Yirimia 36:1-32

36  Sikoyo esalemaki boye: na mbula ya minei ya Yehoyakime+ mwana ya Yosiya, mokonzi ya Yuda, liloba oyo eyelaki Yirimia uta na Yehova ete:  “Omizwela rulo ya buku,+ mpe osengeli kokoma na kati maloba nyonso+ oyo nalobi na yo mpo na Yisraele, mpo na Yuda+ mpe mpo na bikólo nyonso,+ banda mokolo nalobaki na yo, banda mikolo ya Yosiya, tii mokolo ya lelo.+  Mbala mosusu bato ya ndako ya Yuda bakoyoka mpo na mpasi nyonso oyo nazali kokanisa kopesa bango,+ mpo bálongwa moto na moto na nzela na ye ya mabe,+ mpe nalimbisa libunga na bango mpe lisumu na bango.”+  Mpe Yirimia abengaki Baruke+ mwana ya Neria mpo Baruke akoma na rulo ya buku maloba nyonso ya Yehova oyo Ye alobaki na monɔkɔ ya Yirimia.+  Bongo Yirimia apesaki Baruke mitindo ete: “Nakangami. Nazali na likoki te ya kokɔta na ndako ya Yehova.+  Bongo yo, osengeli kokɔta mpe kotánga na mongongo makasi, maloba ya Yehova+ na rulo oyo okomi, oyo euti na monɔkɔ na ngai, na matoi ya bato na ndako ya Yehova na mokolo ya kokila bilei;+ mpe lisusu na matoi ya bato nyonso ya Yuda oyo bazali kouta na bingumba na bango.+  Mbala mosusu lilɔmbɔ na bango mpo na koluka kondimama ekokóma liboso ya Yehova+ mpe bakozonga, moto na moto akolongwa na nzela na ye ya mabe,+ mpo nkanda mpe nkɛlɛ oyo Yehova alobi mpo na bato oyo ezali monene mpenza.”+  Bongo Baruke+ mwana ya Neria asalaki na kolanda nyonso oyo mosakoli Yirimia apesaki ye mitindo, kotánga na mongongo makasi maloba ya Yehova na buku+ yango, na ndako ya Yehova.+  Sikoyo esalemaki boye: na mbula ya mitano ya Yehoyakime+ mwana ya Yosiya, mokonzi ya Yuda, na sanza ya libwa,+ bato nyonso na Yerusaleme oyo bazalaki kouta na bingumba ya Yuda mpo na kokɔta na Yerusaleme basakolaki kokila bilei liboso ya Yehova.+ 10  Mpe Baruke abandaki kotánga na mongongo makasi maloba ya Yirimia na buku, na ndako ya Yehova, na esika ya kolya+ ya Gemaria+ mwana ya Shafane+ mosali-bakopi,+ na lopango ya likoló, na monɔkɔ ya porte ya sika ya ndako ya Yehova,+ na matoi ya bato nyonso. 11  Mpe Mikaya mwana ya Gemaria mwana ya Shafane+ ayokaki maloba nyonso ya Yehova na buku yango. 12  Bongo akitaki na ndako ya mokonzi, na esika ya kolya ya sɛkrɛtɛrɛ, mpe, talá! bankumu nyonso bafandaki wana, sɛkrɛtɛrɛ Elishama+ ná Delaya+ mwana ya Shemaya ná Elenatane+ mwana ya Akabore+ ná Gemaria+ mwana ya Shafane+ ná Zidikiya mwana ya Hanania mpe bankumu mosusu nyonso. 13  Mpe Mikaya+ ayebisaki bango maloba nyonso oyo ayokaki ntango Baruke atángaki na mongongo makasi na buku, na matoi ya bato.+ 14  Bongo bankumu nyonso batindaki Yehudi+ mwana ya Netania mwana ya Shelemia mwana ya Kushi epai ya Baruke+ na maloba oyo: “Rulo oyo otángaki na mongongo makasi na matoi ya bato—kamatá yango na lobɔkɔ na yo mpe yaká.” Na yango, Baruke mwana ya Neria akamataki rulo yango na lobɔkɔ na ye mpe ayaki epai na bango.+ 15  Bongo balobaki na ye ete: “Tobondeli yo, fandá, mpe tángá yango na mongongo makasi na matoi na biso.” Na yango, Baruke+ atángaki yango na mongongo makasi na matoi na bango. 16  Sikoyo esalemaki boye: ntango kaka bayokaki maloba nyonso, batalanaki na nsɔmɔ; mpe balobaki na Baruke ete: “Tokozanga te koyebisa mokonzi maloba oyo nyonso.”