Yirimia 25:1-38
25 Liloba oyo eyelaki Yirimia mpo na bato nyonso ya Yuda na mbula ya minei ya Yehoyakime+ mwana ya Yosia, mokonzi ya Yuda, elingi koloba, mbula ya liboso ya Nebukadrezare mokonzi ya Babilone;
2 oyo mosakoli Yirimia alobaki mpo na bato nyonso ya Yuda mpe mpo na bato nyonso oyo bafandi na Yerusaleme ete:
3 “Banda mbula ya zomi na misato ya Yosia+ mwana ya Amone, mokonzi ya Yuda, kino mokolo ya lelo, mbula ntuku mibale na misato (23) oyo, liloba ya Yehova eyeli ngai, mpe nazalaki kaka koloba na bino, nazalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe koloba, kasi boyokaki te.+
4 Mpe Yehova atindelaki bino basaleli na ye nyonso basakoli, azalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kotinda bango, kasi boyokaki te,+ mpe bosembolaki litoi na bino mpo na koyoka te,+
5 ntango bazalaki koloba ete: ‘Tobondeli bino, bólongwa moto na moto na nzela na ye ya mabe mpe na mabe ya misala na bino,+ mpe bókoba kofanda na mabele oyo Yehova apesaki bino mpe bankɔkɔ na bino banda kala mpe apesi bino mpo na ntango molai oyo ekoya.+
6 Mpe bólanda banzambe mosusu te mpo na kosalela bango mpe kogumbamela bango, mpo bósilikisa ngai te na mosala ya mabɔkɔ na bino, mpe mpo nayeisela bino mpasi te.’+
7 “‘Kasi boyokelaki ngai te,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpo bósilikisa ngai na mosala ya mabɔkɔ na bino, mpo bómiyeisela mpasi.’+
8 “Na yango, talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘“Lokola botosaki maloba na ngai te,
9 talá nazali kotinda mpe nakozwa mabota nyonso ya nɔrdi,”+ yango nde liloba ya Yehova, “ɛɛ nazali kotinda epai ya Nebukadrezare mokonzi ya Babilone, mosaleli na ngai,+ mpe nakomema bango bábundisa mokili oyo+ mpe bato oyo bafandi na yango mpe bikólo nyonso oyo ezali zingazinga;+ mpe nakobebisa bango mpe nakokómisa bango eloko ya kokamwa mpe eloko ya kobɛtɛla piololo+ mpe bisika oyo ebebisamá mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+
10 Mpe nakosilisa epai na bango makɛlɛlɛ ya kosepela mpe makɛlɛlɛ ya esengo,+ mongongo ya mobali ya libala mpe mongongo ya mwasi ya libala,+ lokito ya enikelo ya mabɔkɔ+ mpe pole ya mwinda.+
11 Mpe mokili oyo mobimba esengeli kokóma esika oyo ebebisami, eloko ya kokamwa, mpe bato ya bikólo oyo bakosalela mpenza mokonzi ya Babilone mbula ntuku nsambo (70).”’+
12 “‘Mpe ekosalema mpenza boye: ntango mbula ntuku nsambo (70) ekokokisama,+ nakolandela mokonzi ya Babilone mpe ekólo yango,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘libunga na bango, ɛɛ nakolandela mokili ya Bakaladea,+ mpe nakokómisa yango esika oyo etikali mpamba mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+
13 Mpe nakokweisela mokili yango maloba na ngai nyonso oyo nalobeli yango, ɛɛ nyonso oyo ekomami na buku oyo, oyo Yirimia asakoleli bikólo nyonso.+
14 Mpo bango mpe, bikólo mingi mpe bakonzi minene,+ bazwaki bango basaleli oyo bazalaki kosala mosala ya mpunda;+ mpe nakofuta bango engebene mosala na bango mpe engebene mosala ya mabɔkɔ na bango.’”+
15 Mpo talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobaki na ngai: “Kamatá kɔpɔ oyo ya vinyo ya nkɛlɛ na lobɔkɔ na ngai, mpe osengeli komɛlisa yango bikólo nyonso oyo nazali kotinda yo epai na bango.+
16 Mpe basengeli komɛla mpe kotengatenga mpe kosala lokola bato ya ligboma mpo na mopanga oyo nazali kotinda na kati na bango.”+
17 Mpe nakamataki kɔpɔ yango na lobɔkɔ ya Yehova mpe namɛlisaki bikólo nyonso oyo Yehova atindaki ngai epai na bango:+
18 elingi koloba, Yerusaleme mpe bingumba ya Yuda mpe bakonzi na yango, bankumu na yango, mpo na kokómisa yango esika oyo ebebisami, eloko ya kokamwa,+ eloko ya kobɛtɛla piololo mpe elakeli moko ya mabe, ndenge ezali lelo oyo;+
19 Farao mokonzi ya Ezipito, basaleli na ye, bankumu na ye mpe bato na ye nyonso;+
20 mpe etuluku nyonso ya bato ndenge na ndenge, bakonzi nyonso ya mokili ya Uze,+ bakonzi nyonso ya mokili ya Bafilistia,+ Ashekelone,+ Gaza,+ Ekrone+ mpe batikali ya Ashedode;+
21 Edome,+ Moabe+ mpe bana ya Amone;+
22 mpe bakonzi nyonso ya Tire,+ bakonzi nyonso ya Sidone+ mpe bakonzi ya esanga oyo ezali na etúká ya mbu;
23 Dedane,+ Tema,+ Buze mpe baoyo nyonso bazali na nsuki oyo ekatami na mpakatoi;+
24 bakonzi nyonso ya Baarabe+ mpe bakonzi nyonso ya etuluku ya bato ndenge na ndenge oyo bazali kofanda na esobe;
25 bakonzi nyonso ya Zimiri, bakonzi nyonso ya Elame+ mpe bakonzi nyonso ya Bamede;+
26 bakonzi nyonso ya nɔrdi, oyo bazali pene mpe mosika, mokomoko na bango, mpe makonzi mosusu nyonso ya mabele oyo ezali na etando ya mabele; mpe mokonzi ya Sheshake+ akomɛla nsima na bango.
