Yirimia 24:1-10
24 Mpe Yehova amonisaki ngai, mpe, talá! kitunga mibale ya figi etyami liboso ya tempelo ya Yehova, nsima wana Nebukadrezare mokonzi ya Babilone amemaki na mboka mopaya Yekonia+ mwana ya Yehoyakime,+ mokonzi ya Yuda, mpe bankumu ya Yuda mpe bato oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ+ mpe batongi ya bifelo makasi ya libateli, longwa na Yerusaleme mpo amema bango na Babilone.+
2 Kitunga moko ezalaki na bafigi ya malamu mpenza, lokola bafigi ya ebandeli;+ mpe kitunga mosusu ezalaki na bafigi ya mabe mpenza, mpe ekokaki kolyama te mpo ezalaki mabe.
3 Mpe Yehova alobaki na ngai ete: “Ozali komona nini, Yirimia?” Bongo nalobaki ete: “Bafigi, bafigi ya malamu oyo ezali malamu mpenza, mpe bafigi ya mabe oyo ezali mabe mpenza, mpe ekoki kolyama te mpo ezali mabe.”+
4 Bongo liloba ya Yehova eyelaki ngai ete:
5 “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Lokola bafigi oyo ya malamu, ndenge wana nde nakotalela bato ya Yuda oyo bamemami na mboka mopaya, baoyo nakotinda longwa na esika oyo tii na mokili ya Bakaladea,+ na ndenge ya malamu.+
6 Mpe nakotya liso na ngai likoló na bango na ndenge ya malamu,+ mpe nakozongisa mpenza bango na mokili oyo.+ Mpe nakotonga bango, mpe nakobuka te; mpe nakolona bango, mpe nakopikola te.+
7 Mpe nakopesa bango motema moko mpo báyeba ngai,+ ete ngai nazali Yehova; mpe bakokóma mpenza bato na ngai,+ mpe ngai nakokóma Nzambe na bango, mpo bakozongela ngai na motema na bango mobimba.+
8 “‘Mpe lokola bafigi ya mabe oyo ekoki kolyama te mpo ezali mabe,+ ya solo talá oyo Yehova alobi: “Ndenge wana nde nakokaba Zidikiya+ mokonzi ya Yuda mpe bankumu na ye mpe batikali ya Yerusaleme oyo bazali kotikala na mokili oyo+ mpe baoyo bazali kofanda na mokili ya Ezipito+—
9 Lisusu epai ya makonzi nyonso ya mabele, nakokómisa bango eloko ya kolɛngisa,+ ya mpasi, eloko ya nsɔni mpe liloba ya lisese mpe liloba ya kosɛka,+ mpe elakeli mabe,+ na bisika nyonso oyo nakopalanganisa bango.+
10 Mpe nakotindela bango mopanga,+ nzala+ mpe maladi mabe,+ kino bakosila na mabele oyo napesaki bango mpe bankɔkɔ na bango.”’”+