Yirimia 35:1-19
35 Liloba oyo eyelaki Yirimia uta na Yehova na mikolo ya Yehoyakime+ mwana ya Yosiya, mokonzi ya Yuda, ete:
2 “Kende na ndako ya Barekabe,+ mpe osengeli koloba na bango mpe komema bango na ndako ya Yehova, na moko ya bisika ya kolya; mpe osengeli kopesa bango vinyo bámɛla.”
3 Bongo nazwaki Yaazania mwana ya Yirimia mwana ya Habazinia mpe bandeko na ye, mpe bana na ye nyonso, mpe bato nyonso ya ndako ya Barekabe,
4 mpe namemaki bango na ndako ya Yehova, na esika ya kolya+ ya bana ya Hanane mwana ya Yigadalia, moto ya Nzambe ya solo, oyo ezalaki pembeni ya esika ya kolya ya bankumu, oyo ezalaki likoló ya esika ya kolya ya Maaseya mwana ya Shalume+ mokɛngɛli-porte.
5 Bongo natyaki liboso ya bana ya ndako ya Barekabe bakɔpɔ oyo etondi na vinyo mpe bagobɛlɛ mpe nalobaki na bango ete: “Bómɛla vinyo.”
6 Kasi balobaki ete: “Tokomɛla vinyo te, mpo Yonadabe mwana ya Rekabe,+ nkɔkɔ na biso, ye nde apesaki biso mitindo ete: ‘Bosengeli komɛla vinyo te, ezala bino to bana na bino, mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+
7 Mpe bosengeli kotonga ndako te, mpe bosengeli kolona mboto te; mpe bosengeli kolona elanga ya vinyo te, mpe yango esengeli kokóma ya bino te. Kasi bokofanda na bahema mikolo na bino nyonso, mpo bótikala na bomoi mikolo mingi na mabele esika bozali kofanda lokola bapaya.’+
8 Bongo tozali kaka kotosa mongongo ya Yehonadabe mwana ya Rekabe nkɔkɔ na biso na likambo nyonso oyo apesaki biso mitindo+ ete tómɛlaka vinyo te mikolo na biso nyonso, biso, basi na biso, bana na biso ya mibali mpe bana na biso ya basi,+
9 mpe tótongaka bandako te mpo na kofanda, mpo elanga ya vinyo, to elanga, to momboto ekóma ya biso te.
10 Mpe tozali kaka kofanda na bahema mpe kotosa mpe kosala na kolanda nyonso oyo Yonadabe+ nkɔkɔ na biso apesaki biso mitindo.+
11 Kasi esalemaki boye: ntango Nebukadrezare mokonzi ya Babilone ayaki kobundisa mokili,+ tobandaki koloba ete: ‘Bóya, mpe tókɔta na Yerusaleme mpo na limpinga ya basoda ya Bakaladea mpe mpo na limpinga ya basoda ya bato ya Siri, mpe tófanda na Yerusaleme.’”+
12 Mpe liloba ya Yehova eyelaki Yirimia ete:
13 “Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Kende, mpe osengeli koloba na bato ya Yuda mpe na bato oyo bafandi na Yerusaleme boye: “Bozalaki te kozwa ntango nyonso elendiseli ya kotosa maloba na ngai?”+ yango nde liloba ya Yehova.
14 “Maloba ya Yehonadabe mwana ya Rekabe,+ oyo apesaki bana na ye mitindo, ete bámɛla vinyo te ekokisami, mpe bamɛli vinyo ata moke te tii lelo oyo, mpo batosi mobeko ya nkɔkɔ na bango.+ Kasi ngai, nalobi na bino, kolamukáká ntɔngɔntɔngɔ mpe kolobáká,+ kasi botosi ngai te.+
15 Mpe nazalaki kaka kotindela bino basaleli na ngai nyonso basakoli,+ kolamukáká ntɔngɔntɔngɔ mpe kotindáká bango na maloba oyo: ‘Nabondeli bino, bózonga, moto na moto alongwa na nzela na ye ya mabe,+ mpe bóbongisa misala na bino,+ mpe bólanda banzambe mosusu te mpo na kosalela bango.+ Mpe bókoba kofanda na mabele oyo napesá bino mpe bankɔkɔ na bino.’+ Kasi bosembolaki litoi na bino te, mpe boyokaki ngai te.+
16 Nzokande, bana ya Yehonadabe mwana ya Rekabe+ bakokisi mobeko ya nkɔkɔ na bango oyo apesaki bango mitindo;+ kasi bato oyo, bayokeli ngai te.”’”+
17 “Na yango talá oyo Yehova, Nzambe ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Talá nazali kokweisela Yuda mpe bato nyonso oyo bafandi na Yerusaleme mpasi nyonso oyo nalobi mpo na bango,+ mpo nalobaki na bango kasi bayokaki te, mpe nazalaki kaka kobenga bango kasi bayanolaki te.’”+
18 Mpe Yirimia alobaki na bato ya ndako ya Barekabe ete: “Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Lokola botosi mitindo ya Yehonadabe+ nkɔkɔ na bino mpe bozali kokoba kotosa mitindo na ye nyonso mpe kosala na kolanda nyonso oyo apesaki bino mitindo,+
19 na yango talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Yonadabe mwana ya Rekabe akozanga moto te mpo na kotɛlɛma+ liboso na ngai, ntango nyonso.”’”+