Yirimia 4:1-31
4 “Soki olingi kozonga, Ee Yisraele,” yango nde liloba ya Yehova, “okoki kozonga epai na ngai.+ Mpe soki olongoli biloko na yo ya bosɔtɔ mpo na ngai,+ okotambola te lokola moto oyo azali kokimakima.
2 Mpe soki olapi mpenza ndai+ ete: ‘Lokola Yehova azali solo na bomoi na bosolo,+ na bosembo mpe na boyengebene!’+ bato ya bikólo nyonso bakomizwela lipamboli mpenza mpo na ye, mpe bakomikumisa mpo na ye.”+
3 Mpo talá oyo Yehova alobi na bato ya Yuda mpe na Yerusaleme: “Bótimola mabele oyo ebongi na bilanga, mpe bókoba kolona na kati ya nzubɛ te.+
4 Bino bato ya Yuda mpe bino bato oyo bofandi na Yerusaleme, bókatama ngenga mpo na Yehova, mpe bólongola misutu ya mitema na bino;+ mpo nkanda na ngai ebima te lokola mɔtɔ, mpe ezikisa mpenza kozanga ete moto azala mpo na koboma yango, mpo na mabe ya misala na bino.”+
5 Bóyebisa yango na Yuda, mpe bósakola yango na Yerusaleme,+ mpe bóloba yango, mpe bóyula liseke na mokili mobimba.+ Bóbelela na mongongo makasi mpe bóloba ete: “Bóyangana, mpe tiká tókɔta na bingumba oyo ebatelami makasi.+
6 Bótɛlɛmisa elembo epai ya Siona. Bóluka esika ya komibatela. Bótɛlɛma te.” Mpo nazali koyeisa mpasi moko longwa na nɔrdi,+ ɛɛ libebi moko monene.
7 Amati lokola nkɔsi oyo ezali kobima na mwa zamba na yango,+ mpe moto oyo azali kobebisa bikólo asimbi nzela akei;+ abimi na esika na ye mpo na kokómisa mokili na yo eloko ya kokamwa. Bingumba na yo ekobebabeba mpe moto ata moko te akofanda kuna.+
8 Mpo na yango, bókanga ngɔtɔ na loketo.+ Bóbɛta ntolo na bino mpe bóganga na kolela,+ mpo nkanda ya kongala ya Yehova elongwe naino epai na biso te.+
9 “Mpe ekosalema mpenza boye, na mokolo yango,” yango nde liloba ya Yehova, “motema ya mokonzi ekokufa,+ ná motema ya bankumu; banganga-nzambe bakokamwa, mpe basakoli bakotikala monɔkɔ polele.”+
10 Bongo nalobaki: “Aa! Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Ya solo, okosi mpenza bato oyo+ mpe Yerusaleme, na kolobáká ete: ‘Bokozala na kimya,’+ kasi mopanga ekómi tii na molimo.”
11 Na ntango yango, bakoloba na bato oyo mpe na Yerusaleme boye: “Mopɛpɛ moko oyo ekaukisaka na banzela oyo bato balekalekaka eleki na esobe+ oyo ezali na nzela ya mwana mwasi ya bato na ngai;+ ezali te mpo na kopupola, to mpo na kopɛtola.
12 Mopɛpɛ makasi ezali kouta na banzela yango kino epai na ngai. Sikoyo ngai mpe nakolobela bango bikateli.+
13 Talá akomata lokola mapata ya mbula, mpe makalo na ye ezali lokola mopɛpɛ makasi.+ Bampunda na ye ezali na mbangu koleka bampongo.+ Mawa na biso, mpamba te topunzami!
14 Ee Yerusaleme, sukolá motema na yo pɛɛ na mabe, mpo obika.+ Kino ntango nini makanisi na yo ya libunga ekofanda na kati na yo?+
15 Mpo mongongo moko ezali koloba uta na Dani+ mpe ezali kosakola likambo moko ya koyokisa mpasi uta na etúká ya ngombangomba ya Efraime.+
16 Bólobela yango, ɛɛ, epai ya bikólo. Bósakolela yango Yerusaleme.”
“Bato oyo bazali kotalatala bazali koya, bauti na mokili ya mosika,+ mpe bakobimisela bingumba ya Yuda mongongo na bango.
