Yirimia 40:1-16

40  Liloba oyo eyelaki Yirimia uta na Yehova nsima wana Nebuzaradane+ mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi atindaki ye uta na Rama,+ ntango azwaki ye wana akangamaki minɔti na kati na bato nyonso ya Yerusaleme mpe ya Yuda oyo bamemamaki na mboka mopaya, ɛɛ, baoyo bazalaki komemama na mboka mopaya, na Babilone.+  Bongo mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi azwaki Yirimia mpe alobaki na ye boye: “Yehova Nzambe na yo ye moko alobaki mpo na mpasi oyo ekweli esika oyo,+  mpo Yehova akokisa yango mpe asala kaka ndenge alobaki, mpo bino bosaleli Yehova lisumu mpe botosi mongongo na ye te. Mpe likambo oyo ekómeli bino.+  Bongo sikoyo, talá! lelo nafungoli yo minɔti oyo ezalaki na mabɔkɔ na yo. Soki emonani malamu na miso na yo ete oya elongo na ngai na Babilone, yaká, mpe nakotya liso na ngai likoló na yo.+ Kasi soki emonani mabe na miso na yo ete oya elongo na ngai na Babilone, koya te. Talá! Mokili mobimba ezali liboso na yo. Esika nyonso oyo emonani malamu mpe ebongi na miso na yo mpo na kokende, kende kuna.”+  Mpe ntango azalaki naino kokakatana mpo na kozonga, Nebuzaradane alobaki: “Zongá epai ya Gedalia+ mwana ya Ahikame+ mwana ya Shafane,+ oyo mokonzi ya Babilone apesi mokumba ya kokamba bingumba ya Yuda, mpe fandá na ye kati na bato; to esika nyonso oyo miso na yo emoni malamu kokende, kende.”+ Mpe mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi apesaki ye ndambo ya biloko ya kolya ná likabo mpe atikaki ye akende.+  Bongo Yirimia ayaki epai ya Gedalia+ mwana ya Ahikame na Mizipa+ mpe afandaki elongo na ye na kati ya bato oyo batikalaki na mokili.  Na nsima, bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda oyo bazalaki na esobe,+ bango ná bato na bango, bayokaki ete mokonzi ya Babilone apesi Gedalia mwana ya Ahikame mokumba ya kokamba mokili mpe ete apesi ye mokumba ya kokamba mibali, basi, bana mike mpe bato mosusu ya mokili kati na bato oyo bazangá, baoyo bamemamaki te na mboka mopaya na Babilone.+  Bongo bayaki epai ya Gedalia na Mizipa, ezalaki Yishimaele+ mwana ya Netania, Yohanane+ ná Yonatane, bana ya Karea, Seraya mwana ya Tanumete, bana ya Efai Monetofa+ mpe Yezania+ mwana ya Momaakate,+ bango ná bato na bango.+  Bongo Gedalia+ mwana ya Ahikame+ mwana ya Shafane+ alapelaki bango mpe bato na bango ndai+ ete: “Bóbanga kosalela Bakaladea te. Bókoba kofanda na mokili mpe bósalela mokonzi ya Babilone, mpe makambo na bino ekotambola malamu.+ 10  Bongo ngai, talá nazali kofanda na Mizipa,+ mpo na kotɛlɛma liboso ya Bakaladea oyo bakoya epai na biso. Kasi bino bóyanganisa vinyo+ ná mbuma ya eleko ya molunge ná mafuta mpe bótya yango na bambɛki na bino mpe bófanda na bingumba na bino oyo bozwi.” 11  Mpe Bayuda nyonso oyo bazalaki na Moabe mpe kati na bana ya Amone mpe na Edome mpe baoyo bazalaki na mikili mosusu nyonso,+ bango mpe bayokaki ete mokonzi ya Babilone apesaki Yuda bato oyo batikali mpe ete apesaki Gedalia+ mwana ya Ahikame mwana ya Shafane mokumba ya kokamba bango. 12  Bongo Bayuda nyonso babandaki kozonga uta na bisika nyonso epai bapalanganisaki bango, mpe bazalaki se koya na mokili ya Yuda epai ya Gedalia na Mizipa.+ Mpe bazalaki koyanganisa vinyo mpe mbuma ya eleko ya molunge, mingi mpenza. 13  Nde Yohanane+ mwana ya Karea+ mpe bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda oyo bazalaki na esobe+ bayaki epai ya Gedalia na Mizipa. 14  Mpe balobaki na ye boye: “Oyebi te ete Baalisi, mokonzi ya bana ya Amone,+ atindi Yishimaele+ mwana ya Netania+ mpo aboma molimo na yo?” Kasi Gedalia mwana ya Ahikame andimelaki bango te.+ 15  Mpe Yohanane+ mwana ya Karea alobaki na Gedalia, na esika ya kobombana na Mizipa ete: “Nalingi nakende, sikoyo, koboma Yishimaele mwana ya Netania, mpe moto moko te akoyeba yango.+ Mpo na nini aboma molimo na yo, mpe mpo na nini bato nyonso ya Yuda oyo bazali koyanganisama epai na yo bápalanganisama mpe bato ya Yuda oyo batikali bákufa?”+ 16  Kasi Gedalia+ mwana ya Ahikame+ alobaki na Yohanane mwana ya Karea boye: “Kosala likambo oyo te, mpamba te ozali koloba lokuta mpo na Yishimaele.”+

Maloba na nse