo ya motema mawa, mpe akozala na mawa mpo na bino mpe akozongisa bino na mabele na bino.+
13 “‘Kasi soki bozali koloba ete: “Te; tokofanda na mokili oyo te!” mpo na koboya kotosa mongongo ya Yehova Nzambe na bino,+
14 soki bolobi: “Te, kasi tokokɔta nde na mokili ya Ezipito,+ epai tokomona etumba te, tokoyoka lokito ya liseke te, tokozala na nzala ya limpa te; mpe kuna nde tokofanda”;+
15 sikoyo bóyoka liloba ya Yehova, Ee bino bato ya Yuda oyo botikali. Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Soki botalisi bilongi na bino mpo na kokɔta na Ezipito mpe bokɔti mpenza mpo na kofanda bapaya kuna,+
16 ekosalema mpenza lisusu boye: mopanga oyo bozali kobanga ekozwa bino na mokili ya Ezipito,+ mpe nzala oyo bozali koyokela nsɔmɔ ekolanda bino esika nyonso tii na Ezipito;+ mpe kuna nde bokokufa.+
17 Mpe ekosalema boye: bato nyonso oyo batalisi bilongi na bango mpo na kokɔta na Ezipito mpo na kofanda bapaya kuna, bango nde bakokufa na mopanga, na nzala mpe na maladi mabe;+ bakozala na moto oyo akobika te mpe na moto oyo akokima, mpo na mpasi oyo nazali kokweisela bango.”’+
18 “Mpo talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Kaka ndenge nkanda na ngai mpe nkɛlɛ na ngai esopaneli bato ya Yerusaleme,+ ndenge yango nde nkanda na ngai mpe ekosopanela bino mpo bozali kokɔta na Ezipito, mpe bokokóma mpenza elakeli mabe mpe eloko ya kokamwa mpe libabe mpe eloko ya nsɔni,+ mpe bokomona esika oyo lisusu te.’+
19 “Yehova alobi mpo na bino, Ee bato ya Yuda oyo batikali. Bókɔta na Ezipito te.+ Bosengeli mpenza koyeba ete natatweli bino lelo,+
20 ete bosaleli milimo na bino libunga;+ mpo bino moko botindi ngai epai ya Yehova Nzambe na bino, bolobi: ‘Bondelá Yehova Nzambe na biso mpo na biso; mpe yebisá biso na kolanda nyonso oyo Yehova Nzambe na biso akoloba, mpe tokosala mpenza yango.’+
21 Mpe nazali koyebisa bino lelo, kasi ya solo bokotosa mongongo ya Yehova Nzambe na bino te to likambo nyonso oyo atindi ngai na yango epai na bino.+
22 Mpe sikoyo bóyeba mpenza ete bokokufa na mopanga,+ na nzala mpe na maladi mabe na esika oyo bozali kosepela kokɔta mpo na kofanda bapaya.”+