27 “Mpe osengeli koloba na bango ete: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Bómɛla, bólangwa, mpe bósanza, mpe bókwea, na bongo bókoka kotɛlɛma lisusu te+ mpo na mopanga oyo nazali kotinda na kati na bino.”’+
28 Mpe ekosalema mpenza boye: soki baboyi kokamata kɔpɔ yango na lobɔkɔ na yo mpo na komɛla, osengeli bongo koyebisa bango ete: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Bokomɛla kaka.+
29 Mpo talá! na engumba oyo ebengami na nkombo na ngai nde nazali kobanda koyeisa mpasi,+ mpe bino bokozanga nde kozwa etumbu?”’+
“‘Bokozanga kozwa etumbu te, mpo nazali kobenga mopanga mpo na kobundisa bato nyonso oyo bafandi na mabele,’ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga.
30 “Mpe yo, okosakwela bango maloba oyo nyonso, mpe osengeli koloba na bango ete: ‘Longwa na likoló Yehova ye moko akoganga,+ mpe longwa na esika mosantu na ye ya kofanda akoyokisa mongongo na ye.+ Akoganga mpenza na esika na ye ya kofanda. Akoyembela bato nyonso oyo bafandi na mabele na koganga lokola oyo ya bato oyo bazali konyatanyata mbuma na ekamwelo ya vinyo.’+
31 “‘Makɛlɛlɛ ekokóma mpenza tii na esika ya mabele oyo eleki mosika, mpo Yehova azali na likambo ná bikólo.+ Ye moko akosamba ná ekelamu nyonso ya mosuni.+ Bongo bato mabe akopesa bango na mopanga,’+ yango nde liloba ya Yehova.
32 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Talá! mpasi moko ezali kobima longwa na ekólo moko kino na ekólo mosusu,+ mpe mopɛpɛ moko monene mpe ya makasi ekobima longwa na nsukansuka ya mabele.+
33 Mpe baoyo babomami na Yehova bakozala na mokolo yango uta nsuka moko ya mabele tii na nsuka mosusu ya mabele.+ Bakolela bango te, mpe bakoyanganisama te mpe bakokundama te.+ Bakokóma lokola nyɛi na etando ya mabele.’+
34 “Bóganga na kolela, bino babateli ya mpate, mpe bóbelela!+ Mpe bómibalolabalola na mabele,+ bino bato ya lokumu ya etonga,+ mpo mikolo na bino mpo na kobomama mpe mpo na kopalangana ekoki,+ mpe bokokwea mpenza lokola mbɛki moko ya kitoko!+
35 Mpe esika ya kokima elimwe mosika na babateli ya mpate, mpe nzela ya kobika elimwe mosika na bato ya lokumu ya etonga.+
36 Bóyoka! Makɛlɛlɛ ya babateli ya mpate, mpe koganga ya kolela ya bato ya lokumu ya etonga, mpo Yehova azali kopunza esika na bango ya koleisa bibwɛlɛ matiti.
37 Mpe bisika ya kofanda ya kimya ekómi bisika oyo ezangi bomoi mpo na nkanda ya kongala ya Yehova.+
38 Atiki ebombamelo na ye lokola mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki,+ mpo mokili na bango ekómi eloko ya kokamwa mpo na mopanga oyo ezali komonisa mpasi mpe mpo na nkanda na ye ya kongala.”+