Yirimia 31:1-40
31 “Na ntango yango,” yango nde liloba ya Yehova, “nakokóma Nzambe mpo na mabota nyonso ya Yisraele; mpe bango, bakokóma bato na ngai.”+
2 Talá oyo Yehova alobi: “Lisangá ya bato oyo babikaki na mopanga bandimami na esobe,+ ntango Yisraele azalaki kotambola mpo na kozwa esika na ye ya kopema.”+
3 Yehova abimelaki ngai longwa na mosika, alobi: “Nalingá yo na bolingo ya ntango oyo etyami ndelo te.+ Yango wana nabendi yo na motema boboto.+
4 Nakotonga yo lisusu mpe okotongama lisusu mpenza,+ Ee ngɔndɔ ya Yisraele. Okomikembisa na bambonda na yo ya moke ya mabɔkɔ mpe okokɔta na mabina ya baoyo bazali kosɛka.+
5 Okolona lisusu bilanga ya vinyo na bangomba ya Samaria.+ Baloni bakolona mpenza mpe bakobanda kolya yango.+
6 Mpo mokolo ekoya oyo bakɛngɛli na etúká ya ngombangomba ya Efraime bakobelela mpenza ete: ‘Ee bino, bótɛlɛma, mpe tómata na Siona, epai ya Yehova Nzambe na biso.’”+
7 Mpo talá oyo Yehova alobi: “Bóganga makasi na esengo epai ya Yakobo, mpe bóganga makasi epai ya oyo azali motó ya bikólo.+ Bósakola yango.+ Bósanzola mpe bóloba ete: ‘Ee Yehova, bikisá bato na yo, batikali ya Yisraele.’+
8 Talá nazali komema bango uta na mokili ya nɔrdi,+ mpe nakoyanganisa bango uta na nsukansuka ya mabele.+ Kati na bango moto oyo akufá miso mpe motɛngumi, mwasi ya zemi mpe oyo azali kobota bakozala, bango nyonso elongo.+ Bakozonga awa lokola lisangá moko monene.+
9 Bakoya na kolela,+ mpe nakomema bango wana bazali kosɛngasɛnga mpo na kondimama. Nakotambwisa bango na mabwaku ya mikɛli ya mai,+ na nzela ya malamu, epai bakobɛtisama libaku te. Mpo nakómi Tata ya Yisraele;+ mpe Efraime ye, azali mwana na ngai ya liboso.”+
10 Bóyoka liloba ya Yehova, Ee bikólo, bólobela yango kati na bisanga mosika,+ mpe bóloba: “Ye oyo apanzá Yisraele akoyanganisa ye,+ mpe akobatela ye ndenge mobateli ya mpate abatelaka etonga na ye.+
11 Mpo Yehova akosikola mpenza Yakobo+ mpe akobikisa ye na lobɔkɔ ya moto oyo aleki ye na makasi.+
12 Mpe bakoya mpenza mpe bakoganga na esengo na esika etombwaná ya Siona+ mpe bakosepela mpo na bolamu ya Yehova,+ mpo na mbuma, mpo na vinyo ya sika,+ mpo na mafuta, mpo na bana ya bampate mpe bangɔmbɛ.+ Mpe molimo na bango ekokóma lokola elanga oyo ezwaka mai mpenza,+ mpe bakolɛmba lisusu te.”+
13 “Na ntango yango ngɔndɔ akosepela na mabina, bilenge mibali lokola, mpe mibange mibali, bango nyonso elongo.+ Mpe nakobongola kolela na bango ezala kosepela monene, mpe nakobɔndisa bango na mawa na bango.+
14 Mpe nakotondisa molimo ya banganga-nzambe na mafuta,+ mpe bato na ngai bakotonda na bolamu na ngai,”+ yango nde liloba ya Yehova.
15 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Mongongo ezali koyokana na Rama,+ bileli ná mongongo ya kolela ya mawa;+ Rashele+ nde azali kolela bana na ye.+ Aboyi kobɔndisama mpo na bana na ye,+ mpo bazali lisusu te.’”+
16 Talá oyo Yehova alobi: “‘Pekisá mongongo na yo kolela mpe miso na yo kobimisa mpisoli,+ mpamba te mbano ezali mpo na mosala na yo,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe bakozonga mpenza longwa na mokili ya monguna.’+
17 “‘Mpe elikya+ ezali mpo na bomoi na yo na mikolo oyo ezali koya,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe bana bakozonga na teritware na bango.’”+
18 “Nayoki Efraime azali komilelalela+ ete: “Osemboli ngai mpo nasembolama,+ lokola mwana-ngɔmbɛ oyo ateyami te.+ Zongisá ngai, mpe nakozonga mpenza,+ mpo ozali Yehova Nzambe na ngai.+
19 Mpo nsima ya kozonga na ngai nayokaki mawa;+ mpe nsima ya koyebisa ngai, namibɛtaki ebɛlɔ.+ Nayokaki nsɔni, mpe nayokaki ete nasambwe mpenza,+ mpo namemi nsɔni ya bolenge na ngai.’”+
20 “Efraime azali nde mwana ya motuya epai na ngai, to mwana oyo nalɛngɛlaka?+ Mpo ndenge nazali koloba mabe mpo na ye, ndenge mpe nakokanisa ye lisusu.+ Yango wana misɔpɔ na ngai ekómi na yikiyiki.+ Nakoyokela mpenza ye mawa,”+ yango nde liloba ya Yehova.
