Yirimia 21:1-14
21 Liloba+ oyo eyelaki Yirimia uta na Yehova, ntango Mokonzi Zidikiya+ atindelaki ye Pashure+ mwana ya Malakiya mpe Sefania+ mwana ya Maaseya, nganga-nzambe, ete:
2 “Tobondeli yo, tuná Yehova+ mpo na biso, mpamba te Nebukadrezare mokonzi ya Babilone azali kobunda na biso.+ Mbala mosusu Yehova akosalela biso likambo moko ya kokamwa ndenge asalaki na ntango ya kala mpe akolongwa epai na biso.”+
3 Mpe Yirimia alobaki na bango boye: “Talá oyo bokoloba na Zidikiya,
4 ‘Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: “Talá nazali kobalusela bino bibundeli ya etumba oyo ezali na lobɔkɔ na bino, oyo bozali kobunda na yango na mokonzi ya Babilone+ mpe na Bakaladea+ oyo bazingi bino na libándá ya efelo, mpe nakoyanganisa bango na katikati ya engumba oyo.+
5 Mpe ngai moko nakobunda na bino+ na lobɔkɔ oyo esembolami, na nguya ya lobɔkɔ, na nkanda, na nkɛlɛ mpe na kosilika makasi.+
6 Mpe nakobɛta bato oyo bafandi na engumba oyo, moto ná nyama. Bakokufa na maladi moko monene ya mabe.”’+
7 “‘“Mpe nsima na yango,” yango nde liloba ya Yehova, “nakopesa Zidikiya mokonzi ya Yuda, basaleli na ye, bato mpe baoyo bakotikala na kati ya engumba oyo, baoyo bakobika na maladi mabe, na mopanga mpe na nzala, nakopesa bango na lobɔkɔ ya Nebukadrezare mokonzi ya Babilone, ɛɛ na lobɔkɔ ya banguna na bango mpe na lobɔkɔ ya baoyo bazali koluka molimo na bango, mpe bakoboma bango na mopanga.+ Akoyoka mpasi na motema mpo na bango te, mpe akomonisela bango motema mawa te mpe akoyoka mawa ata moke te.”’+
8 “Mpe okoloba na bato oyo boye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Talá nazali kotya liboso na bino nzela ya bomoi mpe nzela ya liwa.+
9 Moto oyo akotikala kaka na engumba oyo akokufa na mopanga mpe na nzala mpe na maladi mabe;+ kasi moto oyo akobima mpe akoleka epai ya Bakaladea oyo bazingi bino, akotikala na bomoi, mpe molimo na ye ekokóma nde eloko na ye ya kopunza.”’+
10 “‘“Mpo natɛmɛli engumba oyo mpo na mpasi kasi mpo na bolamu te,”+ yango nde liloba ya Yehova. “Ekopesama na lobɔkɔ ya mokonzi ya Babilone,+ mpe akozikisa yango mpenza na mɔtɔ.”+
11 “‘Ee bino bato ya ndako ya mokonzi ya Yuda, bóyoka liloba ya Yehova.+
12 Ee ndako ya Davidi,+ talá oyo Yehova alobi: “Ntɔngɔ nyonso+ katá likambo na bosembo,+ mpe bikisá moto oyo bazali koyiba na lobɔkɔ ya mobubi,+ noki nkanda na ngai ebima lokola mɔtɔ+ mpe ezikisa, mpe moto ya koboma yango akozala te, mpo na mabe ya misala na bino.”’+
13 “‘Talá nazali kotɛmɛla yo, Ee mwasi oyo ofandi na lobwaku ya patatalu,+ Ee yo libanga ya mokili patatalu,’ yango nde liloba ya Yehova. ‘Mpo na bino baoyo bozali koloba: “Nani akokitela biso? Mpe nani akokɔta na bisika na biso ya kofanda?”+
14 Nakotuna mpe bino bózongisa monɔkɔ+ na ndenge oyo ekoki na mbuma ya misala na bino,’+ yango nde liloba ya Yehova. ‘Mpe nakotya mɔtɔ na zamba na ye,+ mpe ekozikisa biloko nyonso oyo ezali zingazinga na ye.’”+