+ 17  Mpe batunaki Baruke ete: “Tobondeli yo, yebisá biso, ndenge nini okomaki maloba oyo nyonso oyo eutaki na monɔkɔ na ye?”+ 18  Bongo Baruke alobaki na bango: “Na monɔkɔ na ye azalaki koloba na ngai maloba oyo nyonso, mpe nazalaki kokoma na buku na mai ya mokanda.”+ 19  Nsukansuka bankumu balobaki na Baruke boye: “Kende komibomba, yo ná Yirimia, mpo ete moto moko te ayeba esika bozali.”+ 20  Bongo bayaki epai ya mokonzi, na lopango,+ mpe batikaki rulo na esika ya kolya+ ya sɛkrɛtɛrɛ Elishama;+ mpe babandaki koyebisa maloba nyonso na matoi ya mokonzi. 21  Bongo mokonzi atindaki Yehudi+ mpo azwa rulo yango. Boye azwaki yango na esika ya kolya ya sɛkrɛtɛrɛ+ Elishama.+ Mpe Yehudi abandaki kotánga yango na mongongo makasi na matoi ya mokonzi mpe na matoi ya bankumu nyonso oyo batɛlɛmaki pembeni ya mokonzi. 22  Mpe mokonzi afandaki na ndako ya eleko ya mpiɔ,+ na sanza ya libwa,+ lituka+ ezalaki kopela liboso na ye. 23  Bongo esalemaki boye: ntango kaka Yehudi atángi ngámbo misato to minei na lokasa ya rulo, mokonzi abandaki kopasola yango na mbeli ya sɛkrɛtɛrɛ, mpe kobwaka yango na mɔtɔ oyo ezalaki na lituka kino rulo nyonso esilaki na kati ya mɔtɔ oyo ezalaki na lituka.+ 24  Mpe bayokaki nsɔmɔ te;+ mokonzi ná basaleli na ye nyonso, oyo bazalaki koyoka maloba yango nyonso bapasolaki mpe bilamba na bango te.+ 25  Kutu Elenatane+ ná Delaya+ mpe Gemaria+ babondelaki mokonzi mpo atumba rulo yango te, kasi ayokelaki bango te.+ 26  Lisusu, mokonzi apesaki mitindo na Yerahemeele mwana ya mokonzi mpe na Seraya mwana ya Aziriele mpe na Shelemia mwana ya Abadeele ete bákende kokanga sɛkrɛtɛrɛ Baruke mpe mosakoli Yirimia.+ Kasi Yehova abombaki bango.+ 27  Mpe liloba ya Yehova eyelaki lisusu Yirimia nsima wana mokonzi atumbaki rulo oyo ezalaki na maloba oyo Baruke+ akomaki uta na monɔkɔ ya Yirimia,+ ete: 28  “Zwá lisusu rulo moko, rulo mosusu, mpe komá na yango maloba nyonso ya liboso oyo ezalaki na rulo ya liboso, oyo Yehoyakime mokonzi ya Yuda atumbaki.+ 29  Mpe mpo na Yehoyakime mokonzi ya Yuda okoloba: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Yo otumbi rulo oyo,+ olobi ete: ‘Mpo na nini okomi na yango,+ olobi: “Mokonzi ya Babilone akoya mpenza mpe akobebisa mpenza mokili oyo mpe akosilisa moto mpe nyama kati na yango”?’+ 30  Na yango, talá oyo Yehova alobi mpo na Yehoyakime mokonzi ya Yuda: ‘Akozala na moto te oyo akofanda na kiti ya bokonzi ya Davidi,+ mpe ebembe na ye ekokóma eloko oyo ebwakami libándá+ na molunge na moi mpe na mpiɔ makasi na butu. 31  Mpe nakolandela ye+ mpe bana na ye mpe basaleli na ye mpo na libunga na bango,+ mpe nakoyeisela bango mpe bato oyo bafandi na Yerusaleme mpe bato ya Yuda mpasi nyonso oyo nalobi mpo na bango,+ mpe bayokaki te.’”’”+ 32  Mpe Yirimia azwaki rulo mosusu mpe apesaki yango Baruke mwana ya Neria, sɛkrɛtɛrɛ,+ oyo abandaki kokoma na yango maloba oyo eutaki na monɔkɔ+ ya Yirimia, maloba nyonso ya buku oyo Yehoyakime mokonzi ya Yuda atumbaki na mɔtɔ;+ mpe babakiselaki yango maloba mosusu mingi lokola oyo wana.

Maloba na nse