Yirimia 41:1-18

41  Bongo esalemaki boye: na sanza ya nsambo, Yishimaele+ mwana ya Netania mwana ya Elishama+ ya libota ya mokonzi+ mpe na bato minene ya mokonzi mpe bato mosusu zomi elongo na ye+ bayaki epai ya Gedalia mwana ya Ahikame, na Mizipa.+ Mpe kuna na Mizipa, babandaki kolya limpa elongo.+  Na nsima, Yishimaele mwana ya Netania ná bato yango zomi oyo bazalaki elongo na ye batɛlɛmaki mpe babomaki Gedalia mwana ya Ahikame mwana ya Shafane na mopanga.+ Bongo babomaki moto oyo mokonzi ya Babilone apesaki mokumba ya kokamba mokili.+  Mpe Yishimaele abomaki Bayuda nyonso oyo bazalaki elongo na ye, elingi koloba, elongo na Gedalia, na Mizipa, mpe Bakaladea oyo bazwamaki wana, elingi koloba, mibali ya etumba.  Mpe esalemaki boye: na mokolo ya mibale nsima ya kobomama ya Gedalia, wana moto ata moko te ayebaki naino likambo yango,+  bato bautaki na Shekeme,+ na Shilo+ mpe na Samaria,+ bato ntuku mwambe (80) bakati mandefu+ mpe na bilamba epasukipasuki, bamikatikataki nzoto,+ mpe bazalaki na likabo ya mbuma ná olibana+ na lobɔkɔ na bango mpo na komema na ndako ya Yehova.  Bongo Yishimaele mwana ya Netania abimaki na Mizipa mpo na kokutana na bango, azalaki kolela wana azalaki kotambola.+ Mpe esalemaki boye: ntango kaka akutanaki na bango alobaki na bango ete: “Bóya epai ya Gedalia mwana ya Ahikame.”  Kasi esalemaki boye: ntango kaka bakómaki na katikati ya engumba, Yishimaele mwana ya Netania abandaki koboma bango mpe kobwaka bango na katikati ya libulu ya kobomba mai, ye ná bato oyo bazalaki elongo na ye.+  Kasi ezalaki na bato zomi kati na bango oyo na mbala moko balobaki na Yishimaele ete: “Koboma biso te, mpo tozali na biloko ya motuya oyo ebombami na esobe: blé, ɔrje, mafuta ná mafuta ya nzoi.”+ Bongo atikaki, mpe abomaki bango te kati na bandeko na bango.  Sikoyo libulu ya kobomba mai oyo kati na yango Yishimaele+ abwakaki bibembe ya bato oyo abomaki ezalaki libulu monene ya kobomba mai, libulu oyo Mokonzi Asa asalaki mpo na kobanga Baasha mokonzi ya Yisraele.+ Ezalaki yango nde Yishimaele mwana ya Netania atondisaki na bato oyo babomamaki. 10  Bongo Yishimaele akangaki bato nyonso oyo batikalaki kati na bato oyo bazalaki na Mizipa,+ bana basi ya mokonzi+ mpe bato nyonso oyo batikalaki na Mizipa,+ oyo Nebuzaradane mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi apesaki na mabɔkɔ ya Gedalia mwana ya Ahikame.+ Bongo Yishimaele mwana ya Netania akangaki bango mpe akendaki mpo na kokatisa na ngámbo ya bana ya Amone.+ 11  Na nsima, Yohanane+ mwana ya Karea mpe bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda+ oyo bazalaki elongo na ye bayokaki mabe nyonso oyo Yishimaele mwana ya Netania asalaki. 12  Na yango, bazwaki bato nyonso mpe bakendaki kobunda na Yishimaele mwana ya Netania mpe bakutaki ye pene ya ebele ya mai oyo ezalaki na Gibeone.+ 13  Bongo esalemaki boye: ntango kaka bato nyonso oyo bazalaki elongo na Yishimaele bamonaki Yohanane mwana ya Karea ná bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda oyo bazalaki elongo na ye, babandaki kosepela. 14  Mpe bato nyonso oyo Yishimaele amemaki bakangami uta na Mizipa+ babalukaki mpe bazongaki mpe bakendaki epai ya Yohanane mwana ya Karea. 15  Kasi Yishimaele mwana ya Netania akimaki+ elongo na bato mwambe liboso ya Yohanane, mpo na kokende epai ya bana ya Amone. 16  Yohanane+ mwana ya Karea mpe bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda oyo bazalaki elongo na ye bakamataki bato nyonso oyo batikalaki, bato oyo bango babɔtɔlaki Yishimaele mwana ya Netania, bato oyo ye azwaki na Mizipa, nsima ya koboma Gedalia+ mwana ya Ahikame: mibali makasi, mibali ya etumba, basi, bana mike ná bakapita ya ndako ya mokonzi, oyo azongaki na bango uta na Gibeone. 17  Bongo bakendaki kofanda na Kimehame oyo ezalaki pembeni ya Beteleme,+ mpo bálanda nzela na bango mpe bákɔta na Ezipito,+ 18  mpo na Bakaladea;+ mpo bakómaki kobanga bango,+ mpo Yishimaele mwana ya Netania abomaki Gedalia mwana ya Ahikame,+ oyo mokonzi ya Babilone apesaki mokumba ya kokamba mokili.+

Maloba na nse