Yirimia 39:1-18

39  Na mbula ya libwa ya Zidikiya mokonzi ya Yuda, na sanza ya zomi,+ Nebukadrezare mokonzi ya Babilone ná limpinga mobimba ya basoda na ye bayaki na Yerusaleme mpe babandaki kozinga yango.+  Na mbula ya zomi na moko ya Zidikiya, na sanza ya minei, na mokolo ya libwa ya sanza yango, bapasolaki nzela na efelo ya engumba.+  Mpe bankumu nyonso ya mokonzi ya Babilone bakɔtaki mpe bafandaki na Porte ya Kati,+ elingi koloba, Nergale-sharezere, Samagare-nebo, Saresekime, Rabasarise, Nergale-sharezere oyo azalaki Rabamage mpe bankumu nyonso ya mokonzi ya Babilone oyo batikalaki.  Sikoyo esalemaki boye: ntango kaka Zidikiya mokonzi ya Yuda mpe mibali nyonso ya etumba bamonaki bango, babandaki kokima+ mpe kobima na engumba na butu na nzela ya elanga ya mokonzi,+ na nzela ya porte oyo ezali kati na bifelo mibale; bazalaki kobima na nzela ya Araba.+  Mpe limpinga moko ya basoda ya Bakaladea ebandaki kolanda bango,+ mpe bazwaki Zidikiya na mokili patatalu oyo ekauká ya Yeriko.+ Bongo bakamataki ye mpe bamemaki ye epai ya Nebukadrezare mokonzi ya Babilone, na Ribla,+ na mokili ya Hamate,+ mpo azwela ye bikateli ya lisambisi.+  Mpe mokonzi ya Babilone abomaki+ bana ya Zidikiya na Ribla, na miso na ye,+ mpe mokonzi ya Babilone abomaki bato nyonso ya lokumu ya Yuda.+  Mpe abomaki miso ya Zidikiya,+ nsima na yango akangaki ye na bikangeli ya motako, mpo na komema ye na Babilone.  Mpe Bakaladea batumbaki na mɔtɔ ndako ya mokonzi mpe bandako ya bato,+ mpe babukaki bifelo ya Yerusaleme.+  Mpe bato mosusu na kati na baoyo batikalaki na engumba, mpe baoyo bakimaki mpo na kokende epai na ye, mpe bato mosusu na kati na baoyo batikalaki, Nebuzaradane+ mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi+ amemaki bango na mboka mopaya, na Babilone.+ 10  Mpe bato mosusu, bato oyo bazangá, baoyo bazalaki na eloko te, Nebuzaradane mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi atikaki bango báfanda na mokili ya Yuda;+ mpe na mokolo yango, abandaki kopesa bango bilanga ya vinyo mpe kosalisa bango misala na makasi.+ 11  Lisusu, Nebukadrezare mokonzi ya Babilone apesaki mitindo mpo na Yirimia na nzela ya Nebuzaradane mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi ete: 12  “Kamatá ye mpe miso na yo ezala likoló na ye, mpe kosala ye likambo moko te ya mabe.+ Kasi salelá ye kaka ndenge akoloba na yo.”+ 13  Bongo Nebuzaradane+ mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi ná Nebushazebane oyo azalaki Rabasarise, ná Nergale-sharezere oyo azalaki Rabamage mpe bato nyonso ya lokumu ya mokonzi ya Babilone, batindaki bato; 14  ɛɛ, batindaki bato mpo bábimisa Yirimia na Lopango ya Bakɛngɛli+ mpe bapesaki ye na Gedalia+ mwana ya Ahikame+ mwana ya Shafane,+ mpo amema ye na ndako na ye, mpo afanda kati na bato. 15  Mpe liloba ya Yehova eyelaki Yirimia ntango akangamaki na Lopango ya Bakɛngɛli+ ete: 16  “Kende, mpe osengeli koloba na Ebede-meleke+ moto ya Etiopi ete: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Talá nazali kokokisa maloba na ngai likoló ya engumba oyo, mpo na mpasi kasi mpo na malamu te,+ mpe yango ekosalema liboso na yo na mokolo yango.”’+ 17  “‘Mpe nakobikisa yo na mokolo yango,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe okopesama te na lobɔkɔ ya bato oyo ozali kobanga.’+ 18  “‘Mpo nakobikisa yo mpenza, mpe okokwea na mopanga te; mpe okozwa mpenza molimo na yo lokola eloko oyo epunzami,+ mpo otyeli ngai motema,’+ yango nde liloba ya Yehova.”

Maloba na nse