Yirimia 32:1-44

32  Liloba oyo eyelaki Yirimia longwa na Yehova na mbula ya zomi ya Zidikiya mokonzi ya Yuda,+ elingi koloba, na mbula ya zomi na mwambe ya Nebukadrezare.+  Na ntango yango, mampinga ya basoda ya mokonzi ya Babilone bazingaki Yerusaleme;+ kasi mosakoli Yirimia akangamaki na bolɔkɔ na Lopango ya Bakɛngɛli+ oyo ezali na ndako ya mokonzi ya Yuda;  mpo Zidikiya mokonzi ya Yuda akangaki ye na bolɔkɔ,+ alobi: “Mpo na nini ozali kosakola+ ete: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Talá nazali kopesa engumba oyo na lobɔkɔ ya mokonzi ya Babilone, mpe akozwa yango mpenza;+  mpe Zidikiya, mokonzi ya Yuda, akokima lobɔkɔ ya Bakaladea te, akopesama mpenza na lobɔkɔ ya mokonzi ya Babilone, mpe monɔkɔ na ye ekosolola na monɔkɔ ya moto yango, mpe miso na ye ekomona mpe miso ya moto yango”’;+  ‘mpe akomema Zidikiya na Babilone, mpe ye akokoba kozala kuna kino nakotyela ye likebi,’+ yango nde liloba ya Yehova; ‘ata soki bozali kaka kobunda na Bakaladea bokolonga te’?”+  Mpe Yirimia alobaki ete: “Liloba ya Yehova eyelaki ngai ete:  ‘Talá Hanamele mwana ya Shalume ndeko ya tata na yo azali koya epai na yo, akoloba: “Sombá elanga na ngai oyo ezali na Anatote,+ mpo lotomo ya kosikola ezali ya yo mpo na kosomba yango.”’”+  Na nsima, Hanamele mwana ya ndeko ya tata na ngai ayaki epai na ngai, engebene liloba ya Yehova, na kati ya Lopango ya Bakɛngɛli,+ mpe alobaki na ngai ete: “Nabondeli yo, sombá elanga na ngai oyo ezali na Anatote,+ oyo ezali na mokili ya Benyamina,+ mpo lotomo ya kozwa libula ezali ya yo, mpe lotomo ya kosomba lisusu ezali ya yo. Sombá yango.” Bongo nayebaki ete ezali liloba ya Yehova.+  Boye nasombaki elanga ya Hanamele+ mwana ya ndeko ya tata na ngai, oyo ezalaki na Anatote.+ Mpe nabandaki komeka kilo ya mbongo+ ya kopesa ye: shekele nsambo mpe shekele ya palata zomi. 10  Mpe nakomaki na mokanda ya bosombi,+ nabɛtaki kashɛ+ mpe nazwaki batatoli+ wana nazalaki komeka kilo+ ya mbongo na bimekeli-kilo. 11  Nsima na yango nazwaki mokanda yango ya bosombi, oyo etyamaki elembo na kolanda mitindo mpe malako,+ mpe oyo etikalaki polele; 12  bongo napesaki mokanda ya bosombi epai ya Baruke+ mwana ya Neria+ mwana ya Mahaseya na miso ya Hanamele mwana ya ndeko ya tata na ngai mpe na miso ya batatoli, baoyo bakomaki na mokanda ya bosombi,+ na miso ya Bayuda nyonso oyo bafandaki na Lopango ya Bakɛngɛli.+ 13  Bongo napesaki Baruke mitindo na miso na bango ete: 14  “Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Zwá mikanda oyo, mokanda oyo ya bosombi, ɛɛ oyo etyami elembo, ná mokanda mosusu oyo etikalaki polele,+ mpe osengeli kotya yango nyonso na mbɛki ya mabele, mpo yango eumela mikolo mingi.’ 15  Mpo talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Bandako ná bilanga mpe bilanga ya vinyo ekosombama lisusu na mokili oyo.’”