Yirimia 3:1-25

3  Balobaka boye: “Soki mobali moko alongoli mwasi na ye mpe mwasi yango akei mpenza, atiki ye mpe akómi mwasi ya mobali mosusu, mobali yango akozongela ye lisusu?”+ Mokili yango ekómi mbindo te?+ “Mpe yo osali bondumba na baninga ebele;+ bongo okozongela ngai lisusu?”+ yango nde liloba ya Yehova.  “Tombolá miso na yo na banzela oyo bato balekalekaka mpe moná.+ Esika nini oyo basangisi na yo nzoto na makasi te?+ Ofandi pembeni ya banzela mpo na bango, lokola Moarabe na esobe;+ mpe ozali kaka kokómisa mokili yango mbindo na misala na yo ya bondumba mpe na mabe na yo.+  Na yango, baboyeli yo mbula monene,+ mpe ata mbula ya eleko ya prɛnta ezali te.+ Mpe elongi na yo ekómi lokola elongi ya mwasi oyo azali kosala bondumba. Oboyi koyoka nsɔni.+  Obeleli ngai banda sikoyo ete: ‘Tata na ngai,+ yo moninga ya motema na bolenge na ngai!+  Moto akokanga nkanda mpo na ntango oyo etyami ndelo te to akotalatala likambo moko boye libela?’+ Talá! Olobi, mpe ozali kaka kosala makambo ya mabe mpe olongi.”+  Mpe na mikolo ya mokonzi Yosiya,+ Yehova alobaki na ngai boye: “‘Omoni likambo Yisraele oyo azangi bosembo asali?+ Azali kokende na ngomba nyonso oyo etombwaná+ mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa,+ mpo asala bondumba kuna.+  Mpe nsima ya kosala makambo nyonso wana, nazalaki kaka koloba ete akozongela ngai, kasi azongaki te;+ mpe Yuda azalaki kaka kotala ndeko na ye ya mwasi oyo azali na bokosi.+  Ntango namonaki bongo, lokola Yisraele oyo azangi bosembo asalaki ekobo, nalongolaki ye+ mpe napesaki ye mokanda ya koboma mpenza libala,+ ata bongo Yuda, ndeko na ye ya mwasi oyo azali kosala na bokosi, abangaki te, kasi ye mpe abandaki kokende mpe kosala bondumba.+  Mpe asalaki bondumba mpo na ezaleli na ye ya kozanga kopesa nzoto kilo, mpe azalaki kaka kokómisa mokili mbindo+ mpe kosala ekobo na mabanga mpe na banzete;+ 10  mpe atako nyonso wana, Yuda ndeko na ye ya mwasi oyo azali mokosi azongelaki ngai na motema na ye mobimba te,+ kasi kaka na lokuta,’+ yango nde liloba ya Yehova.” 11  Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu boye: “Yisraele oyo azangi bosembo amonisi ete molimo na ye ezali na boyengebene koleka Yuda oyo azali kosala na bokosi.+ 12  Kende, mpe osengeli kosakola maloba oyo epai na nɔrdi+ mpe koloba ete: “‘“Zongá, Ee Yisraele mopɛngwi,” yango nde liloba ya Yehova.’+ ‘“Nakotala bino na elongi ya nkanda te,+ mpo nazali sembo,”+ yango nde liloba ya Yehova.’ ‘“Nakokanga nkanda mpo na libela te.+ 13  Kasi talá malamu libunga na yo, mpo obuki mobeko mpo na kotɛmɛla Yehova Nzambe na yo.+ Mpe ozalaki kaka kopanza banzela na yo epai ya bapaya+ na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa,+ kasi boyokaki mongongo na ngai te,” yango nde liloba ya Yehova.’” 14  “Bózonga, Ee bino bana bapɛngwi,”+ yango nde liloba ya Yehova. “Mpo ngai nakómá nkolo mpe mobali na bino;+ mpe nakozwa bino, moko na engumba moko mpe mibale na libota moko, mpe nakomema bino na Siona.+ 15  Mpe nakopesa bino babateli oyo motema na ngai endimi,+ mpe bakoleisa bino mpenza na boyebi mpe na mayele ya kososola.+ 16  Mpe ekosalema mpenza boye: bokokóma mingi mpe bokobota mpenza mbuma na mokili na mikolo yango,” yango nde liloba ya Yehova.+ “Bakoloba lisusu te ete: ‘Sanduku ya kondimana ya Yehova!’+ mpe yango ekoya na motema te, bakokanisa yango te,+ bakolela yango te, bakosala yango lisusu te. 17  Na ntango yango, bakobenga Yerusaleme ete kiti ya bokonzi ya Yehova;+ mpe bato ya bikólo nyonso bakoyanganisama epai na ye+ mpo na nkombo ya Yehova na Yerusaleme,+ mpe bakolanda lisusu te motó makasi mpe motema mabe na bango.”+ 18  “Na mikolo yango, ndako ya Yuda ná ndako ya Yisraele+ bakotambola elongo,+ mpe bakobima elongo na mokili ya nɔrdi mpo na kokɔta na mokili oyo napesaki bankɔkɔ na bino libula.+ 19  Mpe ngai moko nalobi: ‘Ee talá ndenge natyaki yo katikati ya bana mibali mpe napesaki yo mokili ya kitoko,+ libula oyo ezali eloko kitoko mpo na mampinga ya bikólo!’ Mpe nalobaki lisusu boye: ‘Bokobelela ngai ete: “Tata na ngai!”+ mpe bokotika kolanda ngai te.’ 20  ‘Ya solo, ndenge oyo mwasi atiki moninga na ye na bokosi,+ bino mpe, Ee ndako ya Yisraele, bosaleli ngai makambo na bokosi,’+ yango nde liloba ya Yehova.” 21  Lokito eyokani na banzela oyo bato balekalekaka, kolela, malɔmbɔ ya bana ya Yisraele. Mpo batɛngisi nzela na bango;+ babosani Yehova Nzambe na bango.+ 22  “Bózonga, bino bana bapɛngwi.+ Nakobikisa bino na lipɛngwi na bino.”+ “Biso oyo! Toyei epai na yo, mpo yo, Ee Yehova, ozali Nzambe na biso.+ 23  Ya solo, bangomba mike mpe yikiyiki likoló ya bangomba+ ezali ya lokuta.+ Ya solo, lobiko ya Yisraele ezali na Yehova Nzambe na biso.+ 24  Kasi, banda bolenge na biso, eloko ya nsɔni+ elyá mosala ya makasi ya bankɔkɔ na biso, bitonga na bango ya bampate mpe bitonga na bango ya bangɔmbɛ, bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi. 25  Tozali kolala na kati ya nsɔni+ na biso, mpe kosambwa na biso ezali kaka kozipa biso;+ mpo ezali Yehova Nzambe na biso nde tosaleli lisumu,+ biso ná batata na biso banda bolenge na biso tii na mokolo ya lelo,+ mpe totosi te mongongo ya Yehova Nzambe na biso.”+

Maloba na nse