Yirimia 19:1-15

19  Talá oyo Yehova alobi: “Kende, mpe osengeli kokamata molangi ya mabele ya moyemi-mbɛki+ mpe mikóló mosusu ya bato mpe mikóló mosusu ya banganga-nzambe.  Mpe osengeli kokende tii na lobwaku ya mwana ya Hinome,+ oyo ezali na esika ya kokɔta na Porte ya Bipaso. Mpe kuna osengeli kosakola maloba oyo nakoloba na yo.+  Mpe osengeli koloba ete: ‘Bóyoka liloba ya Yehova, Ee bino bakonzi ya Yuda mpe bino bato oyo bofandi na Yerusaleme.+ Talá oyo Yehova ya mampinga,+ Nzambe ya Yisraele, alobi: “‘“Talá nazali koyeisa mpasi na esika oyo, mpasi oyo moto soki ayoki, matoi na ye ekoyoka mpasi;+  mpo batiki ngai+ mpe basali ete esika oyo eyebana lisusu te+ mpe na esika oyo, babimisi milinga ya mbeka epai ya banzambe mosusu oyo bango bayebaki te,+ bango ná bankɔkɔ na bango mpe bakonzi ya Yuda; mpe batondisi esika oyo na makila ya bato oyo bazali na likambo te.+  Mpe batongaki bisika oyo etombwaná ya Baala mpo na kotumba bana na bango na mɔtɔ lokola makabo mibimba ya kotumbela Baala,+ likambo oyo napesaki mitindo te mpe nalobelaki te,+ mpe oyo eyelaki ngai na motema te.”’+  “‘“Na yango, talá! mikolo ezali koya,” yango nde liloba ya Yehova, “ntango esika oyo ekobengama lisusu te Tofete+ mpe lobwaku ya mwana ya Hinome,+ kasi nde lobwaku ya koboma.  Mpe nakokómisa mpamba mokano ya Yuda mpe ya Yerusaleme na esika oyo,+ mpe nakokweisa bango na mopanga liboso ya banguna na bango mpe na lobɔkɔ ya baoyo bazali koluka molimo na bango.+ Mpe nakopesa bibembe na bango ezala bilei mpo na bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe mpo na banyama ya mabele.+  Mpe nakokómisa engumba oyo eloko ya kokamwa mpe eloko moko ya kobɛtɛla piololo.+ Moto nyonso mpenza oyo akoleka wana akotikala monɔkɔ polele na kokamwa mpe akobɛta piololo mpo na malɔzi na yango.+  Mpe nakoleisa bango mosuni ya bana na bango ya mibali mpe ya bana na bango ya basi; mpe bakolya moto na moto mosuni ya moninga na ye, mpo na nkaka mpe mpo na motungisi oyo banguna na bango ná baoyo balukaka molimo na bango bakotya bango.”’+ 10  “Mpe osengeli kobuka molangi yango na miso ya mibali oyo bazali kokende elongo na yo. 11  Mpe osengeli koloba na bango ete: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Ndenge wana nde nakobuka bato oyo mpe engumba oyo, ndenge moto abukaka mbɛki ya moyemi-mbɛki, bongo ekobongisama lisusu te;+ mpe bakokunda na Tofete+ kino esika ya kokunda ekozala lisusu te.”’+ 12  “‘Ndenge wana nde nakosala esika oyo,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe bato oyo bafandi na yango, ɛɛ, mpo na kokómisa engumba oyo lokola Tofete.+ 13  Mpe bandako ya Yerusaleme mpe bandako ya bakonzi ya Yuda esengeli kokóma lokola esika ya Tofete,+ bandako ya mbindo, elingi koloba, bandako nyonso oyo likoló ya bansamba na yango, bazalaki kobimisela limpinga mobimba ya likoló milinga ya mbeka+ mpe esika bazalaki kosopela banzambe mosusu makabo ya masanga.’”+ 14  Mpe Yirimia autaki na Tofete,+ epai Yehova atindaki ye asakola, mpe ayaki kotɛlɛma na lopango ya ndako ya Yehova mpe alobaki na bato nyonso+ ete: 15  “Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Talá nazali kokweisela engumba oyo mpe bingumba na yango nyonso mpasi nyonso oyo nalobaki mpo na yango, mpo bakómisi motó na bango makasi mpo bátosa maloba na ngai te.’”+

Maloba na nse