21 “Omitɛlɛmisela bilembo ya nzela. Omityela makonzí ya mabanga oyo ezali komonisa nzela.+ Tyá motema na yo likoló ya nzela ya monene, nzela epai osengeli kokende.+ Zongá, Ee ngɔndɔ ya Yisraele. Zongá na bingumba oyo ezali ya yo.+
22 Kino ntango nini okobaluka epai na epai,+ Ee mwana mwasi oyo azangi bosembo?+ Mpo Yehova asali likambo moko ya sika na mabele: Mwasi akotyatya mobali makasi mbamba.”
23 Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Bakoloba kutu liloba oyo na mokili ya Yuda mpe na bingumba na yango, ntango nakoyanganisa bakangami na bango, ete: ‘Yehova apambola yo,+ Ee esika ya kofanda ya boyengebene,+ Ee ngomba mosantu.’+
24 Mpe kuna, Yuda ná bingumba na yango nyonso bakofanda elongo, baloni-bilanga mpe baoyo bakei na etonga.+
25 Mpo nakosilisa mposa ya molimo oyo elɛmbi, mpe molimo nyonso oyo elɛmbi nakotondisa yango.”+
26 Bongo nalamukaki mpe nabandaki komona; mpe mpɔngi na ngai ekómaki elɛngi mpo na ngai.
27 “Talá! Mikolo ezali koya,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe nakolona ndako ya Yisraele mpe ndako ya Yakobo na mboto ya moto mpe na mboto ya nyama ya mboka.”+
28 “Mpe ekosalema mpenza boye: kaka ndenge natyelaki bango likebi+ mpo na kopikola, mpo na kokweisa mpe mpo na kobuka, mpo na kobebisa mpe mpo na koboma,+ ndenge wana nde nakotyela bango likebi mpo na kotonga mpe mpo na kolona,”+ yango nde liloba ya Yehova.
29 “Na mikolo yango bakoloba lisusu te ete: ‘Batata nde balyaki mbuma ya vinyo oyo eteli te, kasi mino ya bana nde eyokaki ngayi.’+
30 Kasi moto na moto akokufa mpo na libunga na ye.+ Moto nyonso oyo akolya mbuma ya vinyo oyo eteli te, mino na ye nde ekoyoka ngayi.”
31 “Talá! Mikolo ezali koya,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe nakosala kondimana ya sika+ ná ndako ya Yisraele+ mpe ná ndako ya Yuda;+
32 ekozala te kondimana lokola oyo nasalaki ná bankɔkɔ na bango na mokolo oyo nasimbaki lobɔkɔ na bango mpo na kobimisa bango na mokili ya Ezipito,+ ‘kondimana na ngai oyo bango babukaki,+ atako ngai nazalaki nkolo mpe mobali na bango,’+ yango nde liloba ya Yehova.”
33 “Mpo talá kondimana+ oyo nakosala ná ndako ya Yisraele nsima ya mikolo yango,”+ yango nde liloba ya Yehova. “Nakotya mobeko na ngai na kati na bango,+ mpe nakokoma yango na motema na bango.+ Mpe nakokóma Nzambe na bango, mpe bango bakokóma bato na ngai.”+
34 “Mpe bakoteyana lisusu te moto na moto moninga na ye mpe moto na moto ndeko na ye+ ete: ‘Bóyeba Yehova!’+ mpo bango nyonso bakoyeba ngai, kobanda na oyo aleki moke kati na bango kino na oyo aleki monene kati na bango,”+ yango nde liloba ya Yehova. “Mpo nakolimbisa libunga na bango, mpe nakokanisa lisumu na bango lisusu te.”+
35 Talá oyo Yehova, Mopesi ya moi mpo na pole na ntango ya moi,+ mibeko+ ya sanza+ mpe ya minzoto na ntango ya butu,+ Ye oyo atombokisaka mbu mpo mbonge na yango ekóma na yikiyiki,+ Oyo azali na nkombo Yehova ya mampinga,+ alobi:
36 “‘Soki malako oyo ekoki kolongolama liboso na ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova, boye ‘baoyo bazali momboto ya Yisraele bakozala mpe ekólo lisusu te liboso na ngai, libela.’”+
37 Talá oyo Yehova alobi: “‘Soki lola kuna na likoló ekokaka komekama mpe miboko ya mabele awa na nse ekokaka koyebana,+ mbɛlɛ ngai mpe nabwaki momboto mobimba ya Yisraele mpo na nyonso oyo basali,’+ yango nde liloba ya Yehova.”
38 “Talá! Mikolo ezali koya,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe engumba ekotongama+ mpo na Yehova banda na Ndako Molai ya Hananele+ kino na Litumu ya Porte.+
39 Mpe nsinga ya komeka molai+ ekokende alima tii na ngomba moke ya Garebe, mpe ekobaluka kino na Goa.
40 Mpe lobwaku mobimba ya patatalu ya bibembe+ mpe ya putulu ya mɔtɔ oyo etondi na mafuta,+ mpe mikala nyonso ya bilanga kino na lobwaku ya mokɛli ya Kidrone,+ tii na litumu ya Porte ya Bampunda+ na ngámbo ya ebimelo ya moi, ekozala eloko moko mosantu mpo na Yehova.+ Ekopikolama te, mpe ekokweisama lisusu te, mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”+