Yirimia 2:1-37

2  Mpe liloba ya Yehova eyelaki ngai+ ete:  “Kende, mpe osengeli kobelela na matoi ya Yerusaleme ete: ‘Talá oyo Yehova alobi:+ “Nazali kokanisa lisusu motema boboto ya bolenge na yo,+ bolingo oyo omonisaki ntango olakamaki libala,+ ndenge ozalaki kotambola nsima na ngai na esobe, na mokili oyo baloná mboto te.+  Yisraele azalaki eloko mosantu mpo na Yehova,+ mbuma ya liboso mpo na Ye.”’+ ‘Bato nyonso oyo bazalaki kolya ye bazalaki komema ngambo.+ Mpasi ezalaki kokwela bango,’ yango nde liloba ya Yehova.”+  Yoká liloba ya Yehova, Ee Ndako ya Yakobo,+ mpe bino mabota nyonso ya ndako ya Yisraele.+  Talá oyo Yehova alobi: “Likambo nini ya mabe batata na bino bamoni epai na ngai,+ mpo bákóma mosika na ngai,+ mpe bákoba kolanda ekeko ya mpamba+ mpe bango moko bákóma mpamba?+  Mpe balobi te ete: ‘Yehova azali wapi, Ye oyo alongolaki biso na mokili ya Ezipito,+ Ye oyo atambwisaki biso na esobe, na mokili patatalu oyo ekauká+ mpe ya mabulu, na mokili ezangá mai+ mpe ya molili makasi,+ na mokili oyo moto azalaki koleka te mpe oyo kati na yango moto ya mabele azalaki kofanda te?’  “Mpe nsukansuka namemaki bino na mokili ya elanga ya banzete ya mbuma, mpo bólya mbuma na yango mpe biloko na yango ya kitoko.+ Kasi bokɔtaki mpe bokómisaki mokili na ngai mbindo; mpe bokómisaki libula na ngai eloko oyo eyinamá.+  Banganga-nzambe balobaki te ete: ‘Wapi Yehova?’+ Mpe bato oyo bateyaka mobeko bayebaki ngai te;+ mpe babateli ya mpate babukaki mibeko na ngai,+ mpe basakoli basakolaki na nkombo ya Baala,+ mpe balandaki baoyo bakokaki kopesa ata litomba moko te.+  “‘Na yango nakobunda na bino lisusu,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe nakobunda na bana ya bana na bino.’+ 10  “‘Kasi bókatisa kino mikili ya Kitime+ oyo ezali pembeni ya mbu mpe bómona. Ɛɛ, bótinda ata na Kedare+ mpe bótya likebi na bino mpenza, mpe bótala soki likambo ya boye esalemá.+ 11  Ekólo moko esilá kutu kotya baoyo bazali banzambe te+ na esika ya banzambe na yango?+ Kasi bato na ngai batye eloko oyo ekoki kopesa litomba te na esika ya nkembo na ngai.+ 12  Ee bino likoló, bótikala monɔkɔ polele na likambo oyo; mpe nsuki na bino etɛlɛma mpo na nsɔmɔ makasi,’ yango nde liloba ya Yehova,+ 13  ‘mpo bato na ngai basali makambo mibale ya mabe: Batiki kutu ngai,+ liziba ya mai ya bomoi,+ mpo bámitimwela mabulu, mabulu oyo ebukaná, oyo ekoki kobomba mai te.’ 14  “‘Yisraele azali nde mosaleli,+ to moombo oyo abotami na ndako? Mpo na nini kasi akómi eloko ya kopunza? 15  Bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki bazali kogangela ye;+ babimisi mongongo na bango.+ Mpe bakómisi mokili na ye eloko ya kokamwa. Bingumba na ye etyami mɔtɔ, mpe moto ata moko te afandi kuna.+ 16  Ata bana ya Nofe+ mpe Tahapanese+ bazalaki kolya yo na nsɔngɛ ya motó.+ 17  Ezali yango te nde omilukelaki na ndenge otikaki Yehova Nzambe+ na yo na ntango oyo azalaki kotambwisa yo na nzela?+ 18  Mpe sikoyo mpo na nini ozali kokanisakanisa nzela ya Ezipito,+ mpo na komɛla mai ya Shihore?+ Mpe mpo na nini ozali kokanisakanisa nzela ya Asiri,+ mpo na komɛla mai ya Ebale? 19  Mabe na yo esengeli kosembola yo,+ mpe misala na yo ya kozanga bosembo esengeli kopamela yo.+ Boye yebá mpe moná ete kotika oyo otiki Yehova Nzambe na yo ezali likambo moko ya mabe mpe ya bololo,+ mpe yango epesi yo nsɔmɔ na ngai ata moke te,’+ yango nde liloba ya Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,+ Yehova ya mampinga. 