+ 16  Mpe nabandaki kobondela+ Yehova nsima ya kopesa Baruke mwana ya Neria+ mokanda ya bosombi+ ete: 17  “Aa, Ee Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova!+ Talá yo nde ozalisaki likoló ná mabele na nguya na yo monene+ mpe na lobɔkɔ na yo oyo esembolami.+ Likambo nyonso wana ezali ya kokamwa mingi te mpo na yo,+ 18  Yo nde omonisaka motema boboto epai ya bato nkóto nkóto,+ mpe ofutaka libunga ya batata na ntolo ya bana na bango nsima na bango,+ Nzambe ya solo, Yo nde ozali monene,+ Yo nde ozali na nguya,+ Yehova ya mampinga+ nde nkombo na ye,+ 19  Yo nde ozali monene na toli+ mpe monene na misala,+ yo oyo miso efungwami likoló ya banzela nyonso ya bana ya bato,+ mpo na kopesa na mokomoko na kolanda mbuma ya misala na ye;+ 20  yo nde otyaki bilembo mpe makamwisi na mokili ya Ezipito tii na mokolo ya lelo mpe na Yisraele mpe na kati ya bato,+ mpo omisalela nkombo ya lokumu, lokola na mokolo ya lelo.+ 21  Mpe obimisaki bato na yo Yisraele na mokili ya Ezipito,+ na bilembo mpe na makamwisi+ mpe na nguya ya lobɔkɔ na yo mpe na lobɔkɔ oyo esembolami mpe na makambo minene ya nsɔmɔ.+ 22  “Na nsima, opesaki bango mokili oyo olapelaki bankɔkɔ na bango ndai ete okopesa bango,+ mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+ 23  Mpe bakɔtaki mpe bazwaki yango,+ kasi batosaki mongongo na yo te, batambolaki na mobeko na yo te.+ Makambo nyonso oyo opesaki bango mitindo ete básala, basalaki yango te,+ bongo osalaki ete mpasi oyo nyonso ekwela bango.+ 24  Talá! bato basali mwa bangomba ya mabele+ tii na engumba mpo na kozwa yango,+ mpe engumba yango ekopesama na lobɔkɔ ya Bakaladea oyo bazali kobunda na yango,+ mpo na mopanga,+ mpo na nzala+ mpe mpo na maladi mabe;+ mpe oyo olobaki esalemi, mpe talá ozali komona yango.+ 25  Nzokande, yo Ee Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova, olobi na ngai ete: ‘Omisombela elanga na mbongo+ mpe zwá batatoli,’+ atako engumba esengeli kopesama na lobɔkɔ ya Bakaladea.”+ 26  Na yango, liloba ya Yehova eyelaki Yirimia ete: 27  “Talá, ngai nazali Yehova, Nzambe ya ekelamu nyonso ya mosuni.+ Epai na ngai ezali nde na likambo moko ya kokamwa koleka?+ 28  Bongo talá oyo Yehova alobi: ‘Talá nazali kopesa engumba oyo na lobɔkɔ ya Bakaladea mpe na lobɔkɔ ya Nebukadrezare mokonzi ya Babilone, mpe ye akozwa yango.+ 29  Mpe Bakaladea oyo bazali kobundisa engumba oyo bakokɔta na kati, bakotya engumba yango mɔtɔ mpe bakotumba yango,+ mpe bandako oyo likoló ya bansamba na yango babimiseli Baala milinga ya mbeka mpe basopeli banzambe mosusu makabo ya masanga, mpo na kosilikisa ngai.’+ 30  “‘Mpo bana ya Yisraele mpe bana ya Yuda bazali kaka kosala oyo ezali mabe na miso na ngai, banda bolenge na bango;+ mpo bana ya Yisraele bazali kutu kosilikisa ngai na mosala ya mabɔkɔ na bango,’+ yango nde liloba ya Yehova. 