Yirimia 23:1-40

23  “Mawa na babateli ya mpate oyo bazali kobebisa mpe kopalanganisa bampate ya esika na ngai ya koleisa bibwɛlɛ matiti!”+ yango nde liloba ya Yehova.  Na yango, talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi mpo na babateli ya mpate oyo bazali koleisa bato na ngai: “Bino bopalanganisi bampate na ngai; mpe bozalaki kaka kopanza yango, mpe botyeli yango likebi te.”+ “Talá nazali kotyela bino likebi mpo na mabe ya misala na bino,”+ yango nde liloba ya Yehova.  “Mpe ngai moko nakoyanganisa bampate na ngai oyo etikali uta na mikili nyonso epai napalanganisaki yango,+ mpe nakozongisa yango na esika na yango ya koleisa banyama matiti,+ mpe ekobota mpenza mpe ekokóma mingi.+  Mpe nakotɛlɛmisela yango babateli oyo bakoleisa mpenza yango,+ mpe ekobanga lisusu te, ekolɛnga mpe na nsɔmɔ te,+ mpe moko te ekozanga,” yango nde liloba ya Yehova.  “Talá! Mikolo ezali koya,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe nakotɛlɛmisela Davidi etape ya boyengebene.+ Mpe mokonzi moko akoyangela mpenza+ mpe akosala na bokɛngi mpe akokata makambo na bosembo mpe na boyengebene na mokili.+  Na mikolo na ye Yuda ekobikisama,+ mpe Yisraele ekofanda na kimya.+ Mpe talá nkombo oyo bakobenga ye: Yehova azali Boyengebene na biso.”+  “Na yango, talá! mikolo ezali koya,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe bakoloba lisusu te ete: ‘Yehova azali solo na bomoi, ye oyo abimisaki bana ya Yisraele na mokili ya Ezipito,’+  kasi, ‘Yehova azali solo na bomoi, ye oyo abimisaki mpe amemaki libota ya ndako ya Yisraele uta na mokili ya nɔrdi mpe uta na mikili nyonso epai napalanganisaki bango,’ mpe bakofanda mpenza na mabele na bango.”+  Na oyo etali basakoli, motema na ngai ebukani kati na ngai. Mikuwa na ngai nyonso ebandi kolɛnga. Nakómi lokola moto oyo alangwe,+ mpe lokola mobali makasi oyo vinyo elongi ye, mpo na Yehova mpe mpo na maloba na ye mosantu. 10  Mpo bato ya ekobo+ batondi na mokili.+ Mpamba te mpo na elakeli mabe mokili ezali kolela,+ bisika ya koleisa banyama matiti na esobe ekauki;+ mpe etamboli na bango ezali mabe, nguya na bango ezali sembo te. 11  “Mpo mosakoli ná nga-nga-nzambe bango nyonso bakómi mbindo.+ Lisusu kati na ndako na ngai nakuti mabe na bango,”+ yango nde liloba ya Yehova. 12  “Na yango, nzela na bango ekokóma mpo na bango lokola bisika ya mosɛlu+ na molili, epai bakotindikama mpe bakokwea mpenza.”+ “Mpo nakoyeisela bango mpasi, mbula oyo bakotyela bango likebi,”+ yango nde liloba ya Yehova. 13  “Mpe namoni makambo ya nsɔni epai ya basakoli ya Samaria.+ Bamitambwisi lokola basakoli oyo bapusami na Baala,+ mpe bazali kaka kosala ete bato na ngai, ɛɛ Yisraele, báyengayenga.+ 14  Mpe namoni makambo ya nsɔmɔ+ epai ya basakoli ya Yerusaleme, bazali kosala ekobo+ mpe kotambola kati na lokuta;+ mpe balendisi mabɔkɔ ya basali-mabe mpo moto na moto alongwa+ na mabe na ye te. Na miso na ngai bango nyonso bakómi lokola Sodoma+ mpe bato oyo bafandi na yango lokola Gomora.”+ 15  Na yango, talá oyo Yehova ya mampinga alobi mpo na basakoli: “Talá nazali koleisa bango mbondo, mpe nakomɛlisa bango mai oyo ezali na ngɛngɛ mabe.+ Mpo lipɛngwi+ euti na basakoli ya Yerusaleme epalangani na mokili mobimba.” 16  Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Bóyoka te maloba ya basakoli oyo bazali kosakwela bino.+ Bazali kokómisa bino eloko mpamba.+ Bazali koloba emonaneli ya motema na bango+—kasi oyo euti na monɔkɔ ya Yehova te.+ 17  Bazali koloba mbala na mbala na baoyo bazangi limemya epai na ngai ete ‘Yehova alobi boye: “Bokozala na kimya.”’+ Mpe balobi na moto nyonso oyo azali kotambola na motó makasi na ye+ ete: ‘Mpasi ata moko te ekokwela bino.’+ 18  Mpo nani atɛlɛmi na etuluku ya baninga ya motema+ ya Yehova mpo amona mpe ayoka liloba na ye?+ Nani atye likebi na liloba na ye mpo ayoka yango?