20  “‘Mpo kala nabukaki ekanganeli na yo bitenibiteni;+ nakataki bansinga na yo. Kasi olobaki ete: “Nakosalela yo te,” mpo likoló ya ngomba moke nyonso oyo etombwaná mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa+ ozalaki komitanda,+ ozalaki kosala bondumba.+ 21  Kasi ngai, nalonaki yo lokola nzete ya vinyo ya motane ya kitoko koleka,+ yango nyonso ezalaki momboto ya solo. Bongo ndenge nini obongwani epai na ngai mpe okómi bitape oyo ebebi ya nzete ya vinyo ya bopaya?’+ 22  “‘Kasi ata soki omisukoli na mungwa ya bonkɔkɔ mpe ozwi sabuni+ ebele, ya solo libunga na yo ekozala kaka litɔnɔ liboso na ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso. 23  Ndenge nini okoki koloba ete: ‘Namikómisi mbindo te.+ Nalandi Babaala te’?+ Talá nzela na yo na lobwaku.+ Moná makambo oyo osali. Mwana-kamela ya mwasi ya mbangu oyo azali kopota bipotela epai na epai na banzela na ye; 24  zɛbrɛ+ oyo emesaná na esobe, oyo ezali kobenda mopɛpɛ na zolo mpo molimo na ye ezali na mposa;+ nani akoki kozongisa ye nsima na ntango na ye ya kosangisa nzoto? Baoyo nyonso bazali koluka ye bakolɛmba te. Bakozwa ye na sanza na ye. 25  Kebá ete makolo na yo ezala makolo ngulu te, mpe mongongo na yo eyoka mposa ya komɛla te.+ Kasi olobaki ete: ‘Wapi!+ Te, nalingi nde bapaya,+ mpe nakolanda bango.’+ 26  “Lokola nsɔni oyo moyibi ayokaka ntango bakangi ye, nsɔni ya bongo nde bato ya ndako ya Yisraele bayoki,+ bango, bakonzi na bango, bankumu na bango ná banganga-nzambe na bango mpe basakoli na bango.+ 27  Bazali koloba na nzete ete: ‘Ozali tata na ngai,’+ mpe na libanga: ‘Yo nde obotaki ngai.’ Bapesi ngai mokɔngɔ, kasi elongi te.+ Mpe ntango bakozala na mpasi, bakoloba: ‘Tɛlɛmá mpe bikisá biso!’+ 28  “Kasi wapi banzambe na yo oyo omisaleli?+ Tiká bango bátɛlɛma soki bakoki kobikisa yo ntango okozala na mpasi.+ Mpo banzambe na yo, Ee Yuda, bakómi ebele lokola bingumba na yo.+ 29  “‘Mpo na nini bozali kaka kobunda na ngai?+ Mpo na nini, bino nyonso bobuki mibeko na ngai?’+ yango nde liloba ya Yehova. 30  Nabɛti bana na bino, kasi esali eloko te.+ Bazwaki disiplini te.+ Mopanga na bino elei basakoli na bino, lokola nkɔsi oyo ezali kobebisa.+ 31  Ee libota, bótala bino moko liloba ya Yehova.+ “Nakómi nde esobe mpamba epai ya Yisraele+ to mokili ya molili makasi? Mpo na nini bato oyo, bato na ngai, balobi ete: ‘Tozali kaka koyengayenga. Tokoya epai na yo lisusu te’?+ 32  Ngɔndɔ akoki nde kobosana biloko na ye ya kobongisa nzoto, mwasi ya libala bankamba na ye ya ntolo? Nzokande, bato na ngai—bango babosani ngai mikolo mingi oyo ekoki kotángama te.+ 33  “Ee mwasi, mpo na nini ozali kobongisa nzela na yo mpo na koluka bolingo? Yango wana mpe oteyi banzela na yo makambo mabe.+ 34  Lisusu, bamoni na bilamba na yo bilembo ya makila ya milimo+ ya babola oyo bazali na likambo te.+ Nakuti yango te na esika makambo yango esalemaki, kasi nde na bilamba na yo nyonso.+ 35  “Kasi ozali koloba ete: ‘Nazali na likambo te. Ya solo mpenza nkanda na ye elongwe epai na ngai.’+ “Talá nazali kowelana na yo mpo ozali koloba ete: ‘Nasali lisumu te.’+ 36  Mpo na nini ozali komona ete kobongola nzela na yo ezali likambo ya mpamba?+ Okoyoka mpe nsɔni mpo na Ezipito,+ kaka ndenge oyokaki nsɔni mpo na Asiri.+ 37  Mpo na ntina yango mpe, okobima mabɔkɔ na yo na motó,+ mpo Yehova aboyi biloko na yo oyo ozali kotyela motema, mpe okolonga na yango te.”

Maloba na nse