Yirimia 37:1-21

37  Mpe mokonzi Zidikiya+ mwana ya Yosiya+ abandaki koyangela na esika ya Konia+ mwana ya Yehoyakime,+ oyo Nebukadrezare mokonzi ya Babilone akómisaki mokonzi na mokili ya Yuda.+  Mpe ye ná basaleli na ye ná bato ya mokili yango bayokaki te maloba ya Yehova+ oyo alobaki na nzela ya mosakoli Yirimia.+  Mpe Mokonzi Zidikiya atindaki Yehukale+ mwana ya Shelemia mpe Sefania+ mwana ya Maaseya+ nganga-nzambe epai ya mosakoli Yirimia, alobi: “Tobondeli yo, bondelá Yehova Nzambe na biso mpo na biso.”+  Mpe Yirimia azalaki kokɔta mpe kobima na kati ya bato,+ mpo batyaki ye na ndako ya bolɔkɔ te.  Mpe limpinga moko ya basoda ya Farao eutaki na Ezipito;+ mpe Bakaladea oyo bazingaki Yerusaleme bayokaki nsango na bango. Bongo balongwaki liboso ya Yerusaleme.+  Na nsima, liloba ya Yehova eyelaki mosakoli Yirimia ete:  “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Talá oyo bokoloba na mokonzi ya Yuda, moto oyo azali kotinda bino epai na ngai mpo na kotuna ngai:+ “Talá! Limpinga ya basoda ya Farao oyo bazali koya epai na bino mpo na kosalisa bino bakozonga mpenza na mokili na bango, na Ezipito.+  Mpe Bakaladea bakozonga mpenza mpe bakobundisa engumba oyo mpe bakozwa yango mpe bakotumba yango na mɔtɔ.”+  Talá oyo Yehova alobi: “Bókosa milimo na bino te+ ete: ‘Bakaladea bakolongwa mpenza mosika na biso,’ mpo bakokende te. 10  Mpamba te ata soki bobomi limpinga mobimba ya basoda ya Bakaladea oyo bazali kobunda na bino+ mpe kati na bango etikali kaka bato oyo batɔbɔlami,+ bakotɛlɛma moto na moto na kati ya hema na ye mpe bakotumba mpenza engumba oyo na mɔtɔ.”’” 11  Mpe esalemaki boye: ntango limpinga ya basoda ya Bakaladea balongwaki liboso ya Yerusaleme+ mpo na limpinga ya basoda ya Farao,+ 12  Yirimia abandaki kobima na Yerusaleme mpo na kokende na mokili ya Benyamina,+ mpo na kozwa likabo na ye kuna na kati na bato. 13  Bongo esalemaki boye: ntango azalaki na Porte ya Benyamina,+ kapita oyo azalaki kokɛngɛla, nkombo na ye Yiriya mwana ya Shelemia mwana ya Hanania, azalaki wana. Na mbala moko akangaki mosakoli Yirimia, alobi: “Ozali kokima mpo na kokende epai ya Bakaladea!” 14  Kasi Yirimia alobaki ete: “Lokuta!+ Nazali kokima mpo na kokende epai ya Bakaladea te.” Kasi ayokelaki ye te. Bongo Yiriya akangaki Yirimia mpe amemaki ye epai ya bankumu. 15  Mpe bankumu+ basilikelaki Yirimia,+ mpe babɛtaki ye+ mpe batyaki ye na ndako ya bikangeli,+ na ndako ya sɛkrɛtɛrɛ Yehonatane,+ mpo bakómisaki yango ndako ya bolɔkɔ.+ 16  Ntango Yirimia akɔtaki na ndako ya libulu ya kobomba mai+ mpe na bashambrɛ oyo nsamba na yango engumbamá, Yirimia akobaki kofanda kuna mikolo mingi. 17  Mokonzi Zidikiya atindaki bato mpe bazwaki ye, mpe mokonzi abandaki kotuna ye mituna na ndako na ye, na esika ya kobombana.+ Mpe alobaki ete: “Liloba euti na Yehova ezali?” Na yango, Yirimia alobaki: “Ezali!” Mpe alobaki lisusu: “Okopesama na lobɔkɔ ya mokonzi ya Babilone!”+ 18  Na nsima, Yirimia alobaki na Mokonzi Zidikiya boye: “Na likambo nini nasaleli yo ná basaleli na yo mpe bato oyo lisumu,+ mpo bótya ngai na ndako ya bolɔkɔ? 19  Sikoyo, wapi basakoli na bino oyo basakwelaki bino ete: ‘Mokonzi ya Babilone akoya te kobundisa bino ná engumba oyo’?+ 20  Sikoyo yoká, nabondeli yo, Ee nkolo na ngai mokonzi. Tiká lilɔmbɔ na ngai mpo na kosɛnga kondimama+ ekóma liboso na yo, mpe ozongisa ngai lisusu te na ndako ya sɛkrɛtɛrɛ Yehonatane,+ mpo nakufa kuna te.”+ 21  Bongo Mokonzi Zidikiya apesaki mitindo, mpe batyaki Yirimia na bolɔkɔ na Lopango ya Bakɛngɛli;+ mpe kuna bazalaki kopesa ye mokolo na mokolo limpa ya libungutulu, oyo ezalaki kouta na balabala ya basali-mampa,+ kino mampa nyonso esilaki na engumba.+ Mpe Yirimia akobaki kofanda na Lopango ya Bakɛngɛli.+

Maloba na nse