Yirimia 27:1-22

27  Na ebandeli ya bokonzi ya Yehoyakime mwana ya Yosiya,+ mokonzi ya Yuda, liloba oyo eyelaki Yirimia uta na Yehova ete:  “Talá oyo Yehova alobi na ngai: ‘Omisalela bansinga mpe bikanganeli,+ mpe osengeli kotya yango na nkingo na yo.+  Mpe osengeli kotindela yango mokonzi ya Edome,+ mokonzi ya Moabe,+ mokonzi ya bana ya Amone,+ mokonzi ya Tire+ mpe mokonzi ya Sidone+ na lobɔkɔ ya bamemi-nsango oyo bazali koya na Yerusaleme epai ya Zidikiya mokonzi ya Yuda.  Mpe osengeli kopesa bango mitindo mpo na bankolo na bango ete: “‘“Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele,+ alobi; talá oyo bosengeli koloba na bankolo na bino,  ‘Ngai moko nde nasalá mabele,+ bato+ mpe banyama+ oyo bazali likoló ya etando ya mabele, na nguya na ngai monene+ mpe na lobɔkɔ na ngai oyo esembolami;+ mpe napesi yango na moto oyo namoni malamu na miso na ngai.+  Mpe sikoyo ngai moko napesi mikili oyo nyonso na lobɔkɔ ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone,+ mosaleli na ngai;+ ata mpe banyama ya elanga napesi ye yango mpo esalela ye.+  Mpe bato ya bikólo nyonso basengeli kosalela ye,+ mwana na ye mpe mwana ya mwana na ye, kino ntango mpo na mokili na ye moko ekoya,+ mpe bato ya bikólo mingi mpe bakonzi minene bakozwa ye mosaleli oyo azali kosala mosala ya mpunda.’+  “‘“‘Mpe ekosalema mpenza boye: ekólo mpe bokonzi oyo ekosalela ye te, ɛɛ Nebukadenezare mokonzi ya Babilone; mpe ekólo oyo ekotya nkingo na yango na nse ya ekanganeli ya mokonzi ya Babilone te, nakotyela ekólo yango likebi na mopanga,+ na nzala+ mpe na maladi mabe,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘kino nakosilisa yango na lobɔkɔ na ye.’+  “‘“‘Bongo bino, bóyokela basakoli na bino te+ mpe basakoli na bino ya makambo oyo ebombaná mpe balɔti ndɔtɔ+ na bino mpe bato na bino ya misala ya maji mpe banganga-nkisi+ na bino, oyo bazali koloba na bino ete: “Bokosalela mokonzi ya Babilone te.”+ 10  Mpo bazali kosakwela bino lokuta, mpo bómemama mosika, bólongwa na mabele na bino; mpe nakopalanganisa bino, mpe bokokufa mpenza.+ 11  “‘“‘Kasi mpo na ekólo oyo ekotya nkingo na yango na nse ya ekanganeli ya mokonzi ya Babilone mpe ekosalela ye, ngai mpe nakopemisa yango na mabele na yango,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe ekolona yango mpenza mpe ekofanda wana.’”’”+ 12  Ata Zidikiya+ mokonzi ya Yuda nalobaki na ye engebene maloba oyo nyonso+ ete: “Bótya bankingo na bino na nse na ekanganeli ya mokonzi ya Babilone mpe bósalela ye ná bato na ye mpe bótikala na bomoi.+ 13  Mpo na nini yo ná bato na yo bókufa na mopanga,+ na nzala+ mpe na maladi mabe+ engebene oyo Yehova alobi na ekólo oyo ezali kosalela mokonzi ya Babilone te? 14  Bóyoka te maloba ya basakoli oyo bazali koloba na bino ete: ‘Bokosalela mokonzi ya Babilone te,’+ mpo bazali nde kosakwela bino lokuta.+ 15  “‘Mpo natindi bango te,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘kasi bazali kosakola makambo ya lokuta na nkombo na ngai, mpo napalanganisa bino,+ mpe bokokufa mpenza,+ bino ná basakoli na bino oyo bazali kosakwela bino.’”+ 16  Mpe nalobaki na banga-nga-nzambe mpe na bato nyonso oyo ete: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Bóyoka maloba ya basakoli na bino te oyo bazali kosakwela bino ete: “Talá! Etikali moke sikoyo, bisaleli ya ndako ya Yehova ezongisama uta na Babilone!”+ Mpo bazali kosakwela bino lokuta.+ 17  Bóyokela bango te. Bósalela mokonzi ya Babilone mpe bótikala na bomoi.+ Mpo na nini engumba oyo ekóma esika oyo ebebisamá?+ 18  Kasi soki bazali basakoli mpe soki liloba ya Yehova ezali elongo na bango, nabondeli bino, tiká bábondela Yehova ya mampinga,+ ete bisaleli oyo etikali na ndako ya Yehova mpe na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe na Yerusaleme ekende na Babilone te.’ 19  “Mpo talá oyo Yehova alobi mpo na makonzí,+ mpo na mbu,+ mpo na bashario+ mpe mpo na bisaleli mosusu oyo etikali na engumba oyo,+ 20  oyo Nebukadenezare mokonzi ya Babilone azwaki te ntango amemaki Yekonia+ mwana ya Yehoyakime, mokonzi ya Yuda, na mboka mopaya longwa na Yerusaleme kino na Babilone, elongo na bato nyonso ya lokumu ya Yuda mpe ya Yerusaleme;+ 21  mpo talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi mpo na bisaleli oyo etikali na ndako ya Yehova mpe na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe na Yerusaleme,+ 22  ‘“Na Babilone nde epai biloko yango ekomemama+ mpe yango ekokoba kozala kuna kino mokolo oyo nakotyela yango likebi,”+ yango nde liloba ya Yehova. “Mpe nakomatisa yango mpe nakozongisa yango na esika oyo.”’”+

Maloba na nse