31  ‘Mpo engumba oyo, banda mokolo oyo batongaki yango, tii mokolo ya lelo, ezali eloko oyo epesaka ngai kaka nkanda+ mpe eloko oyo epesaka ngai kaka nkɛlɛ, mpo nalongola yango liboso na elongi na ngai,+ 32  mpo na mabe nyonso ya bana ya Yisraele+ mpe ya bana ya Yuda+ oyo basali mpo na kosilikisa ngai,+ bango, ná bakonzi+ na bango, ná bankumu+ na bango, ná banganga-nzambe+ na bango ná basakoli+ na bango, ná bato ya Yuda mpe bato oyo bafandi na Yerusaleme. 33  Mpe bazali kaka kopesa ngai mokɔngɔ na bango kasi elongi te;+ atako nazalaki koteya bango, kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe koteya, kasi moko te na bango azalaki koyoka mpo na kozwa disiplini.+ 34  Mpe bazalaki kotya biloko na bango ya bosɔtɔ na ndako oyo ebengami na nkombo na ngai, mpo na kokómisa yango mbindo.+ 35  Lisusu, batongaki bisika oyo etombwaná ya Baala+ oyo ezali na lobwaku ya mwana ya Hinome,+ mpo na kolekisa na mɔtɔ bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi mbeka+ epai ya Moleke,+ likambo oyo napesaki bango mitindo te,+ mpe eyelaki ngai mpe na motema te ete nasala likambo yango oyo eyinamá,+ mpo na kosalisa Yuda lisumu.’+ 36  “Bongo, sikoyo, talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi mpo na engumba oyo bozali koloba ete ekopesama mpenza na lobɔkɔ ya mokonzi ya Babilone na nzela ya mopanga mpe na nzela ya nzala mpe na nzela ya maladi mabe,+ 37  ‘Talá nazali koyanganisa bango longwa na mikili nyonso epai nakopalanganisa bango na nkanda na ngai mpe na nkɛlɛ na ngai mpe na kosilika makasi;+ mpe nakozongisa bango na esika oyo mpe nakofandisa bango na kimya.+ 38  Mpe bakokóma mpenza bato na ngai,+ mpe ngai nakokóma Nzambe na bango.+ 39  Mpe nakopesa bango motema moko+ mpe nzela moko mpo bábanga ngai ntango nyonso, mpo na bolamu na bango mpe ya bana na bango nsima na bango.+ 40  Mpe nakosala ná bango kondimana oyo ekoumela mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+ ete nakolongwa nsima na bango te, mpo na kosalela bango malamu;+ mpe nakotya kobanga na ngai na kati ya motema na bango mpo bálongwa na ngai te.+ 41  Mpe nakosepela na bango mingi mpo nakosalela bango malamu,+ mpe nakolona bango kati na mokili oyo+ na bosolo, na motema na ngai mobimba mpe na molimo na ngai mobimba.’” 42  “Mpo talá oyo Yehova alobi: ‘Kaka ndenge namemeli bato oyo mpasi monene oyo nyonso, bobele bongo nazali komemela bango bolamu nyonso oyo nazali koloba mpo na bango.+ 43  Mpe bilanga ekosombama mpenza na mokili oyo+ bokoloba mpo na yango ete: “Etikali mpamba,+ moto azali te mpe nyama ya mboka azali te. Epesami na lobɔkɔ ya Bakaladea.”’+ 44  “‘Bato bakomisombela bilanga na mbongo, mpe bakokoma na mokanda ya bosombi+ mpe bakotya yango elembo, bakozwa batatoli+ na mokili ya Benyamina+ mpe na zingazinga ya Yerusaleme,+ na bingumba ya Yuda,+ na bingumba ya etúká ya ngombangomba, na bingumba ya mokili epai ya nse+ mpe na bingumba ya sudi,+ mpo nakozongisa bakangami na bango,’+ yango nde liloba ya Yehova.”

Maloba na nse