Yirimia 18:1-23
18 Liloba oyo eyelaki Yirimia uta na Yehova ete:
2 “Tɛlɛmá, mpe osengeli kokita tii na ndako ya moyemi-mbɛki,+ mpe kuna nakoyokisa yo maloba na ngai.”
3 Mpe nakitaki tii na ndako ya moyemi-mbɛki, mpe talá azalaki kosala mosala likoló ya bayiká ya moyemi-mbɛki.
4 Mpe mbɛki oyo azalaki kosala na mabele ya lima ebebaki na lobɔkɔ ya moyemi-mbɛki, mpe azongelaki mpe asalaki na yango mbɛki mosusu, kaka ndenge emonanaki malamu na miso ya moyemi-mbɛki ete asala yango.+
5 Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete:
6 “‘Ee ndako ya Yisraele, nakoki nde kosala bino te ndenge moyemi-mbɛki oyo azali kosala?’ yango nde liloba ya Yehova. Talá! Lokola mabele ya lima na lobɔkɔ ya moyemi-mbɛki, bino mpe bozali bongo na lobɔkɔ na ngai, Ee ndako ya Yisraele.+
7 Ntango nyonso oyo nakoloba mpo na ekólo moko boye mpe mpo na bokonzi moko boye mpo na kopikola yango mpe kokweisa yango mpe kobebisa yango,+
8 mpe soki ekólo yango etiki mabe na yango oyo nalobelaki,+ ngai mpe nakoyoka mawa mpo na mpasi oyo nakanisaki koyeisela yango.+
9 Kasi ntango nyonso oyo nakoloba na ntina etali ekólo moko boye mpe na ntina etali bokonzi moko boye mpo na kotonga yango mpe kolona yango,+
10 mpe soki esali mpenza oyo ezali mabe na miso na ngai mpe etosi mongongo na ngai te,+ ngai mpe nakoyoka mawa mpo na bolamu oyo nalobaki na motema na ngai ete nakosala mpo na bolamu na yango.’
11 “Mpe sikoyo, nabondeli yo, lobá na bato ya Yuda mpe na bato oyo bafandi na Yerusaleme ete: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Talá nazali kobongisela bino mpasi moko boye mpe nazali kokanisela bino likanisi moko boye.+ Nabondeli bino, bóbongwana, mokomoko na bino atika nzela na ye mabe, mpe bókómisa banzela na bino mpe misala na bino malamu.”’”+
12 Mpe balobaki ete: “Wapi!+ Mpo tokolanda kaka makanisi na biso moko, mpe tolingi moto na moto kokokisa motó makasi ya motema na ye ya mabe.”+
13 Bongo talá oyo Yehova alobi: “Nabondeli bino, bótuna na kati ya bikólo. Nani ayoká makambo ya boye? Ngɔndɔ ya Yisraele asali likambo moko ya nsɔmɔ na koleka ndelo.+
14 Nɛjɛ ya Libá ekolimwa nde na libanga ya esobe? To mai ya bopaya, ya mpiɔ, oyo ezali kotíyola, ekokauka nde?
15 Mpo bato na ngai babosani ngai+ na ndenge bazali kobimisela eloko mpamba+ milinga ya mbeka, mpe na ndenge bazali kobɛtisa bato mabaku na banzela na bango,+ bisika ya koleka ya kala,+ mpo na kotambola na babalabala, nzela oyo mabulu ezipami te,
16 mpo na kokómisa mokili na bango eloko ya kokamwa,+ ya kobɛtɛla piololo mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Moto nyonso mpenza oyo akoleka wana akotikala monɔkɔ polele na kokamwa mpe akoningisa motó na ye.+
17 Nakopalanganisa bango liboso ya monguna lokola na mopɛpɛ ya ɛsti.+ Na mokolo ya likama na bango, nakolakisa bango mokɔngɔ, kasi elongi te.”+
18 Mpe balobaki boye: “Bóya, mpe tózwela Yirimia mayele,+ mpo mobeko ekolimwa epai ya nganga-nzambe te+ to toli epai ya moto ya bwanya te to liloba epai ya mosakoli te.+ Bóya mpe tóbɛta ye na lolemo,+ mpe tótya likebi ata moke te na maloba na ye.”
19 Ee Yehova, tyelá ngai likebi, mpe yoká mongongo ya banguna na ngai.+
20 Esengeli nde kozongisa mabe mpo na malamu?+ Mpo batimweli molimo na ngai libulu.+ Kanisá ndenge natɛlɛmaki liboso na yo mpo na koloba malamu na ntina etali bango, mpo na kozongisa nkɛlɛ na yo nsima mpo elongwa epai na bango.+
21 Na yango, pesá bana na bango na nzala,+ mpe kabá bango na nguya ya mopanga;+ mpe basi na bango bákóma basi oyo bazangá bana, mpe basi oyo mibali bakufá.+ Mpe mibali na bango bákóma bato oyo babomami na bolɔzi ya liwa, bilenge na bango bábomama na mopanga na etumba.+
22 Tiká koganga eyokama uta na bandako na bango, ntango okomemela bango etuluku ya bapunzi na pwasa.+ Mpo batimoli libulu mpo na kokanga ngai, mpe babombi mitambo mpo na makolo na ngai.+
23 Kasi yo, Ee Yehova, oyebi malamu mwango na bango mobimba mpo na koboma ngai.+ Kozipa libunga na bango te, mpe kolongola lisumu na bango te liboso na yo; kasi bákóma bato oyo bazali kobɛta libaku liboso na yo.+ Na ntango ya nkanda na yo, salá bango mosala.+