+ 19  Talá! Mopɛpɛ makasi ya Yehova, nkɛlɛ, ekobima mpenza, ɛɛ mopɛpɛ makasi oyo ezali kobalukabaluka.+ Ekobalukabaluka likoló na motó ya bato mabe.+ 20  Nkanda ya Yehova ekozonga nsima te kino akokokisa+ mpe kino akosukisa makanisi ya motema na ye.+ Na eleko ya nsuka ya mikolo bokotya likebi na likambo yango mpe bokokanga ntina na yango.+ 21  “Natindaki basakoli te, kasi bango moko bapotaki mbangu. Nalobaki na bango te, kasi bango moko basakolaki.+ 22  Kasi soki batɛlɛmaki na etuluku ya baninga na ngai ya motema,+ mbɛlɛ bayokisaki bato na ngai liloba na ngai, mpe mbɛlɛ balongolaki bango na nzela na bango ya mabe mpe na mabe ya misala na bango.”+ 23  “Nazalaka Nzambe kaka na penepene,” yango nde liloba ya Yehova, “kasi Nzambe na mosika te?”+ 24  “To moto moko akoki nde kobombana na bisika ya kobombana bongo ngai namona ye te?”+ yango nde liloba ya Yehova. “Ngai moko natondisi likoló ná mabele te?”+ yango nde liloba ya Yehova. 25  “Nayoki oyo basakoli oyo bazali kosakola lokuta na nkombo na ngai+ balobi: ‘Nalɔti ndɔtɔ! Nalɔti ndɔtɔ!’+ 26  Kino ntango nini yango ekoumela na motema ya basakoli oyo bazali kosakola lokuta mpe oyo bazali basakoli ya bokosi ya motema na bango moko?+ 27  Bazali kokanisa ete bakobosanisa bato na ngai nkombo na ngai na nzela ya bandɔtɔ na bango oyo bazali kaka koyebisana,+ ndenge batata na bango babosanaki nkombo na ngai na nzela ya Baala.+ 28  Mosakoli oyo azali na ndɔtɔ, ayebisa ndɔtɔ yango; kasi ye oyo azali na liloba na ngai, aloba liloba na ngai na bosolo.”+ “Matiti ezali nini liboso ya mbuma?”+ yango nde liloba ya Yehova. 29  “Liloba na ngai ezali lokola mɔtɔ,”+ yango nde liloba ya Yehova, “mpe ezali lokola marto ya kotula oyo ezali kobukabuka libanga, boye te?”+ 30  “Na yango, talá nazali kotɛmɛla basakoli yango,”+ yango nde liloba ya Yehova, “baoyo bazali koyiba maloba na ngai, moto na moto epai ya moninga na ye.”+ 31  “Talá nazali kotɛmɛla basakoli yango,” yango nde liloba ya Yehova, “baoyo bazali kosalela lolemo na bango mpo na koloba ete, ‘Liloba!’”+ 32  “Talá nazali kotɛmɛla basakoli yango ya bandɔtɔ ya lokuta,” yango nde liloba ya Yehova, “baoyo bazali koyebisa yango mpe bazali kosala ete bato na ngai báyengayenga mpo na makambo na bango ya lokuta+ mpe mpo na komikumisa+ na bango.” “Kasi ngai natindaki bango te mpe napesaki bango mitindo te. Na yango, bakopesa bato oyo litomba ata moko te,”+ yango nde liloba ya Yehova. 33  “Mpe ntango bato oyo to mosakoli to nganga-nzambe atuni yo ete: ‘Mokumba ya kilo ya Yehova ezali nini?’+ yo mpe osengeli koloba na bango ete: ‘“Bino nde—Ee bozali mpenza mokumba ya kilo!+ Mpe nakosundola mpenza bino,”+ yango nde liloba ya Yehova.’ 34  Kasi mosakoli to nganga-nzambe to bato oyo bazali koloba ete: ‘Mokumba ya kilo ya Yehova!’ Ngai mpe nakotyela moto yango ná bato ya ndako na ye likebi na ngai.+ 35  Talá oyo bozali kaka kolobaloba moto na moto na moninga na ye mpe moto na moto na ndeko na ye: ‘Yehova apesi eyano nini? Mpe Yehova alobi nini?’+ 36  Kasi bino bóloba lisusu te+ ete mokumba ya kilo+ ya Yehova, mpo mokumba ya kilo ekómi nde liloba ya moto ye moko,+ mpe bobongoli maloba ya Nzambe ya bomoi,+ Yehova ya mampinga, Nzambe na biso. 37  “Talá oyo okoloba na mosakoli: ‘Eyano nini Yehova apesi yo? Mpe Yehova alobi nini?+ 38  Mpe soki bozali kaka koloba ete: “Mokumba ya kilo ya Yehova!” boye talá oyo Yehova alobi: “Lokola bozali koloba ete: ‘Liloba oyo ezali mpenza mokumba ya kilo ya Yehova,’ nzokande nazali kaka kotindela bino liloba ete: ‘Bosengeli te koloba ete: “Mokumba ya kilo ya Yehova!”’ 39  na yango, talá ngai oyo! Mpe ya solo mpenza, nakotika bino+ mpe nakosundola bino mpe engumba oyo napesaki bino mpe bankɔkɔ na bino—bokolongwa liboso na ngai.+ 40  Mpe nakolatisa bino nsɔni mpo na ntango oyo etyami ndelo te mpe kosambwa mpo na ntango oyo etyami ndelo te, oyo bato bakobosana te.”’”+

Maloba na nse