17 Bazingi ye bipai nyonso lokola bakɛngɛli ya esobe,+ mpo atombokeli ngai,”+ yango nde liloba ya Yehova.
18 “Nzela na yo mpe misala na yo—bakozongisela yo yango.+ Yango nde mpasi oyo ezali likoló na yo, mpo ezali bololo; mpamba te yango ekómi tii na motema na yo.”
19 Ee misɔpɔ na ngai, misɔpɔ na ngai! Nazali na mpasi makasi na bifelo ya motema na ngai.+ Motema na ngai ezali na yikiyiki na kati na ngai.+ Nakoki kofanda nyɛɛ te, mpo molimo na ngai eyoki lokito ya liseke, elembo ya kokebisa mpo na etumba.+
20 Libebi na libebi yango nde babeleli, mpo mokili mobimba epunzami.+ Na pwasa, bahema na ngai epunzami,+ na mbala moko bilamba ya hema na ngai epunzami.
21 Kino ntango nini nakokoba komona elembo, nakokoba koyoka lokito ya liseke?+
22 Mpo bato na ngai bazali bazoba.+ Batyeli ngai likebi te.+ Bazali bana oyo bazangi bwanya; mpe bazali bato oyo bazangi mayele.+ Bazali na bwanya mpo na kosala mabe, kasi mpo na kosala malamu bazali na boyebi te.+
23 Namonaki mokili, mpe talá! ezalaki polele mpe mpamba;+ mpe na likoló, talá! pole na yango ezalaki lisusu te.+
24 Namonaki bangomba, mpe talá! ezalaki koningana, mpe bangomba mike nyonso ezalaki kolɛnga.+
25 Namonaki, mpe talá! moto ya mabele azalaki te, mpe bikelamu nyonso oyo epumbwaka na likoló esilaki kokima.+
26 Namonaki, mpe talá! elanga ya banzete ya mbuma ekómaki esobe, mpe bingumba na yango nyonso ebukanaki.+ Ezalaki mpo na Yehova, mpo na nkanda na ye ya kongala.
27 Mpo talá oyo Yehova alobi: “Mokili mobimba ekotikala mpamba,+ mpe nakosilisa nde yango nyɛɛ te?+
28 Na ntina na yango mokili ekolela,+ mpe kuna na likoló ekoyinda mpenza.+ Ezali mpo nalobi, nataleli, nayoki mawa te, mpe nakozonga nsima mpo na yango te.+
29 Mpo na lokito ya bato oyo batambolaka na mpunda mpe ya bato oyo babwakaka makula na litimbo, engumba mobimba ezali kokima.+ Bakɔti na mwa bazamba, mpe bamati kokɔta na mabanga.+ Engumba nyonso esundolami, mpe moto ata moko te azali kofanda kuna.”
30 Sikoyo, lokola opunzami boye, okosala nini, mpo ozalaki kolata bilamba ya motane makasi, mpo ozalaki kolata biloko ya wolo oyo ebongisaka nzoto, mpo ozalaki kokómisa miso na yo minene na langi ya monzɛlɛ ya moindo?+ Ozalaki komikómisa kitoko kaka mpamba.+ Baoyo bazalaki kolula yo babwaki yo; bazali kaka koluka molimo na yo.+
31 Mpo nayoki mongongo lokola ya mwasi oyo azali na maladi, mpasi lokola ya mwasi oyo azali kobota mwana na ye ya liboso,+ mongongo ya mwana mwasi ya Siona oyo azali kaka kopema na mpasi. Azali kaka kosembola mabɔkɔ na ye:+ “Aa mawa na ngai, mpo molimo na ngai elɛmbi na babomi!”+