Yirimia 33:1-26

33  Mpe liloba ya Yehova eyelaki Yirimia na mbala ya mibale, wana akangamaki naino na Lopango ya Bakɛngɛli:+  “Talá oyo Yehova Mokeli+ ya mabele alobi: Yehova Mosali+ na yango mpo epikama makasi,+ Yehova nde nkombo na ye,+  ‘Bengá ngai, mpe nakoyanola yo,+ mpe na mbala moko nakoyebisa yo makambo minene mpe oyo okoki kokanga ntina te, oyo oyebi te.’”+  “Mpo talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi mpo na bandako ya engumba oyo mpe mpo na bandako ya bakonzi ya Yuda oyo ebukami mpo na mwa bangomba ya mabele oyo basali mpo na kozinga engumba mpe mpo na mopanga;+  mpo na baoyo bazali koya kobunda na Bakaladea mpe kotondisa bisika na bibembe ya bato oyo nabomi na nkanda na ngai mpe na nkɛlɛ na ngai,+ mpe mpo na baoyo nyonso mpo na mabe na bango nabombi elongi na ngai liboso ya engumba oyo:+  ‘Talá nazali kosala ete abika mpe azala na nzoto kolɔngɔnɔ;+ mpe nakobikisa bango mpe nakomonisa bango kimya mpe solo mingi mpenza.+  Mpe nakozongisa bakangami ya Yuda mpe bakangami ya Yisraele,+ mpe nakotonga bango lokola na ebandeli.+  Mpe nakopɛtola bango na libunga nyonso oyo na yango basalelaki ngai lisumu,+ mpe nakolimbisa bango mabunga nyonso oyo na yango basalelaki ngai lisumu mpe oyo na yango babukaki mibeko na ngai.+  Mpe akokóma mpo na ngai nkombo moko oyo ezali kopesa nsai,+ lisanzoli mpe kitoko epai na bikólo nyonso ya mabele oyo bakoyoka nsango ya bolamu nyonso oyo nazali kosalela bango.+ Mpe bakozala na nsɔmɔ+ mpe bakoningana+ mpo na bolamu yango nyonso mpe mpo na kimya nyonso oyo nakosalela ye.’”+ 10  “Talá oyo Yehova alobi: ‘Na esika oyo bino bokobanda koloba ete etikali se mpamba, moto azali te mpe nyama ya mboka ezali te, na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme oyo etikali mpamba,+ moto azali te mpe moto afandi kuna te mpe nyama ya mboka ezali te, bakoyoka lisusu+ 11  makɛlɛlɛ ya kosepela mpe makɛlɛlɛ ya esengo,+ mongongo ya mobali ya libala mpe mongongo ya mwasi ya libala, mongongo ya baoyo bazali koloba ete: “Bókumisa Yehova ya mampinga, mpo Yehova azali malamu;+ mpo motema boboto na ye ezali seko na seko!”’+ “‘Bakomema likabo ya kozongisa matɔndi na ndako ya Yehova,+ mpo nakozongisa bakangami ya mokili ndenge ezalaki na ebandeli,’+ Yehova alobi bongo.” 12  “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Na esika oyo etikali mpamba, oyo moto azali te mpe nyama ya mboka ezali te+ mpe na bingumba na yango nyonso, bisika ya koleisa banyama matiti ya babateli ya mpate baoyo bazali kolalisa bitonga ekozala lisusu.’+ 13  “‘Na bingumba ya etúká ya ngombangomba, na bingumba ya mokili epai ya nse+ mpe na bingumba ya sudi+ mpe na mokili ya Benyamina+ mpe na zingazinga ya Yerusaleme+ mpe na bingumba ya Yuda,+ bitonga ekoleka lisusu na nse ya mabɔkɔ ya moto oyo azali kotánga yango,’+ Yehova alobi bongo.” 14  “‘Talá! Mikolo ezali koya,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe nakokokisa mpenza liloba malamu oyo nalobi+ mpo na ndako ya Yisraele+ mpe mpo na ndako ya Yuda. 15  Na mikolo yango mpe na ntango yango, nakobimisela Davidi etape ya boyengebene,+ mpe ye akosala mpenza na bosembo mpe na boyengebene na mokili.+ 16  Na mikolo yango, Yuda ekobika+ mpe Yerusaleme ekofanda na kimya.+ Mpe akobengama boye: Yehova azali Boyengebene na biso.’”+ 17  “Mpo talá oyo Yehova alobi: ‘Mpo na Davidi, moto akozanga te oyo akofanda na kiti ya bokonzi ya ndako ya Yisraele.+ 18  Mpe mpo na banganga-nzambe, Balevi, moto akozanga te liboso na ngai mpo na kopesa likabo mobimba ya kotumba mpe komatisa milinga ná likabo ya mbuma mpe kopesa mbeka ntango nyonso.’”+ 19  Mpe liloba ya Yehova eyelaki lisusu Yirimia ete: 20  “Talá oyo Yehova alobi: ‘Soki bokokoka kobuka kondimana na ngai ya moi mpe kondimana na ngai ya butu, mpo moi ná butu ebima te na ntango na yango,+ 21  boye kondimana na ngai elongo na Davidi mosaleli na ngai+ ekoki kobukama, mpo azala na mwana te oyo azali koyangela na kiti na ye ya bokonzi;+ mpe elongo na Balevi, banganga-nzambe, basaleli na ngai.+ 22  Ndenge limpinga ya likoló ekoki kotángama te, mpe zɛlo ya mbu ekoki komekama te,+ ndenge yango nde nakokómisa mingi momboto ya Davidi mosaleli na ngai mpe Balevi oyo bazali kosalela ngai.’”+ 23  Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela Yirimia ete: 24  “Omoni te oyo bato oyo balobi ete: ‘Mabota mibale oyo Yehova aponá,+ akobwaka mpe yango’? Mpe bazali kaka kozanga limemya epai ya bato na ngai,+ mpo ete ezala ekólo lisusu te liboso na bango. 25  “Talá oyo Yehova alobi: ‘Soki ya solo ezalaka te ete natyaki kondimana na ngai ya moi mpe ya butu,+ mibeko ya likoló mpe ya mabele,+ 26  nalingaki mpe kobwaka momboto ya Yakobo mpe ya Davidi mosaleli na ngai,+ mpo nazwa bayangeli te na momboto na ye mpo báyangela momboto ya Abrahama, ya Yisaka mpe ya Yakobo. Mpo nakoyanganisa bakangami+ na bango mpe nakoyokela bango mawa.’”+

Maloba na nse